Makomi
Alma 32


Mokapo 32

Alma ateyi babola baoyo kani mitungisi ekomisi bango bato na bomikitisi—Bondimi ezali elikya na oyo emonanaka te kasi ezali solo—Alma atatoli ete banjelu basalelaki mibali, basi, mpe bana—Alma ameki liloba na nkona—Esengeli ewa nama mpe eleyisama—Nsima ekokoma nzete moko uta na oyo wapi mbuma ya bomoi ya seko ekobukama. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete bakendaki, mpe babandaki koteya liloba ya Nzambe epayi ya bato, kokotaka kati na basinagoga na bango, mpe kati na ndako na bango; iyo, mpe kutu bateyaki liloba na balabala na bango.

2 Mpe esalemaki ete nsima ya mosala mingi na kati na bango, babandaki kozala na elonga na kati ya molongo ya babola; mpo tala, babengani bango uta na basinagoga na ntina ya bilamba na bango bipasuka-pasuka—

3 Boye bazalaki na ndingisa te ya kokota kati na basinagoga na bango mpo na kokumbamela Nzambe, mpo batalaki bango lokola mbindo ya ebende ya ntalo; boye bazalaki babola; iyo, batalamaki na bandeko na bango lokola bosoto ya kobwaka; boye bazalaki babola na kotalaka biloko ya mokili; mpe lisusu bazalaki babola na motema.

4 Sikawa, lokola Alma azalaki koteya mpe koloba epayi ya bato likolo ya ngomba moke ya Onida, ebele ya bato bayaki kuna mpenza epayi na ye, oyo ezalaki bango oyo tozalaki kolobela, baoyo bazalaki babola na motema, na ntina ya bobola na bango na kotalaka biloko ya mokili.

5 Mpe bayaki epayi na Alma; mpe moko oyo azalaki moto ya liboso na kati na bango alobaki epayi na ye: Tala, bandeko na ngai oyo bakosala nini, mpo batiolami na bato nyonso na ntina ya bobola na bango, iyo, mpe mingi mingi koleka malamu na banganganzambe na biso; mpo babengani biso uta na basinagoga na biso oyo biso tosalaki makasi mpo na kotonga na maboko na biso moko; mpe babengani biso libanda na ntina ya bobola koleka na biso; mpe tozali na esika ya kokumbamela Nzambe na biso te; mpe tala, tokosala nini?

6 Mpe sikawa eyokaki Alma likambo oyo, abalukaki mobimba, elongi na ye sasaipi epayi na ye, mpe atalaki na bosepeli monene; mpo amonaki ete mitungisi na bango ekomisaki bango solo bato na bomikitisi, mpe ete bazalaki kati na komilengela mpo na koyoka liloba.

7 Boye alobaki lisusu na ebele ya bato basusu te; kasi asembolaki loboko na ye, mpe agangaki epayi na bango oyo amonaki, baoyo bazalaki bayamboli ya solo, mpe alobaki epayi na bango:

8 Namoni ete bozali na bomikitisi na mitema; mpe soki bongo, bopambolami.

9 Tala ndeko na bino alobi, Nini tokosala?—mpo babengani biso libanda ya basinagoga na biso, ete tokoki te kokumbamela Nzambe na biso.

10 Tala, nalobi epayi na bino, ebanzi bino ete bokoki te kokumbamela Nzambe longola se soki ezali bobele na basinagoga na bino?

11 Mpe lisusu, nalingi kotuna, ebanzi bino ete bosengeli kokumbamela Nzambe bobele mbala moko na mposo moko?

12 Nalobi epayi na bino, ezali malamu ete bobengani bino uta na basinagoga na bino, ete bokoka kozala bato na bomikitisi, mpe ete bokoka koyekola bwania; mpo esengeli ete boyekola bwania; mpo ezali mpo babengani bino, ete botiolami na bandeko na bino na ntina ya bobola mingi mpenza koleka na bino, ete bomemami mpenza na bokitisami ya motema; mpo bomemami na kozanga te kozala bato na bomikitisi.

13 Mpe sikawa, mpo bosengisami kozala bato na bomikitisi bopambolami; mpo moto ntango mosusu, soki asengisami kozala moto na bomikitisi, alukaka boyamboli; mpe sikawa na ntembe te, moto nyonso oyo ayamboli akozwa boboto; mpe oyo azwi boboto mpe atii molende kino na nsuka, akobikisama.

14 Mpe sikawa, lokola nalobaki epayi na bino, ete mpo bosengisamaki kozala bato na bomikitisi bopambolami, ebanzi bino te ete bazali mingi oyo bapambolami mingi koleka baoyo bamikitisaka na ntina ya liloba?

