Makomi
Alma 49


Mokapo 49

Balamani eyaki bango kokamata mboka bakokaki te kokamata bingumba bitongama makasi ya Amoniya mpe Noa—Amalikia alakeli Nzambe mabe mpe alapi komela makila ya Moroni—Elamani mpe bandeko na ye bakobi kolendisa Eklezia. Penepene na mobu 72 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete, na sanza ya zomi na moko ya mobu ya zomi na libwa, na mokolo ya zomi ya sanza, bato bamonaki mampinga ya Balamani kobelemaka epayi na mboka ya Amoniya.

2 Mpe tala, engumba yango etongamaki lisusu, mpe Moroni atelemisaki limpinga moko penepene na ndelo ya engumba, mpe babwakaki bosoto nzinganzinga mpembeni mpo na kobatela bango uta na makonga mpe mabanga ya Balamani; mpo tala, bazalaki kobunda na mabanga mpe makonga.

3 Tala, nalobaki ete engumba ya Amoniya etongamaki lisusu. Nalobi epayi na bino, iyo, ete etongamaki lisusu na ndambo; mpe lokola Balamani babebisaki yango mbala moko mpo na mabe ya bato, babanzaki ete ekozala lisusu nyama ya kozwa na petepete mpo na bango.

4 Kasi tala, lolenge boni bosisoi na bango ezalaki monene; mpo tala, Banefi batimolaki mpe batombolaka etutu ya mabele nzinganzinga mpembeni na bango, oyo ezalaki likolo mpenza ete Balamani bakokaki te kobwaka mabanga na bango mpe makonga na bango epayi na bango ete makoka kosala eloko moko, mpe bakokaki te komatela bango likolo longola se soki ezalaki na ekuke wapi bakotaka.

5 Sikawa na mbala oyo bakapiteni bakonzi ya Balamani bakamwaki mingi koleka, na ntina ya bwania ya Banefi na kolengelaka bisika na bango ya bokengi.

6 Sikawa bakambi ya Balamani babanzaki ete, na ntina ya motuya monene ya motango na bango, iyo, babanzaki ete bakozwa litomba mpo na kobondisa bango lokola basalaki kino sikawa; iyo, mpe bamilengelaki na nguba, mpe na ebende ya ntolo; mpe lisusu bamilengelaki na bilamba ya mposo, iyo, bilamba ya mbinga mpo na kozipa bolumbu na bango.

7 Mpe lokola bamilengelaki bongo babanzaki ete ekozala esika ebatelami makasi te mpo na kolonga mpe kotia bandeko na bango na nse ya nkanga ya boumbu, soki te koboma mpe kobomaboma bango engebene na bolingi na bango.

8 Kasi tala, na bokamwi monene koleka nyonso na bango, bamilengelaki mpo na bango, na lolenge moko oyo eyebanaki soki moke te na kati ya bana ya Lehi. Sikawa bamilengelaki mpo na Balamani, mpo na kobunda engebene na malakisi ya Moroni.

9 Mpe esalemaki ete Balamani, soki te Baamalikia, bakamwaki mingi koleka mpenza na lolenge na bango ya komilengela mpo na etumba.

10 Sikawa, soki mokonzi Amalikia akitaki uta na mboka ya Nefi, na moto ya limpinga na ye, mbele alingaki kosala ete Balamani babunda na Banefi na engumba ya Amoniya; mpo tala, makila ya bato na ye etalaki ye te.

11 Kasi tala, Amalikia akitaki te ye moko mpo na kobunda. Mpe tala, bakapiteni bakonzi na ye bamekaki te kobundisa Banefi na engumba ya Amoniya, mpo Moroni abongolaki makambo na kati ya Banefi, na lolenge ete Balamani bazalaki na bosisoa na bisika na bango ya bobombani mpe bakokaki te komatela bango.

12 Boye bazongaki na esobe, mpe bakamataki biema na bango mpe batambolaki epayi na mboka ya Noa, kobanzaka ete ezalaki esika ya malamu mingi koleka mpo na kobunda na Banefi.

13 Mpo bayebaki te ete Moroni alendisaki, to atongaki bisika ya makasi ya bokengi, mpo na engumba nyonso na mboka mobimba nzinganzinga mpembeni; boye, batambolaki liboso na mboka ya Noa na mokano moko ya sikisiki; iyo, bakapiteni bakonzi na bango bayaki liboso mpe balapaki ndai ete bakobebisa bato ya engumba wana.

14 Kasi tala, na bokamwi na bango, engumba ya Noa, oyo ezalaki kino sikawa esika moko ya ebatelami makasi te, esilaki sikawa, na nzela ya Moroni, kokoma esika makasi, iyo, kutu makasi koleka bokasi ya engumba ya Amoniya.

15 Mpe sikawa, tala, oyo ezalaki bwania na Moroni; mpo abanzaki ete bakobangisama na engumba ya Amoniya; mpe lokola engumba ya Noa ezalaki kino sikawa eteni oyo ebatelamaki makasi te ya engumba, boye balingaki kotambola na esika wana mpo na kobunda; mpe boye ezalaki engebene na mposa na ye.

