Makomi
Etele 4


Mokapo 4

Moroni atindami kokanga nkoma ya ndeko ya Yelede ya mobali—Ekobimisama te kino bato bakozala na bondimi lokola ndeko ya Yelede ya mobali—Klisto atindi bato mpo na kondima na maloba na Ye, mpe na oyo ya bayekoli na Ye—Bato batindami koyambola, mpe kondima nsango malamu, mpe kobikisama.

1 Mpe Nkolo atindaki ndeko ya Yelede ya mobali ete akita uta na ngomba uta na miso ya Nkolo, mpe akoma makambo oyo amonaki; mpe apekisami kobimisa yango epayi ya bana ya bato kino nsima ya ntango akotombolama likolo ya ekulusu; mpe mpo na ntina oyo mokonzi Mosiya abombi yango, ete ebimisama te epayi na mokili kino ekosila Klisto komimonisa epayi ya bato oyo.

2 Mpe esilaki Klisto komimonisa solo mpenza epayi ya bato na ye atindaki ete makoka kobimisama.

3 Mpe sikawa, nsima ya oyo wana, nyonso babebaki moke moke kati na bozangi boyambi; mpe ezalaki na moko te oyo atikalaki longola se Balamani, mpe babwakaki nsango malamu ya Klisto; boye natindami ete nabomba yango lisusu kati na mabele.

4 Tala, nakomaki likolo ya bapalaki oyo makambo oyo mpenza ndeko ya Yelede ya mobali amonaki; mpe ezalaki soki moke te na makambo monene mingi mamonisama koleka oyo wana mamonisamaki epayi ya ndeko ya Yelede ya mobali.

5 Yango wana Nkolo atindaki ngai nakoma yango; mpe nakomi yango. Mpe atindaki ngai ete nakanga yango; mpe atindaki ngai lisusu ete nasengeli kokanga bolimboli na yango mpe lokola; yango wana nakangaki bibongolelo, engebene na motindo ya Nkolo.

6 Mpo Nkolo alobaki epayi na ngai: ekosakolama te epayi ya baoyo bazali Bayuda-te kino na mokolo oyo bakoyambola uta na mabe na bango, mpe bakokoma peto liboso ya Nkolo.

7 Mpe na mokolo wana bakosalela bondimi na ngai, elobi Nkolo, kutu lokola ndeko ya Yelede ya mobali asalaki, ete bakoka kokoma bato basantisami na ngai, nsima nde nakomonisa epayi na bango makambo oyo ndeko ya Yelede ya mobali amonaki, kutu kino na kofungola epayi na bango bimoniseli na ngai nyonso, elobi Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, Tata ya lola mpe ya mabele, mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango.

8 Mpe ye oyo akowela na liloba ya Nkolo, tika ete alakelama mabe; mpe ye oyo akowangana makambo oyo, tika ete alakelama mabe; mpo epayi na bango nakolakisa makambo minene mingi te, elobi Yesu Klisto; mpo nazali ye oyo alobi.

9 Mpe na motindo na ngai balola efungwani mpe ekangemi; mpe na liloba na ngai mabele makoningana; mpe na motindo na ngai bafandi na yango bakokufa, kutu lokola soki na moto.

10 Mpe ye oyo andimi maloba na ngai te andimi bayekoli na ngai te; mpe soki ezali bongo ete ezali ngai moto nalobi to ngai te, bosambisa; mpo bokoyeba ete ezali ngai oyo nalobi, na mokolo ya nsuka.

11 Kasi ye oyo andimi makambo oyo nalobi, ye nde nakobimela na mamonisi ya Molimo na ngai, mpe mokoyeba mpe mokopesa litatoli. Mpo na ntina ya Molimo na ngai akoyeba ete makambo oyo ezali solo; mpo mandimisaka bato mpo na kosala bolamu.

12 Mpe eloko nyonso endimisaka bato mpo na kosala bolamu ezali ya ngai; mpo bolamu eyaka uta na moto mosusu te longola se soki ezali na ngai. Nazali se ye moko oyo akambaka bato na bolamu nyonso; ye oyo akondima maloba na ngai te akondima ngai te—ete nazali; mpe ye oyo akondima ngai te akondima te Tata oyo atindaki ngai. Mpo tala, nazali Tata, nazali pole, mpe bomoi, mpe bosolo mpo na mokili.

13 Boya epayi na ngai, O bino baoyo bozali Bayuda-te, mpe nakolakisa epayi na bino makambo minene mingi, boyebi boye ebombami na ntina ya bozangi boyambi.

14 Boya epayi na ngai, O bino ndako ya Yisalaele, mpe ekomonisama epayi na bino makambo boni minene Tata alengeli mpo na bino, uta na bokeli ya mokili; mpe ebimisami te epayi na bino, na ntina ya bozangi boyambi.

15 Tala, ntango bokopasola elamba ya bozangi boyambi oyo wana esali ete botikala kati na ezalela na bino ya nsomo ya mpe ya nkuna, mpe bokasi ya mitema, mpe bokufi miso ya mayele, nsima nde makambo minene mpe ya bokamwi oyo ebombani uta na bokeli ya mokili uta na bino—iyo, ntango bokobelela Tata na nkombo na ngai, na motema moko mobukana mpe molimo moko ya mawa, nsima nde bokoyeba ete Tata amikundolaki liyokani oyo asalaki epayi ya batata na bino, O ndako ya Yisalaele.

16 Mpe nsima nde ekofungwama na miso ya bato nyonso bimoniseli na ngai oyo nasalaki ete ekomama na mosali na ngai Yoane. Bomikundola, ntango bokomona makambo oyo, bokoyeba ete ntango ebelemi ete mamonisama na misala mpenza.

17 Boye, ntango bokozwa lisolo ya makomi oyo, bokoki koyeba ete mosala ya Tata mobandi na etando mobimba ya mboka.

18 Boye, boyambola bino nyonso nsuka ya mabele, mpe boya epayi na ngai, mpe bondima nsango malamu na ngai, mpe bobatisama na nkombo na ngai; mpo ye oyo andimi mpe abatisami akobikisama; kasi ye oyo andimi te akopesama etumbu; mpe bilembo ekolanda bango oyo bandimi na nkombo na ngai.

19 Mpe apambolami ye oyo amonani moto ya sembo mpo na nkombo na ngai na mokolo ya nsuka, mpo akotombolama mpo na kofanda kati na bokonzi elengelami mpo na ye uta na bokeli ya mokili. Mpe tala ezali ngai oyo nalobi yango. Amene.

Bimisa na lokasa