Makomi
Alma 28


Mokapo 28

Balamani balongami na ebakata ya etumba yoko—Nkoto zomi babomami—Bato ya nkuna batindami kozala na ezaleli moko ya lisuma ezanga nsuka; basembo bakomi na esengo moko oyo ekosuka soki moke te. Penepene na mibu 77–76 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki bato ya Amona kotiama na mboka ya Yesoni, mpe eklezia yoko kotiama mpe lokola na mboka ya Yesoni, mpe mampinga ya Banefi kotandama nzinganzinga mpembeni na Yesoni, iyo, na ndelo nzinganzinga mpembeni na mboka ya Zalayemila; tala mampinga ya Balamani balandaki bandeko na bango kati na esobe.

2 Mpe boye ezalaki na ebakata ya etumba yoko; iyo, kutu moko na lolenge loko lokola etikala koyebana mokolo moko te na kati ya bato nyonso na mboka uta na ntango Lehi atikaki Yelusaleme; iyo, mpe nkoto zomi ya Balamani babomamaki mpe bapanzamaki mosika.

3 Iyo, mpe lisusu ezalaki na ebakata ya bobomi moko na kati ya bato ya Nefi; nzokande, Balamani babenganamaki mpe bapanzamaki, mpe bato ya Nefi bazongaki lisusu na mboka na bango.

4 Mpe sikawa oyo ezalaki ntango moko oyo wapi matanga mpe boleli monene eyokanaki epayi nyonso na mboka mobimba, na kati ya bato nyonso ya Nefi—

5 Iyo, bogangi ya bakufeli mibali kolelaka mpo na mibali na bango, mpe lisusu ya batata kolelaka mpo na bana mibali na bango, mpe mwana mwasi mpo na ndeko mobali, iyo, ndeko mobali mpo na tata; mpe boye bogangi ya boleli boyokanaki na kati na bango nyonso, kolelaka bato ya libota na bango oyo babomamaki.

6 Mpe sikawa solo oyo ezalaki mokolo ya mawa; iyo, ntango moko ya lipombo, mpe ntango moko ya bokili bilei mpe ya losambo mingi.

7 Mpe boye nde esilaki mobu ya zomi na mitano ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi;

8 Mpe oyo ezali lisolo ya Amona mpe bandeko na ye, mibembo na bango na mboka ya Nefi, mpasi na bango na mboka, mawa na bango, mpe mitungisi na bango, mpe bosepeli na bango boye kani ntina esosolamaki te, mpe boyambi mpe bokengi ya bandeko na bango na mboka ya Yesoni. Mpe sikawa tika ete Nkolo, Mosikoli ya bato nyonso, apambola milimo na bango libela.

9 Mpe oyo ezali lisolo ya bitumba mpe boweli na kati ya Banefi, mpe lisusu bitumba kati na Banefi mpe Balamani; mpe mobu zomi na mitano ya boyangeli ya basambisi mosilaki.

10 Mpe eleko uta na mobu ya yambo kino mokolo ya zomi na mitano ememaki esalema bobebisami ya bomoi nkoto mingi; iyo, ememaki makambo ya nsomo ya bosopi makila.

11 Mpe nzoto ya nkoto mingi elali na nse na mabele, wana ezali nzoto ya nkoto mingi kopola na ebondo likolo ya etando ya mabele; iyo, mpe nkoto mingi bazali kolela mpo na kobungisaka mabota na bango, mpo bazali na ntina ya kobanga, engebene na bilaka ya Nkolo, ete batindami kozala na ezaleli ya lisuma ezanga nsuka.

12 Wana ezalaki nkoto mingi ya basusu kolela solo mpenza mpo na kobungisa mabota na bango, basepeli nzokande mpe batondaki na nsai na elikya, mpe kutu bayebi, engebene na bilako ya Nkolo, ete batombolami mpo na kofanda na loboko ya mobali ya Nzambe, na ezaleli ya esengo oyo ekosuka ata mokolo moko te.

13 Mpe boye tomoni lolenge kani monene ezali bozangi kokona ya moto na ntina ya lisumu mpe bobuki mobeko, mpe nguya ya zabulu, oyo eyei na nzela ya miango ya mabe oyo abimisaki mpo na kotanda motambo na mitema ya bato.

14 Mpe boye tomoni libiangi monene ya molende ya moto mpo na kosala na bilanga ya vinyo ya Nkolo; mpe boye tomoni ntina monene ya mawa, mpe lisusu ya bosepeli—mawa na ntina ya liwa mpe bobebisami na kati ya bato, mpe bosepeli na ntina ya pole ya Klisto mpo na bomoi.

Bimisa na lokasa