Makomi
Etele 12


Mokapo 12

Profeta Etele alendisi bato mpo na kondima na Nzambe—Moroni asangeli bilembo mpe makamwisi masalemaki na bondimi—Bondimi epesaki ndeko ya Yelede ya mobali makoki ya komona Klisto—Nkolo apesaka bato bolembu ete bakoka kozala bato na bomikitisi—Ndeko ya Yelede ya mobali alongoli Ngomba ya Zelini na bondimi—Bondimi, elikya, mpe bolingani ezali na ntina monene mpenza mpo na lobiko—Moroni amoni Yesu miso na miso.

1 Mpe esalemaki ete mikolo ya Etele ezalaki na mikolo ya Koliantumili; mpe Koliantumili azalaki mokonzi likolo ya mboka mobimba.

2 Mpe Etele azalaki profeta ya Nkolo; yango wana Etele ayaki na mikolo ya Koliantumili, mpe abandaki kosakola epayi ya bato, mpo akokaki te kopekisama na ntina ya Molimo ya Nkolo oyo ezalaki elongo na ye.

3 Mpo abelelaki uta na ntongo, kutu kino ntango moi ekitaki, kolendisaka bato mpo na kondima na Nzambe mpo na boyamboli mbele babebisama, kolobaka epayi na bango ete na bondimi makambo nyonso makokisami—

4 Yango wana, oyo andimi Nzambe akoki na ntembe te kolikya mpo na mokili moko ya malamu koleka, iyo, kutu mpo na kozwa esika na loboko ya mobali ya Nzambe, oyo elikya eyaka uta na bondimi, ezali lokola longo mpo na milimo ya bato, oyo ekomisaka bango bato ya makasi mpe bato batelemi ngwi, baoyo bazali ntango nyonso koyikiniaka misala malamu, mpe batambwisami na nkembo ya Nzambe.

5 Mpe esalemaki ete Etele asakolaki na bato makambo minene mpe ya kokamwa, oyo bato bandimaki te, mpo bamonaki yango te.

6 Mpe sikawa, ngai, Moroni, nalingi koloba mwa moke mpo na oyo etali makambo oyo; nalingi kolakisa epayi na mokili ete bondimi ezali makambo oyo totieli elikya mpe oyo tomoni te; yango wana botiaka ntembe te mpo bomoni te, mpo bokozwa litatoli te kino nsima ya komekama ya bondimi na bino.

7 Mpo ezalaki na bondimi ete Klisto amilakisaki na batata na biso, nsima ya kosekwa uta na bakufi; mpe amilakisaki te epayi na bango kino esilaki bango kozala na bondimi na ye; yango wana, esengeli mpenza ete boko bato bazala na bondimi na ye, mpo amilakisaki epayi na mokili te.

8 Kasi na ntina ya bondimi ya bato amilakisaki epayi na mokili, mpe akembelaki nkombo ya Tata, mpe alengelaki nzela ete na yango basusu bakoka kozala bakaboli ya likabo ya lola, ete bakoka kozala na elikya mpo na biloko oyo wana bamonaki te.

9 Yango wana, bokoki lisusu kozala na elikya, mpe kozala bakaboli ya likabo, soki bolingi bobele kozala na bondimi.

10 Tala ezalaki na bondimi ete bango bato ya kala babiangamaki na molongo mosantu ya Nzambe.

11 Yango wana, na bondimi mobeko ya Mose mopesamaki. Kasi na likabo ya Mwana na ye Nzambe alengelaki nzela ya malamu mingi koleka; mpe ezali na bondimi ete ekokisamaki.

12 Mpo soki bondimi ezali te na kati ya bana ya bato Nzambe akoki kosala likamwisi te na kati na bango; yango wana, amilakisaki te kino nsima ya kosalela bondimi na bango.

13 Tala, ezalaki bondimi ya Alma mpe Amuleki boye esalaki ete ndako ya boloko ekweya na mabele.

14 Tala, ezalaki bondimi ya Nefi mpe Lehi boye esalaki mbongwana likolo ya Balamani, ete babatisamaki na moto mpe na Molimo Mosantu.

