Makomi
Alma 42


Mokapo 42

Bokufi ezali ntango ya komekama mpo na kopesa moto makoki ya koyambola mpe kosalela Nzambe—Bokwei ya Adama ememaki liwa ya ntango mpe liwa ya molimo likolo ya bato nyonso—Bosikoli ekoya na nzela ya boyamboli—Nzambe Ye moko amikabi mpo na masumu ya mokili—Boboto ezali mpo na bango oyo bayamboli—nyonso basusu bayangelami na boyengebene ya Nzambe—Boboto ekoya na ntina ya Bomikabi—Bobele bayamboli ya solo nde bakobikisama. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nasosoli ete ezali na mwa likambo mosusu oyo etungisi mayele na yo, oyo okoki kososola te—oyo etali boyengebene ya Nzambe na kopesaka etumbu na mosumuki; mpo omeki kobanza ete boyengebene ezali te ete mosumuki atiama na ezalela ya mpasi.

2 Sikawa tala, mwana mobali na ngai, nalingi kolimbola likambo oyo epayi na yo. Mpo tala, esilaki Nkolo Nzambe kotinda baboti na biso ya yambo uta na elanga ya Edene, mpo na kowana mabele, uta oyo wapi bazwamaki—iyo, abenganaki moto libanda, mpe atiaki na nsuka ya esti ya elanga ya Edene, bakelupa, mpe mompanga moko ya moto oyo ezalaki kobaluka bipayi nyonso, mpo na kosenzela nzete ya bomoi

3 Sikawa, tomoni ete moto akomaki lokola Nzambe, koyebaka bolamu mpe mabe; mpe na kobangaka ete asembola loboko na ye, mpe akamata mpe lokola nzete ya bomoi, mpe alia mpe azala na bomoi ya seko, Nkolo Nzambe atiaki bakelupa mpe mompanga ya moto, ete alia mbuma na yango te—

4 Mpe boye tomoni, ete epesamaki ntango moko epayi ya moto, mpo na koyambola, iyo, ntango moko ya komekama, ntango moko ya koyambola mpe kosalela Nzambe.

5 Mpo tala, soki Adama asembolaka loboko na ye sasaipi, mpe aliaka nzete ya bomoi, alingaki kozala na bomoi ya seko, engebene na liloba ya Nzambe, mpe alingaki kozalaka na ntaka ya ntango te mpo na koyambola; iyo, mpe lisusu liloba ya Nzambe elingaki kozala mpamba, mpe mwango monene ya lobiko molingaki kokokisama te.

6 Kasi tala, etangamaki epayi ya moto ete akufa—boye, lokola bakatamaki uta na nzete ya bomoi basengelaki kokatama uta na etando ya mabele—mpe moto akomaki ya kobunga libela, iyo, bakomaki bato bakweya.

7 Mpe sikawa, omoni na oyo ete baboti na biso ya yambo bakatamaki ezala na ntango mpe na molimo mosika uta na miso ya Nkolo; mpe boye tomoni ete bakomaki bayangelami mpo na kolanda bolingi na bango moko.

8 Sikawa tala, elongobanaki te ete moto asikolama uta na liwa oyo ya ntango, mpo elingaki kobebisa mwango monene ya esengo.

9 Boye, lokola molimo mokokaki kokufa soki moke te, mpe bokwei ememaki likolo ya bato nyonso liwa ya molimo mpe lokola liwa ya ntango, elingi koloba, bakatamaki mosika uta na miso ya Nkolo, elongobanaki ete bato nyonso basikolama uta na liwa oyo ya molimo.

10 Boye, lokola bakomaki bato ya mosuni, bayokeli bilengi, mpe ya zabulu, na lolenge ya kozala na bango, ezalela oyo ya komekama ekomaki ezalela mpo na bango komilengela; ekomaki ezalela moko ya bolengeli.

11 Mpe sikawa omikundola, mwana mobali na ngai, soki ezalaki te mwango ya bosikoli, (kotiaka yango mpembeni) sasaipi lokola bakufaki milimo na bango ezalaki na mpasi, mpo mikatamaki mosika uta na miso ya Nkolo.

12 Mpe sikawa, ezalaki na nzela te ya kosikola bato uta na ezalela oyo ya bokwei, oyo moto amemaki likolo na ye moko na ntina ya bozangi botosi na ye moko.

13 Boye, engebene na boyengebene, mwango ya bosikoli ekokaki te kokokisama, bobele likolo ya masengami ete bato bayambola wana ezali bango na ezalela oyo ya komekama, iyo, ezalela oyo ya komekama; mpo longola se soki ezalaki mpo na masengami na ye, boboto ekokaki te kosala longola se soki ekobebisa mosala ya boyengebene. Sikawa mosala ya boyengebene mokokaki kobebisama te; soki bongo, Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.

