Makomi
Alma 6


Mokapo 6

Eklezia na Zalayemila esukwami mpe etiami na molongo—Alma akey na Gideona mpo na koteya. Penepene na mobu 83 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete esilaki Alma kotia nsuka na kolobelaka bato ya eklezia, oyo etiamaki na engumba ya Zalayemila, akulisaki banganganzambe mpe bampaka na kotiaka maboko na ye likolo na bango engebene na molongo ya Nzambe, mpo na koyangela mpe kokengela eklezia.

2 Mpe esalemaki ete baoyo nyonso bazalaki te ya eklezia baoyo bayambolaki masumu na bango babatisamaki mpo na boyamboli, mpe bayambamaki kati na eklezia.

3 Mpe esalemaki lisusu ete nyonso oyo bazalaki te ya eklezia baoyo bayambolaki te uta na nkuna na bango mpe bamikitisaki te liboso ya Nzambe—nalingi koloba baye botombwamaki na lolendo ya mitema na bango—se bango moko baoyo babwakamaki, mpe nkombo na bango elongolamaki mpenza, ete nkombo na bango etangamaki te na kati ya oyo ya basembo.

4 Mpe boye babandaki kotia molongo ya eklezia na engumba ya Zalayemila.

5 Sikawa nalingi bososola ete liloba ya Nzambe epesamaki na bolamu nyonso ya motema na nyonso, ete moko te apimelama litomba ya kosangana esika moko mpo na koyoka liloba ya Nzambe.

6 Nzokande bana ya Nzambe batindamaki ete basengeli kosangana esika moko mbala mingi, mpe bakangana na bokili mpe losambo ya makasi mpo na litomba ya bolamu ya milimo ya baoyo bayebaki Nzambe te.

7 Mpe sikawa esalemaki ete ntango Alma asalaki mabongisi oyo alongwaki uta na bango, iyo, uta na eklezia oyo ezalaki na engumba ya Zalayemila, mpe akatisaki na esti ya ebale ya Sidoni, kati na lobwaku ya Gideona, kuna etongamaki engumba yoko, oyo ebiangamaki engumba ya Gideona, oyo ezalaki na lobwaku oyo ebiangamaki Gideona, oyo ebiangamaki nsima ya nkombo ya moto oyo abomamaki na mompanga na loboko ya Newolo.

8 Mpe Alma akendaki mpe abandaki koyebisa liloba ya Nzambe epayi na eklezia oyo etiamaki na lobwaku ya Gideona, engebene na emoniseli ya bosolo ya liloba oyo elobamaki na batata na ye, mpe engebene na molimo ya masakoli oyo ezalaki na ye, engebene na litatoli ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, oyo akoya mpo na kosikola bato na ye uta na masumu na bango, mpe molongo mosantu na oyo wapi abiangamaki. Mpe boye nde ekomami. Amene.

Bimisa na lokasa