15 Tala, ezalaki bondimi ya Amona mpe bandeko mibali na ye boye esalaki likamwisi monene mpenza na kati ya Balamani.

16 Iyo, kutu nyonso oyo basalaki makamwisi basalaki yango na bondimi, kutu bango oyo bazalaki liboso ya Klisto mpe lisusu bango oyo bayaki nsima.

17 Mpe ezalaki na nzela ya bondimi ete bayekoli Misato bazwaki elaka ete bakomeka liwa te; mpe bazwaki elaka te kino nsima ya kosalela bondimi na bango.

18 Mpe ezali na ntango moko te oyo bato basali makamwisi kino nsima ya kosalela bondimi na bango; yango wana yambo bandimaki na Mwana ya Nzambe.

19 Mpe ezalaki na mingi oyo kani bondimi ezalaki makasi koleka, kutu yambo ete Klisto aya, baoyo bakokaki te kobombama uta na kati ya elamba, kasi solo bamonaki na miso na bango biloko oyo bamonaki na miso ya bondimi, mpe bazalaki na nsai.

20 Mpe tala, tomonaki kati na lisolo ya makomi oyo ete moko kati na bango azalaki ndeko ya Yelede ya mobali; mpo bondimi na ye ezalaki monene mpenza na Nzambe, ete ntango Nzambe atiaki mosapi na ye, akokaki te kobomba yango uta na miso ya ndeko ya Yelede ya mobali, na ntina ya liloba na ye oyo alobaki epayi na ye, oyo liloba azwaki na bondimi.

21 Mpe esilaki ndeko ya Yelede ya mobali komona mosapi ya Nkolo, na ntina ya elaka oyo ndeko ya Yelede ya mobali azwaki na bondimi, Nkolo akokaki te kolongola eloko moko uta na miso na ye; yango wana alakisaki ye makambo nyonso, mpo akokaki lisusu te kobombama na kozangaka elamba.

22 Mpe ezali na bondimi ete batata na ngai bazwaki elaka ete makambo oyo ekoya epayi na bandeko na bango na nzela ya baoyo bazali Bayuda-te; yango wana Nkolo atindi ngai, iyo, kutu Yesu Klisto.

23 Mpe nalobaki epayi na ye: Nkolo, Bayuda-te bakoseka makambo oyo, na ntina ya bolembu na biso na mosala ya kokoma; mpo Nkolo okomisi biso bato ya makasi kati na liloba na nzela ya bondimi, kasi osali biso te bato ya makasi na mosala ya kokoma; mpo osali bato oyo nyonso ete bakoka koloba mingi, na ntina ya Molimo Mosantu oyo opesi bango;

24 Mpe osali biso ete tokoka kokoma kaka moke, na ntina ya bozangi ntoki ya maboko na biso. Tala, osali biso bato makasi te na mosala ya kokoma lokola ndeko ya Yelede ya mobali, mpo osalaki ye mpo ete makambo oyo akomaki ezalaki makasi kutu lokola ozali, kino na kosengisa moto mpo na kotanga yango.

25 Lisusu osali ete maloba na biso makoma ya nguya mpe monene, kutu ete tokoki kokoma yango te; yango wana, ntango tokomi tomoni bolembu na biso, mpe tobeti libaku, na ntina ya lolenge ya kotia maloba na biso; mpe nabangi mbele baoyo bazali Bayuda-te batiola maloba na biso.

26 Mpe ntango nalobaka eye, Nkolo alobelaki ngai, kolobaka: Etioli ya liboma, kasi bakolela; mpe ngolu na ngai ekoki mpo na basokemi, ete bazwa te litomba likolo ya bolembu na bino;

27 Mpe soki bato bayei epayi na ngai nakolakisa bango bolembu na bango. Napesaka epayi ya bato bolembu ete bakoka kozala bato na bomikitisi; mpe ngolu na ngai ekoki mpo na bato nyonso oyo bamikitisaka liboso na ngai; mpo soki bamikitisi liboso na ngai, mpe bazali na bondimi na ngai, nde nakosala ete makambo ya bolembu makoma makasi mpo na bango.

