Makomi
Alma 23


Mokapo 23

Bonsomi ya eyamba bosakolami—Balamani baoyo bazali na mboka mpe bingumba sambo babongwani—Bamibiangi Anti-nefi-lehi mpe bazwi bonsomi uta na bolakeli mabe. Baamaleki mpe Baamuloni baboyi bosolo. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, sikawa esalemaki ete, mokonzi na Balamani atindaki bosakoli na kati ya bato na ye nyonso, ete batia maboko na bango te likolo ya Amona, Alona, Omina, Imini, soki te likolo ya bandeko na bango oyo bakokende koteyaka liloba ya Nzambe, na esika nyonso wapi bakozala, na ndambo nyonso ya mboka na bango.

2 Iyo, atindaki mobeko na kati na bango, ete batia maboko na bango te likolo na bango mpo na kokanga bango, to kobwaka bango kati na boloko; mpe babwaka nsoi likolo na bango te, to kobeta bango te, to kobwaka bango libanda ya basinagoga na bango te, to kofiakola bango fimbo te; to kobamba bango mabanga te, kasi bazwa nzela polele na bandako na bango, mpe lisusu na batempelo na bango, mpe na bandako esantu na bango.

3 Mpe boye bakokaki kokende mpe koteya liloba engebene na mposa na bango, mpo mokonzi abongwanaki epayi ya Nkolo, mpe baye ya ndako na ye mobimba; boye atindaki bosakoli na ye epayi nyonso na mboka epayi ya bato na ye, ete liloba ya Nzambe ekangama te, kasi ete ekende epayi nyonso na mboka mobimba, ete bato na ye bakoka kondimisama mpo na oyo etali mimesano ya nkuna ya batata na bango, mpe ete bakoka kondimisama ete bango bazalaki nyonso bandeko, mpe ete basengelaki koboma te, to kopunza te, to koyiba te, to kosala ekobo te, to kosala nkuna ya lolenge moko te.

4 Mpe sikawa esalemaki ete etindaki mokonzi bosakoli na ye, ete Alona mpe bandeko na ye bakendaki uta engumba na engumba, mpe uta ndako moko ya bokumbameli na mosusu, kotiaka Baeklezia, mpe kobulisaka banganganzambe mpe bateyi epayi nyonso na mboka na kati ya Balamani, mpo na koteya mpe kolakisa liloba ya Nzambe na kati na bango; mpe boye babandaki kozala na elonga monene.

5 Mpe nkoto na nkoto bamemamaki na boyebi ya Nkolo, iyo, nkoto na nkoto bamemamaki kondima mimesano ya Banefi; mpe bateyamaki masolo ya makomi mpe masakoli oyo ekitanisamaki kutu kino na ntango oyo.

6 Mpe solo lokola Nkolo azali na bomoi, solo mpenza lokola mingi bandimaki, soki te mingi lokola bamemamaki na boyebi ya bosolo, na nzela ya mateya ya Amona mpe bandeko na ye, engebene na molimo ya emoniseli mpe ya masakoli, mpe nguya ya Nzambe kosalaka makamwisi na bango—iyo, nalobi epayi na bino, lokola Nkolo azali na bomoi, lokola mingi ya Balamani bandimaki na mateya na bango, mpe babongwanaki epayi ya Nkolo, bakweyaki na bopengwi mokolo moko te.

7 Mpo bakomaki bato ya sembo; batiaki na nse bibundeli ya botomboki na bango, ete babundaki lisusu na Nzambe te, mpe na moko ya bandeko na bango mpe te.

8 Sikawa, oyo ezali bango oyo babongwanaki epayi ya Nkolo:

9 Bato ya Balamani baoyo bazalaki na mboka ya Yisamaele;

10 Mpe lisusu ya bato ya Balamani baoyo bazalaki na mboka ya Midoni;

11 Mpe lisusu ya bato ya Balamani baoyo bazalaki na engumba ya Nefi;

12 Mpe lisusu ya bato ya Balamani baoyo bazalaki na mboka ya Silomi, mpe baoyo bazalaki na mboka ya Semiloni, mpe na engumba ya Lemuele, mpe na engumba ya Siminilomi.

13 Mpe oyo ezali nkombo ya bingumba ya Balamani baoyo babongwanaki epayi ya Nkolo; mpe oyo ezali baoyo batiaki na nse bibundeli ya botomboki na bango, iyo, bibundeli na bango nyonso ya etumba; mpe bazalaki nyonso Balamani.

14 Mpe Baamaleki babongwanaki te, longola se moko, mpe moko te ya Baamuloni; kasi bayeisaki mitema na bango makasi, mpe lisusu mitema ya Balamani na ndambo wana ya mboka esika wapi nyonso bafandaki, iyo, mpe bamboka na bango nyonso ya mike mpe bingumba na bango nyonso.

15 Boye, topesi nkombo ya bingumba nyonso ya Balamani na oyo wapi bayambolaki mpe bayaki na boyebi ya bosolo, mpe babongwanaki.

16 Mpe sikawa esalemaki ete mokonzi mpe baoyo babongwanaki bazalaki na mposa ete bakoka kozala na nkombo yoko, ete na yango bakoka kokesenisama na bandeko na bango; boye mokonzi atunanaki elongo na Alona mpe mingi ya banganganzambe, mpo na oyo etali nkombo oyo bakokamata likolo na bango, mpo ete bakoka kokesenisama.

17 Mpe esalemaki ete babiangaki nkombo na bango Anti-nefi-lehi; mpe babiangamaki na nkombo oyo mpe babiangamaki Balamani lisusu te.

18 Mpe babandaki kozala mpenza bato balinga mosala; iyo, mpe bazalaki baninga na Banefi, boye, bafungolaki mikangano ya kozala baninga na bango, mpe bolakeli mabe ya Nzambe elandaki bango lisusu te.

Bimisa na lokasa