15 Iyo, ye oyo amikitisi solo, mpe ayamboli uta na masumu na ye, mpe atii molende kino na nsuka, se ye wana kaka akopambolama—iyo, bakopambolama mingi koleka baye basengisami kozala bato na bomikitisi na ntina ya bobola koleka ya bango.

16 Boye, bapambolami ezali bango oyo bamikitisi ntango basengisi bango te kozala bato na bomikitisi; soki te kutu, na maloba mosusu, apambolami ye oyo andimi maloba ya Nzambe, mpe abatisami na kozangaka kotia makasi ya motema, iyo, mpe na kozangaka komemama na koyeba liloba, soki te kutu na kosengisama koyeba, yambo ete bandima.

17 Iyo, ezali na mingi baoyo balobi: Soki okolakisa epayi na biso elembo uta na lola, bongo tokoyeba na bosolo; nsima tokondima.

18 Sikawa natuni, oyo ezali bondimi? Tala, nalobi epayi na bino, Te; mpo soki moto ayebi likambo azali na ntina ya kondima te, mpo ayebi yango.

19 Mpe sikawa, lolenge kani koleka alakelami mabe ye oyo ayebi bolingi ya Nzambe kasi asali yango te, koleka ye oyo andimaka bobele, soki te azali bobele na ntina ya kondima, mpe akwei kati na bobuki mobeko?

20 Sikawa na likambo oyo bosengeli kokata likambo. Tala, nalobi epayi na bino, ete ezali na ngambo yoko lokola ezali na ngambo mosusu; mpe ekozala epayi na moto engebene na mosala na ye.

21 Mpe sikawa lokola nalobaki mpo na oyo etali bondimi—bondimi ezali kozala na boyebi ya kobonga nie ya makambo te; boye soki ozali na bondimi ozali na elikya mpo na makambo oyo ezali komonana te, oyo ezali solo.

22 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na bino, mpe nalingi ete bomikundola, ete Nzambe atonda na boboto epayi na baoyo nyonso bandimaka na nkombo na ye; boye azali na mposa, na esika ya yambo, ete bondima, iyo, ata na liloba na ye.

23 Mpe sikawa, ayebisi liloba na ye epayi ya bato na nzela ya anjelu, iyo, na mibali kaka te kasi na basi mpe lokola. Sikawa oyo ezali nyonso te; bana mike bazali na maloba epesami epayi na bango mbala mingi, oyo eyokisaki bato ya bwania mpe bayekola nsoni.

24 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, lokola bozali na mposa ya koyeba nini bokosala mpo botungisami mpe babengani bino libanda—sikawa nazali na mposa te ete bobanza ete nalingi kosambisa bino bobele engebene na oyo ezali solo—

25 Mpo nalingi te koloba ete nyonso kati na bino bosengisami komikitisa; mpo nandimi solo ete ezali na boko bato na kati na bino baoyo bakomikitisa, likambo te bazala na ezalela nyonso kani bakoki.

26 Sikawa, lokola nalobaki mpo na oyo etali bondimi—ete ezalaki boyebi moko ya kobonga nie te—lolenge moko ezali na maloba na ngai. Bokoki koyeba bozangi tembe na yango na yambo te, na bolamu nyonso, mingi koleka lokola bondimi bozali boyebi ya bolamu nyonso te.

27 Kasi tala, soki bokolamusa mpe bokotelemisa bozalani na bino, kino na bomeki ya maloba na ngai, mpe bosaleli ndambo moke ya bondimi, iyo, ata kutu soki bokoki kaka kozala na mposa ya kondima, tika mposa oyo esala kati na bino, kutu kino bokondima na lolenge oyo bokoki kopesa esika pona ndambo ya maloba na ngai.

28 Sikawa, tokomekisisa liloba na nkona. Sikawa, soki bopesi esika ete nkona ekonama kati na motema na bino, tala, soki ezali nkona ya solo, to mpe nkona ya malamu, soki bobwaki yango libanda te na bozangi bondimi na bino, ete botelemela Molimo ya Nkolo, tala, ekobanda kovimba kati na ntolo na bino; mpe tango bokoyoka boningani ya kovimba oyo, bokobanda koloba kati na bino moko moko—Esengeli mpenza ezala ete nkona eza malamu, to mpe ete liloba ezali malamu, mpo ebandi kotandola molimo na ngai; iyo, ebandi kopesa pole na bososoli na ngai, iyo, ebandi kozala elengi mpo na ngai.

29 Sikawa, tala, oyo ekobakisa bondimi na bino te? Nalobi epayi na bino ete, iyo; nzokande bokoli te na boyebi moko ya kobonga nie.