28 Tala, nakolakisa epayi ya baoyo bazali Bayuda-te bolembu na bango, mpe nakolakisa epayi na bango ete bondimi, elikya, mpe bolingani ememaka epayi na ngai—liziba ya bosembo nyonso.

29 Mpe ngai, Moroni, eyokaki ngai maloba oyo, nabondisamaki, mpe nalobaki: O Nkolo, bosembo na yo ekosalema, mpo nayebi ete osalaka epayi ya bana ya bato engebene na bondimi na bango;

30 Mpo ndeko ya Yelede ya mobali alobaki epayi ya ngomba na Zelini, Longwa—mpe elongwaki. Mpe soki azalaka na bondimi te elingaki kolongwa te; yango wana yo osalaka ntango esili bato kozala na bondimi.

31 Mpo boye nde omimonisaki epayi ya bayekoli na yo; mpo esilaki bango kozala na bondimi, mpe koloba na nkombo na yo, omilakisaki epayi na bango na nguya monene.

32 Mpe lisusu namikundoli ete yo olobaki ete olengeli ndako mpo na moto, iyo, kutu na kati ya bifandelo ya Tata na yo, na yango moto akoka kozala na elikya ya malamu koleka; yango wana moto asengeli kozala na elikya; soki te akoki te kozwa libula na esika oyo olengeli.

33 Mpe lisusu, namikundoli ete olobaki ete, olingaki mokili, kutu kino na kopesa bomoi na yo mpo na mokili, ete okoka kokamata yango lisusu mpo na kolengela esika moko mpo na bana ya bato.

34 Mpe sikawa nayebi ete bolingo boye ozali na yango mpo na bana ya bato ezali bolingani; yango wana, longola se soki bato bazali na bolingani, bakoki te kosangola libula ya esika wana oyo olengelaki na mboka ya Tata na yo.

35 Yango wana, nayebi na likambo oyo olobi, ete soki baoyo bazali Bayuda-te bazali na bolingani te, na ntina ya bolembu na biso, ete okomeka bango, mpe okolongola talanta na bango, iyo, kutu oyo wana bazwaki, mpe okopesa epayi na bango oyo bakozala na beboo koleka.

36 Mpe esalemaki ete nasambelaki epayi ya Nkolo ete apesa Bayuda-te ngolu, ete bakoka kozala na bolingani.

37 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki epayi na ngai: Soki bazali na bolingani te ezali likambo te mpo na yo, ozali sembo; yango wana, bilamba na yo bikokomisama peto. Mpe lokola omonaki bolembu na yo okokomisama makasi, kutu mpo na kofanda na esika oyo nalengeli na bandako ya Tata na ngai.

38 Mpe sikawa ngai, Moroni, natombeli mbote ya suka epayi ya Bayuda-te, iyo, mpe lisusu epayi ya bandeko na ngai oyo nalingi, kino tokokutana liboso ya kiti ya bosambisi ya Klisto, wapi bato nyonso bakoyeba ete bilamba na ngai ezali na mbindo na makila na bino te.

39 Mpe na ntango wana nde bokoyeba ete namonaki Yesu, mpe asololaki na ngai miso na miso, mpe ete alobelaki ngai kati na bomikitisi mpenza, kutu lokola moto moko ayebisaka mosusu na lokota ya ngai moko, mpo na oyo etali makambo oyo;

40 Mpe, nakomi bobele moke, na ntina ya bolembu na ngai na mosala ya kokoma.

41 Mpe sikawa, nalingi kotinda bino koluka Yesu oyo na ntina ya nani baprofeta mpe bapostolo bakomaki, ete ngolu ya Nzambe Tata, mpe lisusu Nkolo Yesu Klisto, mpe Molimo Mosantu, oyo apesaka litatoli na bango, mokoka kozala mpe kofanda na bino libela. Amene.

Bimisa na lokasa