16 Mpe tala, Moroni aponaki Lehi kozala kapitene mokonzi likolo ya bato ya engumba wana; ezalaki se Lehi moko wana oyo abundaki na Balamani na lobwaku na esti ya ebale Sidoni.

17 Mpe sikawa tala esalemaki ete ntango Balamani bamonaki ete Lehi nde azalaki kokamba engumba basisolamaki lisusu, mpo bazalaki kobanga Lehi mingi koleka; nzokande bakapiteni bakonzi na bango balapaki na ndai moko mpo na kobundisa engumba yango; boye, babimisaki mampinga na bango.

18 Sikawa tala, Balamani bakokaki te kokota kati na bisika ya makasi ya bokengi na nzela mosusu te longola se na ekotelo, na ntina ya bosanda ya etutu oyo ebwakamaki, mpe bozindo ya libulu oyo batimolamaki nzinganzinga mpembeni, longola se soki ezalaki na monoko ya lobala.

19 Mpe boye Banefi balengelamaki mpo na kobebisa nyonso oyo bakomeka komata mpo na kokota na esika ya makasi na nzela mosusu, na kobwakaka mabanga mpe makonga na bango.

20 Boye bamilengelaki, iyo, lingomba moko ya bato ya makasi, elongo na mipanga mpe bilingongo na bango, mpo na kobeta nyonso oyo bakomeka koya na esika na bango ya bokengi na monoko ya lobala; mpe boye bamilengelaki mpo na komibatela na Balamani.

21 Mpe esalemaki ete bakapiteni ya Balamani bamemaki mampinga na bango liboso ya monoko ya lobala, mpe babandaki kowela na Banefi, mpo bakota na esika na bango ya bokengi; kasi tala, babenganamaki nsima mbala na mbala, na lolenge ete babomamaki na bobomi monene mpenza.

22 Sikawa emonaki bango ete bakokaki te kozwa bokasi likolo ya Banefi na nzela wana ya moke, babandaki kotimola bitutu na bango ya mabele ete bakoka kozwa nzela ya kokotisa mampinga na bango, ete bakoka kozala na libaku ekokani mpo na kobunda; kasi tala, mbala nyonso oyo bamekaki bakombolamaki mpenza na mabanga mpe makonga oyo ebwakamaki na bango; mpe na esika ya kotondisa mabulu na bango na kopusaka na nse bitutu ya mabele, mabulu matondisamaki na nzoto na bango ekufa mpe ezoka.

23 Boye Banefi bazalaki na nguya nyonso likolo ya banguna na bango; mpe boye Balamani bamekaki kobebisa Banefi kino bakapiteni bakonzi na bango babomamaki nyonso; iyo, mpe mingi koleka nkoto moko ya Balamani babomamaki; ntango, na ngambo mosusu, ezalaki na moto moko te ya Banefi oyo abomamaki.

24 Ezalaki penepene na bato ntuku mitano oyo bazokaki, oyo bamibatelaki te na makula ya Balamani na nzela wana ya moke, kasi babatelamaki na nguba na bango, mpe bibende ya ntolo na bango, mpe bibende ya mitu na bango, na lolenge ete mpota na bango ezalaki likolo ya makolo na bango, mingi na yango ezalaki mpota minene mpenza.

25 Mpe esalemaki ete, ntango Balamani bamonaki ete bakapiteni bakonzi na bango babomamaki nyonso, bango bakimaki na esobe. Mpe esalemaki ete bazongaki na mboka ya Nefi, mpo na koyebisa mokonzi na bango, Amalikia, oyo azalaki Monefi na mbotama, mpo na oyo etali bobungisi monene na bango.

26 Mpe esalemaki ete asilikaki koleka mpenza na bato na ye, mpo azwaki te litomba ya mposa na ye likolo ya Banefi; atiaki bango na nse ya nkanga ya boumbu te.

27 Iyo, azalaki na nkele makasi koleka, mpe alakelaki Nzambe mabe, mpe lisusu Moroni, na kolapaka na ndai moko ete akomela makila na ye; mpe oyo mpo Moroni abombaki mitindo ya Nzambe na kolengelaka bokengi ya bato na ye.

28 Mpe esalemaki ete, na ngambo mosusu, bato ya Nefi batondaki Nkolo Nzambe na bango, na ntina ya nguya na ye ezangi emekiseli na kobikisaka bango uta na maboko ya banguna na bango.

29 Mpe boye nde esilaki mobu ya zomi na libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

30 Iyo, mpe ezalaki na kimia ntango nyonso na kati na bango, mpe bofuluki monene koleka kati na eklezia na ntina ya bokebi mpe molende na bango oyo bapesaki na liloba ya Nzambe, oyo esakolamaki epayi na bango na Elamani, mpe Sibiloni, mpe Koliantoni, mpe Amona mpe bandeko na ye, iyo, mpe na nyonso oyo bakulisamaki na molongo mosantu ya Nzambe, baoyo babatisamaki mpo na boyamboli, mpe baoyo batindamaki mpo na koteya na kati ya bato.

Bimisa na lokasa