30 Kasi tala, lokola nkona evimbaka, mpe eboti makasa, mpe ebandi kokola, nde bosengeli mpenza koloba ete nkona ezali malamu; mpo tala evimbi, mpe eboti makasa, mpe ebandi kokola. Mpe sikawa, tala, oyo ekolendisa bondimi na bino te? Iyo, ekolendisa bondimi na bino: mpo okoloba nayebi ete oyo ezali nkona malamu; mpo tala eboti makasa mpe ebandi kokola.

31 Mpe sikawa, tala, eyebi bino na ntembe te oyo ezali nkona ya malamu? Nalobi epayi na bino, Iyo; mpo nkona na nkona ebotaka na lolenge na yango moko.

32 Boye, soki nkona ekoli, ezali malamu, kasi soki ekoli te, tala ezali malamu te, yango wana ekobwakama mosika.

33 Mpe sikawa, tala, mpo bomeki kosala komekama yango, mpe boloni nkona, mpe evimbi mpe eboti makasa, mpe ebandi kokola, bosengeli mpenza koyeba ete nkona ezali malamu.

34 Mpe sikawa, tala, ezali boyebi na bino ya kobonga nie? Iyo, boyebi na bino ezali ya bobongi nie na likambo wana, mpe bondimi na bino ezali kolala; mpe oyo mpo boyebi, mpo boyebi ete liloba livimbisi molimo na bino, mpe lisusu boyebi ete liboti mpenza makasa, ete bososoli na bino bobandi kongenga, mpe mayele na bino ebandi kotandolama.

35 O bongo, ezali te oyo solo mpenza? Nalobi epayi na bino, iyo, mpo ezali pole; mpe nyonso oyo ezali pole, ezali malamu, mpo ekoki kososolama, boye bosengeli koyeba ete ezali malamu; mpe sikawa tala, esili bino komeka pole oyo ezali boyebi na bino ya kobonga nie?

36 Tala nalobi epayi na bino, Te; mpe esengeli bino te kotia bondimi na bino mpembeni, mpo bosalelaki bobele bondimi na bino mpo na kowana nkona ete bokoka komeka bomeki ya koyeba soki nkona ezalaki malamu.

37 Mpe tala, lokola nzete ebandi kokola, bokoloba: Tika toleisa yango na bokebi monene, ete ekoka kozwa mosisa, ete ekoka kokola, mpe epesa mbuma mpo na biso. Mpe sikawa tala, soki boleisi yango na bokebi boike, ekozwa mosisa, mpe ekokola, mpe ekopesa mbuma.

38 Kasi soki botali nzete yango mpamba, mpe botie te makanisi mpo na koleisa yango, tala, ekozwa mosisa moko te; mpe ntango mulunge ya moi ekoya mpe ekozikisa yango, mpo ezali na mosisa te, ekokawuka nie, mpe bokopikola yango mpe kobwaka yango libanda.

39 Sikawa, oyo ezali te mpo nkona ezalaki malamu te, mpe ezali te mpo mbuma na yango ekolingama te; kasi ezali mpo mabele na bino ekawuka, mpe bolingi koleisa nzete te, boye bokoki kozala na mbuma na yango te.

40 Mpe boye, soki bokoleisa liloba te, kotalaka liboso na liso ya bondimi na mbuma na yango, bokoki mokolo moko te kopikola mbuma ya nzete ya bomoi.

41 Kasi soki bokoleisa liloba, iyo, koleisa nzete lokola ebandi kokola, na bondimi na bino elongo na molende monene, mpe na bompikiliki, kotalaka liboso na mbuma na yango, ekokamata mosisa; mpe tala ekozala nzete moko oyo ekokola kino na bomoi ya libela.

42 Mpe na ntina ya etingia na bino mpe bondimi na bino mpe bompikiliki na bino na liloba na koleisaka yango, ete ekamata mosisa na bino, tala, moke moke bokopikola mbuma na yango, oyo ezali ya motuya, oyo ezali sukali koleka nyonso oyo ezali sukali, mpe oyo ezali mpembe likolo ya nyonso oyo ezali mpembe, iyo, mpe ya peto likolo ya nyonso oyo ezali peto; mpe bokosala lipati likolo ya mbuma oyo kutu kino bokotonda, ete bozala lisusu na nzala te, mpe bozala na mposa ya mai te.

43 Nde, bandeko na ngai, bokobuka mbano ya bondimi na bino, mpe molende na bino, mpe bompikiliki, mpe motema molai, kozelaka nzete epesa bino mbuma.

Bimisa na lokasa