Makomi
Alma 21


Lisolo moko ya mateya ya Alona, mpe Muloki, mpe bandeko na bango bandimi, epayi ya Balamani.

Ezali na mikapo 21 kino na nsuka ya mokapo 25.

Mokapo 21

Alona ateyi Baamaleki oyo etali Klisto mpe Bomikabi na Ye—Alona mpe bandeko na ye babwakami na boloko na Midoni—Nsima ya bokangoli na bango, bateyi na basinagoga mpe basali babongwami mingi—Lamoni apesi bonsomi ya eyamba na bato ya mboka ya Yisamaele. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa ntango Amona mpe bandeko na ye bakabwanaki na ndelo ya mboka ya Balamani, tala Alona akendaki mobembo na ye na mboka oyo Balamani babiangaki Yelusaleme, kobiangaka yango na lolenge ya mboka ya mbotama ya batata na bango; mpe ezalaki mosika kuna ya kokangana na ndelo ya Mormon.

2 Sikawa Balamani mpe Baamaleki mpe bato ya Amuloni batongaki engumba moko monene, oyo ebiangamaki Yelusaleme.

3 Sikawa Balamani na bango moko bazalaki mpenza mitema makasi, kasi Baamaleki mpe Baamuloni bazalaki lisusu mitema makasi mingi koleka; boye basalaki ete Balamani bayeisa mitema na bango makasi, ete bayika bokasi na nkuna mpe bonsomo na bango.

4 Mpe esalemaki ete Alona ayaki na engumba ya Yelusaleme, mpe abandaki koteya Baamaleki. Mpe abandaki koteya bango na basinagoga na bango, mpo batongaki basinagoga na bango engebene na molongo ya Banewolo; mpo mingi ya Baamaleki mpe Baamuloni bazalaki na molongo ya Banewolo.

5 Boye, lokola Alona ayingelaki kati na moko ya basinagoga na bango mpo na koteya bato, mpe lokola azalaki kolobelaka bango, tala Moamaleki moko atelemaki mpe abandaki kowela na ye, kolobaka: Nini ezali oyo ozali kotatola? Emonaki yo anjelu? Mpo na nini banjelu bamonani epayi na biso te? Tala bato oyo ezali bango bato malamu lokola bato na yo te?

6 Olobi lisusu, longola se soki toyamboli tokowa. Lolenge kani eyebi yo makanisi mpe mokano ya mitema na biso? Lolenge kani eyebi yo ete tozali na ntina ya koyambola? Lolenge kani eyebi yo ete tozali boko bato ya sembo te? Tala, totongi bandako esantu, mpe tosanganaka esika moko mpo na kokumbamela Nzambe. Tondimi ete Nzambe akobikisa bato nyonso.

7 Sikawa Alona alobaki epayi na ye: Endimi yo ete Mwana ya Nzambe akoya mpo na kosikola bato uta na masumu na bango?

8 Mpe moto yango alobaki epayi na ye: Tondimi ete oyebi likambo ya lolenge oyo te. Tondimi mimesano oyo ya liboma te. Tondimi ete oyebi makambo ekoya te, mpe tondimi ete batata na yo mpe lisusu ete batata na biso bayebaki mpo na oyo etali makambo oyo balobaki, mpo na oyo esengeli koya te.

9 Sikawa Alona abandaki kofungolela bango makomi mpo na oyo etali boyei ya Klisto, mpe lisusu oyo etali bosekwi ya bakufi, mpe ete bosikoli ekoki kozala te mpo na bato nyonso longola se soki ezali na nzela ya liwa mpe mpasi ya Klisto, mpe bomikabi ya makila na ye.

10 Mpe esalemaki ete lokola abandaki kosembola makambo oyo epayi na bango basilikaki na ye, mpe babandaki koseka ye; mpe balingaki te koyoka maloba oyo alobaki.

11 Boye, emonaki ye ete balingaki koyoka maloba na ye te, abimaki libanda ya sinagoga na bango, mpe akomaki na mboka moke oyo ebiangamaki Ani-Ati, mpe kuna akutaki Muloki koteyaka liloba epayi na bango; mpe lisusu Ama mpe bandeko na ye. Mpe bawelaki na bato mingi mpo na oyo etali liloba.

12 Mpe esalemaki ete bamonaki ete bato balingaki koyeisa mitema na bango makasi, boye balongwaki mpe bakomaki na mboka ya Midoni. Mpe bateyaki liloba epayi ya bato mingi, mpe bato moke kaka bandimaki maloba oyo bateyaki.

13 Nzokande, Alona mpe yoko motango ya bandeko na ye bakamatamaki mpe babwakamaki kati na boloko, mpe ndambo ya bato batikali kati na bango bakimaki uta na mboka ya Midoni epayi na mboka ya bikolo nzinganzinga mpembeni.

14 Mpe bango oyo babwakamaki kati na boloko bayokaki mpasi ya makambo mingi, mpe bakangolamaki na loboko ya Lamoni mpe Amona, mpe baleisamaki mpe balatisamaki.

15 Mpe bakendaki lisusu kosakola liloba, mpe boye bakangolamaki mpo na mbala ya yambo uta na boloko; mpe boye bayokaki mpasi.

16 Mpe bakendaki bisika nyonso bakambamaki na Molimo ya Nkolo, koteyaka liloba ya Nzambe na basinagoga nyonso ya Baamaleki, soki te na mangomba nyonso ya Balamani wapi bakokaki kondimama.

17 Mpe esalemaki ete Nkolo abandaki kopambola bango, na lolenge ete bamemaki mingi na boyebi ya bosolo; iyo, bandimisaki mingi mpo na oyo etali masumu na bango, mpe mpo na oyo etali mimesano ya batata na bango, oyo ezalaki alima te.

18 Mpe esalemaki ete Amona mpe Lamoni bazongaki uta na mboka ya Midoni na mboka ya Yisamaele, oyo ezalaki mboka ya bosangoli libula na bango.

19 Mpe mokonzi Lamoni alingaki lisusu te kotika ete Amona asalela ye, to azala mosali na ye.

20 Kasi asalaki ete basinagoga etongama na mboka ya Yisamaele; mpe asalaki ete bato na ye, soki te bato oyo bazalaki na nse ya boyangeli na ye basanganaka elongo.

21 Mpe asepelaki na ntina na bango, mpe alakisaki bango makambo mingi. Mpe lisusu asakolaki epayi na bango ete bazalaki boko bato oyo bazalaki na nse na ye, mpe ete bazalaki bato nsomi, ete bazalaki bansomi uta na minyokoli ya mokonzi, tata na ye; mpo ete tata na ye apesaki nzela epayi na ye ete akoka koyangela likolo ya bato oyo bazalaki na mboka ya Yisamaele, mpe na mboka nyonso nzinganzinga mpembeni.

22 Mpe lisusu ayebisaki epayi na bango ete bakoka kozala na lipanda ya kokumbamelaka Nkolo Nzambe na bango engebene na mposa na bango, na bisika nyonso bazalaki, soki bazalaki na mboka oyo ezalaki na nse ya boyangeli ya mokonzi Lamoni.

23 Mpe Amona ateyaki epayi ya bato ya mokonzi Lamoni; mpe esalemaki ete alakisaki bango makambo nyonso oyo etali makambo ya bosembo. Mpe alendisaki bango mokolo na mokolo, na molende nyonso; mpe bayokaki liloba na ye, mpe bazalaki na mpila mpo na kobombaka mitindo ya Nzambe.

Bimisa na lokasa