Makomi
Alma 8


Mokapo 8

Alma ateyi mpe abatisi bato na Meleki—Alma aboyami na Amoniya mpe alongwe—Anjelu atindi ye azonga mpo na kobelela boyamboli epayi ya bato—Ayambami na Amuleki, mpe nyonso mibale bateyi na Amoniya. Penepene na mobu 82 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete Alma azongaki uta na mboka ya Gideona, nsima ya kolakisaka bato ya Gideona makambo mingi oyo makoki te kokomama, nsima ya kotiaka molongo na eklezia, engebene lokola asalaki yambo na mboka ya Zalayemila, iyo, azongaki na ndako na ye moko na Zalayemila mpo na kopema uta na misala oyo asalaki.

2 Mpe boye esilaki mobu ya libwa ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi.

3 Mpe esalemaki ete na ebandeli ya mobu ya zomi ya boyangeli ya basambisi likolo ya bato ya Nefi, Alma alongwaki kuna mpe akendaki mobembo na ye na mboka Meleki, na westi ya ebale Sidoni, na westi mpembeni na ndelo ya esobe.

4 Mpe abandaki koteya bato na mboka ya Meleki engebene na molongo mosantu ya Nzambe, na oyo wapi abiangamaki, mpe abandaki kolakisa bato epayi nyonso na mboka mobimba ya Meleki.

5 Mpe esalemaki ete bato bayaki epayi na ye uta na bipayi nyonso ya ndelo nyonso ya mboka oyo ezali mpembeni na mopanzi ya esobe. Mpe babatisamaki epayi nyonso na mboka mobimba;

6 Na lolenge ete asilisaki mosala na ye na Meleki alongwaki kuna, mpe asalaki mobembo ya mikolo misato na nordi ya mboka Meleki; mpe akomaki na engumba oyo ebiangamaki Amoniya.

7 Sikawa ezalaki momeseno ya bato ya Nefi ya kobiangaka bikolo na bango, mpe bingumba na bango, mpe mboka na bango, iyo, kutu mboka mike mike nyonso na bango, nsima ya nkombo na ye oyo azwaki yango yambo; mpe boye ezalaki bongo na mboka ya Amoniya.

8 Mpe esalemaki ete ntango Alma ayaki na engumba ya Amoniya ye abandaki koteya liloba ya Nzambe epayi na bango.

9 Sikawa Satana azwaki esika monene na mitema ya bato ya engumba ya Amoniya; boye balingaki te koyoka maloba ya Alma.

10 Nzokande Alma asalaki mingi na molimo, kobundaka elongo na Nzambe na losambo ya makasi, ete asopa Molimo na ye likolo ya bato oyo bazalaki na engumba yango; ete asala lisusu ete akoka kobatisa bango mpo na boyamboli.

11 Nzokande, bayeisaki mitema na bango makasi, kolobaka epayi na ye: Tala, toyebi ete ozali Alma; mpe toyebi ete ozali nganganzambe monene likolo ya eklezia oyo otiaki na biteni mingi ya mboka, engebene na momeseno na yo; mpe tozali te ya eklezia na yo, mpe tondimi te mimesano ya liboma ya lolenge oyo.

12 Mpe sikawa toyebi ete lokola tozali te ya eklezia na yo ozali na nguya te likolo na biso; mpe otiki kiti ya bosambisi epayi ya Nefiya; boye ozali te mosambisi mokonzi likolo na biso.

13 Sikawa ntango bato basilaki koloba oyo, mpe batelemelaki maloba nyonso na ye, mpe bafingaki ye, mpe babwakelaki ye nsoi, mpe basalaki ete basengelaki kobwaka ye libanda ya engumba na bango, ye alongwaki kuna mpe akendaki mobembo na ye na mboka oyo ebiangamaki Alona.

14 Mpe esalemaki ete wana ezalaki ye kosalaka mobembo kuna, ekitisamaki ye na nse ya bozito ya mawa, kotambolaka na nzela ya mikakatano mingi mpe nsomo ya molimo, na ntina ya nkuna ya bato oyo bazalaki na engumba ya Amoniya, esalemaki ete wana ezalaki Alma ya kokitisama boye na nse ya bozito ya mawa, tala anjelu moko ya Nkolo amonanaki epayi na ye, kolobaka:

15 Opambolami, Alma; boye, tombola moto na yo likolo mpe sepela, mpo ozali ntina ya bosepeli monene ya; mpo ozalaki sembo na kobombaka mitindo ya Nzambe uta na ntango oyo ozwaki nsango ya yambo uta na ye. Tala, nazali ye oyo apesaki yango epayi na yo.

