Makomi
Alma 41


Mokapo 41

Na Bosekwi bato bakobima na ezalela moko ya esengo ezanga nsuka soki te ya mpasi ezanga nsuka—Nkuna ekozala esengo soki moke te—Bato ya mosuni bazali bato bazanga Nzambe na mokili—Na Bozongisi moto na moto akozwa lisusu bilembo mpe bizalela oyo azalaki na yango na bokufi. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa mwana mobali na ngai, nazali na mwa moke ya koloba mpo na oyo etali bozongisi boye bolobami; mpo tala, boko bato basili kokamola makomi, mpe babungi nzela mosika na ntina ya likambo oyo. Mpe nasosoli ete mayele na yo etungisamaki lisusu mpo na oyo etali likambo oyo. Kasi tala, nakolimbola yango epayi na yo.

2 Nalobi epayi na yo, mwana mobali na ngai, ete mwango ya bozongisi esengisami na boyengebene ya Nzambe; mpo esengisami ete biloko nyonso bizongisama na molongo mobongi malamu na yango. Tala, esengisami mpe ezali alima, engebene na nguya mpe bosekwi ya Klisto, ete molimo ya moto mosengeli kozongisama na nzoto na yango, mpe eteni moko moko ya nzoto ezongisama na yango moko.

3 Mpe esengami na boyengebene ya Nzambe ete bato basambisama engebene na misala na bango; mpe soki misala na bango ezalaki malamu na bomoi oyo, mpe bamposa ya mitema na bango ezalaki malamu, ete basengeli lisusu, na mokolo ya nsuka, kozongisama na oyo ezali malamu.

4 Mpe soki misala na bango ezalaki mabe, mikozongisama epayi na bango mpo na mabe. Na boye, biloko nyonso bikozongisama na molongo na yango mpenza, eloko na eloko na bozalani na yango mpenza—bokufi etombolami na bozangi kufa, bopoli na bozangi kopola—etombolami na esengo ezanga nsuka mpo na kosangola bokonzi ya Nzambe, to mpe na mpasi ezanga nsuka mpo na kosangola bokonzi ya zabulu, moko na ngambo moko, mosusu na ngambo mosusu—

5 Moko asekwi na esengo engebene na mposa na ye ya esengo, soki te malamu engebene na mposa na ye ya bolamu; mpe mosusu mabe engebene na mposa na ye ya mabe; mpo lokola azalaki na mposa ya kosala mabe na bolayi ya mokolo mobimba, kutu bongo nde akozwa mbano na ye ya mabe ntango butu ekoya.

6 Mpe bongo na ngambo mosusu. Soki ayambolaki masumu na ye, mpe azalaki na mposa ya bosembo kino na nsuka ya mikolo na ye, kutu boye akozwa mbano ya bosembo.

7 Baoyo ezali bango oyo basikolami na Nkolo; iyo, oyo ezali bango oyo bakamatami uta na, baoyo bakangolami uta na butu ezanga nsuka ya molili; mpe boye bakotelema soki te bakokweya; mpo tala, bazali basambisi na bango moko, soki basali bolamu to mabe.

8 Sikawa, mikano ya Nzambe ekoki kobongwana te; boye, nzela elengelami ete moto nyonso oyo alingi akoki kotambola na yango mpe kobikisama.

9 Mpe sikawa tala, mwana mobali na ngai, komeka lisusu te kotumola Nzambe na yo likolo ya biteni wana ya malongi, likolo ya oyo wapi olingaki kino lelo komeka kosala lisumu.

10 Kobanza te, mpo elobamaki na oyo etali bozongisi, ete okozongisama uta na masumu na esengo. Tala, nalobi epayi na yo, mabe etikala kozala esengo te.

11 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, bato nyonso oyo bazali na ezalela ya mokili, to nalingi koloba, na ezalela ya mosuni, bazali na lititi ya bololo mpe na boumbu ya mabe; bazangi Nzambe na mokili, mpe batamboli na bokeseni na lolenge ya kozala ya Nzambe; boye, bazali na ezalela moko ya bokeseni na lolenge ya kozala na esengo.

12 Mpe sikawa tala, ezali ndimbola ya liloba bozongisi kokamata eloko ya ezalela ya mokili mpe kotia yango na ezalela oyo ezali ya mokili te, to kotia yango na ezalela moko ekeseni na lolenge ya kozala na yango?

13 O, mwana mobali na ngai, ezali bongo te; kasi ndimbola ya liloba bozongisi ezali komema na ezonga lisusu mabe mpo na oyo ezalaki mabe, to ya mosuni mpo na oyo ezalaki ya mosuni, to ya zabulu mpo na oyo ya zabulu—malamu mpo na oyo ezalaki malamu; sembo mpo na oyo ezalaki sembo; alima mpo na oyo ezalaki alima; ya boboto mpo na oyo ezalaki ya boboto.

14 Boye, mwana mobali na ngai, tala ete ozala moto oyo atonda na boboto epayi ya bandeko na yo; sala na alima, sambisa na bosembo, mpe sala bolamu ntango nyonso; mpe soki osali makambo oyo nyonso nde okozwa mbano na yo; iyo, okozala na boboto ezongisami epayi na yo lisusu; okozala na boyengebene ezongisami epayi na yo lisusu; okozala na bosambisi ya bosembo ezongisami epayi na yo lisusu; mpe okozala na bolamu bopesami lokola mbano epayi na yo lisusu.

15 Mpo oyo okobimisa ekozonga epayi na yo lisusu, mpe ekozongisama; boye, liloba bozongisi ekweyisaka mpenza mingi koleka mosumuki, mpe elongisaka ye ata moke te.

Bimisa na lokasa