Makomi
Alma 44


Mokapo 44

Moroni atindi Balamani kosala liyokani moko ya kimia soki te babomama—Zelayemina aboyi likanisi yango, mpe etumba ebandi lisusu—Mampinga ya Moroni malongi Balamani. Penepene na mibu 74–73 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete batelemaki mpe babwakaki makolo nsima ntaka moko uta na bango. Mpe Moroni alobaki epayi ya Zelayemina: Tala, Zelayemina, ete tolingi kozala bato na mposa ya makila te. Oyebi ete bozali na maboko na biso, nzokande tozali na mposa ya koboma bino te.

2 Tala, tobimaki libanda mpo na kobunda na bino ete tokoka kosopa makila na bino mpo na nguya te; mpe tozali na mposa ya komema moko na nkanga ya boumbu te. Kasi oyo ezali ntina mpenza ntina boyei kobunda na biso; iyo, mpe bosiliki na biso na ntina ya eyamba na biso.

3 Kasi sikawa, bomoni ete Nkolo azali elongo na biso; mpe bomoni ete apesi bino na maboko na biso. Mpe sikawa nalingi bososola ete oyo esalemi epayi na biso na ntina ya eyamba na biso mpe bondimi na biso na Klisto. Mpe sikawa bomoni ete bokoki kobebisa bondimi boye na biso te.

4 Sikawa bomoni ete oyo ezali bondimi ya solo mpo na Nzambe; iyo, bomoni ete Nzambe akosalisa, mpe akobomba, mpe akobatela biso, ntango molai lokola tozali basembo epayi na ye, mpe epayi na bondimi na biso, mpe eyamba na biso; mpe Nkolo akopesa nzela soki moke te ete tobebisama longola se soki tokweyi kati na bobuki mobeko mpe soki towangani bondimi na biso.

5 Mpe sikawa, Zelayemina, natindi yo, na nkombo ya Nzambe wana ya nguya nyonso, oyo alendisi maboko na biso ete tozwi nguya likolo na bino, na lisalisi ya bondimi na biso, na lisalisi ya eyamba na biso, mpe na lisalisi ya ndulu na biso ya bokumbameli, mpe na lisalisi ya eklezia na biso, mpe na nzela ya lisungi ya bule oyo tozali na nyongo epayi na basi na biso mpe bana na biso, na nzela ya lipanda oyo ekangi biso na mboka na biso mpe ekolo na biso; iyo, mpe lisusu na nzela ya bobateli ya liloba ya bule ya Nzambe, oyo tozali na nyongo mpo na esengo nyonso na biso; mpe na nzela ya oyo wana nyonso ezali motuya mingi koleka mpo na biso—

6 Iyo, mpe oyo ezali nyonso te; natindi yo na kotalaka mposa nyonso oyo bozali na yango mpo na bomoi, ete botika bibundeli na bino ya bitumba epayi biso, mpe tokoluka makila ya bino te, kasi tokobatela bomoi na bino, soki bokokende nzela na bino mpe bokoya lisusu kobundisa biso etumba te.

7 Mpe sikawa, soki bosali oyo te, tala, bozali na maboko na biso, mpe nakotinda bato na ngai bakweya likolo na bino, mpe bakata mpota ya liwa na nzoto na bino, ete bokoka kosila; mpe nsima tokotala nani akozala na nguya likolo ya bato oyo; iyo, tokotala nani akomemama na boumbu.

8 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Zelayemina ayokaki maloba oyo abelemaki mpe apesaki mompanga na ye mpe mompanga egumbama na ye, mpe makula na ye na maboko ya Moroni, mpe alobaki epayi na ye: Tala, oyo ezali bibundeli na biso ya bitumba; tokopesa yango epayi na bino, kasi biso moko tokopesa nzela ya kosala ndai moko te epayi na bino, oyo toyebi ete tokobuka, mpe bana na biso mpe lokola; kasi bokokamata manduki na biso ya etumba, mpe bopesa nzela ete tokoka kokende kati na esobe; soki te tokosimba mipanga na biso, mpe tokowa soki te tokolonga.

9 Tala, biso tozali bato ya bondimi na bino te; tondimi ete ezali na Nzambe oyo apesi biso na maboko na bino te; kasi tondimi ete ezali mayele mabe na bino oyo ebateli bino uta na mipanga na biso. Tala, ezali bibende na bino ya ntolo mpe nguba na bino nde ebateli bino.

10 Mpe sikawa ntango Zelayemina atiaki nsuka ya kolobaka maloba oyo, Moroni azongisaki mompanga mpe bibundeli ya bitumba, oyo azwaki, epayi na Zelayemina, kolobaka: Tala, tokosilisa matata.