16 Mpe tala, natindami mpo na kopesa yo motindo ete ozonga na engumba ya Amoniya, mpe oteya lisusu epayi ya bato ya engumba; iyo, teya epayi na bango. Iyo, loba epayi na bango, longola se soki bayamboli Nkolo Nzambe akobebisa bango.

17 Mpo tala, bazali koyekola na ntango oyo ete bakoka kobebisa lipanda ya bato na yo, (mpo boye elobi Nkolo) oyo ezali na bokeseni na meko, mpe masambisi, mpe mitindo oyo apesaki epayi ya bato na ye.

18 Sikawa esalemaki ete esilaki Alma kozwa nsango oyo uta na anjelu ya Nkolo azongaki na lombangu na mboka ya Amoniya. Mpe akotaki na engumba na nzela mosusu, iyo, na nzela oyo ezali na sudi ya engumba ya Amoniya.

19 Mpe lokola ekotaki ye na engumba yango azalaki na nzala mpenza, mpe alobaki epayi ya moto moko: Olingi kopesa na mosali na bomikitisi ya Nzambe eloko mpo na kolia?

20 Mpe moto alobaki epayi na ye: Ngai nazali Monefi, mpe nayebi ete yo ozali profeta mosantu ya Nzambe, mpo ozali moto oyo anjelu moko alobelaki ngai na limoni moko: Okoyamba. Boye, tokende elongo na ngai kati na ndako na ngai mpe nakokabela yo bilei na ngai; mpe nayebi ete okozala lipamboli mpo na ngai mpe ndako na ngai.

21 Mpe esalemaki ete moto yango ayambaki ye kati na ndako na ye; mpe moto yango abiangamaki Amuleki; mpe amemaki lipa mpe misuni ya nyama mpe atiaki liboso ya Alma.

22 Mpe esalemaki ete Alma aliaki lipa mpe atondaki; mpe apambolaki Amuleki mpe ndako na ye, mpe apesaki matondi epayi ya Nzambe.

23 Mpe esilaki ye kolia mpe kotonda alobaki epayi na Amuleki: Nazali Alma, mpe nazali nganganzambe monene likolo ya eklezia ya Nzambe epayi nyonso na mboka mobimba.

24 Mpe tala, nabiangami mpo na koteya liloba ya Nzambe na kati ya bato oyo nyonso, engebene na molimo ya emoniseli mpe ya masakoli; mpe nazalaki na mboka oyo mpe balingaki koyamba ngai te, kasi babwakaki ngai libanda mpe nazalaki penepene na kopesa mokongo na ngai epayi na mboka oyo libela.

25 Kasi tala, natindamaki ete nazonga lisusu mpe nasakola epayi ya bato oyo, iyo, mpe natatola na bango mpo na oyo etali mabe na bango.

26 Mpe sikawa, Amuleki, lokola oleisi ngai mpe opesi ngai esika, opambolami; mpo nazalaki na nzala mpenza, mpo nakilaki mikolo mingi.

27 Mpe, Alma awumelaki mikolo mingi elongo na Amuleki yambo abanda koteya epayi ya bato.

28 Mpe esalemaki ete bato bakolaki mingi koleka na mabe na bango.

29 Mpe liloba eyaki na Alma, kolobaka boye: Kende; mpe lisusu loba epayi ya mosali na ngai Amuleki, ete kende mpe sakola epayi ya bato oyo, kolobaka—Boyambola, mpo boye elobi Nkolo, longola se soki boyamboli nakobimela bato oyo na nkanda na ngai; iyo, mpe nakobalola te mosika nkanda makasi na ngai.

30 Mpe Alma akendaki, mpe lisusu Amuleki, na kati ya bato, mpo na koyebisa maloba ya Nzambe epayi na bango; mpe batondisamaki na Molimo Mosantu.

31 Mpe bazalaki na nguya epesamaki epayi na bango, na lolenge ete bakokaki te kokangama na boloko ya nse ya mabele; mpe ekokaki te kosalema ete moto akoka koboma bango; nzokande basalelaki nguya na bango te kino bakangamaki na singa mpe babwakamaki na boloko. Sikawa, oyo esalemaki mpo ete Nkolo akoka kolakisa nguya na ye epayi na bango.

32 Mpe esalemaki ete bakendaki mpe babandaki koteya mpe kosakola epayi ya bato, engebene na molimo mpe nguya oyo Nkolo apesaka bango.

Bimisa na lokasa