14 Mpe boye tomoni ete bato nyonso bakweyaki, mpe bazalaki na nse ya maboko ya boyengebene; iyo, boyengebene ya Nzambe, oyo etiaki bango libela mpo na kokatama mosika uta na miso na ye.

15 Mpe sikawa, mwango ya boboto ekokaki te kokokisama longola se soki bomikabi esalemi; boye Nzambe ye moko amikabi mpo na masumu ya mokili, mpo na kokokisa mwango ya boboto, mpo na kolembisa masengami ya boyengebene, ete Nzambe akoka kozala Nzambe ya bobongi nie, mpe ya alima, mpe lisusu Nzambe oyo atonda na boboto.

16 Sikawa, boyamboli ekokaki te koya epayi ya bato longola se soki etumbu ezalaki, oyo ezalaki lisusu ya seko lokola bomoi ya molimo esengeli kozala, ekangama na bokeseni na mwango ya esengo, oyo lokola ezalaki ya seko mpe lokola bomoi ya molimo.

17 Sikawa, lolenge boni ekokaki moto koyambola longola se soki akosumuka? Lolenge boni ekokaki ye kosumuka soki mobeko ezalaki te? Lolenge boni ekokaki mobeko kozala longola se soki etumbu ezalaki?

18 Sikawa, ezalaki na etumbu moko ya kokangama, mpe mobeko moko ya alima epesamaki, oyo ememaki boswi ya mayele ya motema epayi ya moto.

19 Sikawa, soki mobeko mopesamaki te—kolobaka ete soki moto moko abomi, akokufa—elingaki ye kobanga ete akokufa soki abomi?

20 Mpe lisusu, soki mobeko mopesamaki te na kopekisaka lisumu bato balingaki te kobanga kosumuka.

21 Mpe soki mobeko mopesamaki te, soki bato basumukaki nini ekokaki boyengebene kosala, to boboto mpe lokola, mpo balingaki kozala na ekoki moko te likolo ya ekelamo yango?

22 Kasi mobeko moko mopesamaki, mpe etumbu ya kokangama, mpe boyamboli epesamaki; boyamboli oyo wapi, boboto esengi; to, boyengebene esengi ekelamo mpe bosaleli mobeko, mpe mobeko mopesi etumbu; soki boye te, misala ya boyengebene milingaki kobebisama, mpe Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.

23 Kasi Nzambe atiki te kozala Nzambe, mpe boboto esengi moyamboli, mpe boboto eyei na ntina ya bomikabi; mpe bomikabi esali ete bosekwi ya bakufi esalema; mpe bosekwi ya bakufi ezongisaka lisusu moto na miso ya Nzambe; mpe boye bazongisami na miso na ye, mpo na kosambisama engebene na misala na bango, engebene na mobeko mpe boyengebene.

24 Mpo tala, boyengebene esalelaka masengami na yango, mpe lisusu boboto esengaka nyonso oyo ezali ya ye moko; mpe boye, moto te longola se moyamboli ya solo abikisami.

25 Nini, obanzi ete boboto ekoki koyiba boyengebene? Nalobi epayi na yo, Te; ata moke te. Soki boye, Nzambe alingaki kotika kozala Nzambe.

26 Mpe boye Nzambe akokisi bantina na ye ya minene mpe ya seko, oyo alengelaki uta na bokelami ya mokili. Mpe boye nde lobiko mpe bosikoli ya bato esalemi, mpe bobebisami mpe mpasi na bango.

27 Boye, O mwana mobali na ngai, moto nyonso oyo alingi koya akoki koya komela mai ya bomoi ya seko ofele; mpe moto nyonso oyo alingi koya te se moko wana asengisami te; kasi na mokolo ya nsuka ekozongisama epayi na ye engebene na misala na ye.

28 Soki azali na mposa ya kosala mabe, mpe ayamboli te na mikolo na ye, tala, mabe makosalema epayi na ye, engebene na bozongisi ya Nzambe.

29 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nazali na mposa otika ete makambo oyo etungisa yo lisusu te, mpe otika bobele masumu na yo etungisa yo, na nzela ya mobulu oyo ekomema yo na boyamboli.

30 O mwana mobali na ngai, nazali na mposa ete owangana boyengebene ya Nzambe lisusu te. Komeka lisusu komilimbisa ata moke te na ntina ya masumu na yo, na kowanganaka boyengebene ya Nzambe; kasi tika boyengebene ya Nzambe, mpe boboto na ye, mpe motema molai na ye ezala na nguya mpenza na motema na yo; mpe tika emema yo na nse na mputulu kati na bomikitisi.

31 Mpe sikawa, O mwana mobali na ngai, obiangami na Nzambe mpo na koteya liloba epayi ya bato oyo. Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, kende nzela na yo, sakola liloba na bosolo mpe limemia, ete okoka komema milimo na boyamboli, ete mwango monene ya boboto ekoka kozala na ekoki likolo na bango. Mpe tika Nzambe apesa epayi na yo kutu engebene na maloba na ngai. Amene.

Bimisa na lokasa