11 Sikawa nakoki kolongola maloba oyo nalobi te, boye lokola Nkolo azali na bomoi, bokoki kokende te longola se soki bokei na ndai moko ete bokozonga lisusu kobundisa biso etumba te. Sikawa lokola bozali na maboko na biso tokotangisa makila na bino likolo ya mabele, soki te bokotosa masengami oyo napesi makanisi.

12 Mpe sikawa ntango Moroni alobaki maloba oyo, Zelayemina asimbaki mompanga na ye, mpe asilikaki na Moroni, mpe asutukaki liboso ete akoka koboma Moroni; kasi lokola atombolaki mompanga na ye, tala, moko kati na basoda ya Moroni apapolaki yango kutu na mabele, mpe ebukanaki na esimbelo; mpe abetaki Zelayemina mpe akataki mposo ya moto na nsuki na ye mpe ekweyaki na mabele. Mpe Zelayemina abendanaki uta na liboso na bango na katikati ya basoda na ye.

13 Mpe esalemaki ete soda oyo atelemaki mpembeni, oyo alongolaki mposo ya moto na nsuki ya Zelayemina, alokotaki mposo ya moto na nsuki uta na mabele, mpe atiaki yango likolo ya nsonge ya mompanga na ye, mpe atombolaki yango epayi na bango, kolobaka epayi na bango na mongongo makasi:

14 Kutu lokola mposo ya moto na nsuki oyo ekweyaki na mabele, oyo ezali mposo ya moto na nsuki ya mokonzi na bino, boye bokokweya na mabele longola se soki bopesi bibundeli na bino ya bitumba mpe bokei elongo na liyokani moko ya kimia.

15 Sikawa bazalaki mingi, ntango bayokaki maloba oyo mpe bamonaki mposo ya moto na nsuki oyo ezalaki likolo ya nsonge ya mompanga, bazwamaki na nsomo; mpe mingi babelemaki mpe babwakaki bibundeli na bango ya bitumba na makolo ya Moroni, mpe bakotaki kati na liyokani moko ya kimia. Mpe lokola mingi bakotaki kati na liyokani bapesaki nzela ete bakende na esobe.

16 Sikawa esalemaki ete Zelayemina azalaki na nkele mpenza, mpe alamusaki ndambo etikali ya basoda na ye na nkanda, mpo na kobundisa Banefi na makasi mingi mpenza.

17 Mpe sikawa Moroni asilikaki, na ntina ya moto makasi ya Balamani; boye atindaki bato na ye bakweya likolo na bango mpe baboma bango. Mpe esalemaki ete babandaki koboma bango; iyo, mpe Balamani babundaki na mipanga na bango mpe bokasi na bango.

18 Kasi tala, mposo bolumbu ya nzoto na bango mpe mitu ekokola na bango mibatelaki bango te na mipanga mipotu ya Banefi; iyo, tala, batobolomaki mpe babetamaki, iyo, mpe bakweyaki noki mpenza liboso ya mipanga ya Banefi; mpe babandaki kokombolama na nse, kutu lokola esakolaki soda ya Moroni.

19 Sikawa Zelayemina, emonaki ye ete bazalaki penepene na kobebisama, agangaki na bokasi epayi ya Moroni, kolakaka ete alingaki koyokana mpe lisusu elongo na bato na ye na bango, soki balingaki kobikisa ndambo etikali na bomoi ya bato na bango, ete bakoya soki moke lisusu kobundisa bango na etumba te.

20 Mpe esalemaki ete Moroni asalaki ete mosala ya liwa esila lisusu na kati ya bato. Mpe akamataki bibundeli ya bitumba uta na Balamani; mpe esilaki bango kokota kati na liyokani ya kimia elongo na ye bapesamaki nzela ya kokende kati na esobe.

21 Sikawa motango ya bakufi na bango motangamaki te na ntina ya bonene ya motuya; iyo, motango ya bakufi na bango ezalaki monene mpenza, na ngambo ya Banefi mpe na ngambo ya Balamani lokola.

22 Mpe esalemaki ete babwakaki bakufi na bango kati na mai ya Sidoni, mpe bakendaki mpe bakundamaki na bozindo ya mbu.

23 Mpe mampinga ya Banefi, soki te ya Moroni bazongaki mpe bayaki na bandako na bango mpe na mboka na bango.

24 Mpe boye nde esilaki mobu ya zomi na mwambe ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi. Mpe boye nde esilaki lisolo ya makomi ya Alma, oyo ekomamaki likolo ya bapalaki ya Nefi.

Bimisa na lokasa