Makomi
Elamani 5


Mokapo 5

Nefi mpe Lehi bamipesi na koteyaka—Nkombo na bango ebiangi bango na komekola bomoi na bango nsima ya batata na bango—Klisto asikolaka bango oyo bayamboli—Nefi mpe Lehi basali babongwani mingi mpe batiami na boloko, mpe moto ezingi bango—Lipata moko ya molili lizipi bato nkama misato—Mabele maningani mpe mongongo moko motindi bato bayambola—Nefi mpe Lehi basololi elongo na banjelu, mpe ebele ya bato bazingami na moto. Penepene na mobu 30 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete na mobu se moko oyo, tala, Nefi atikaki kiti ya bosambisi na moto moko oyo kani nkombo ezalaki Sezolami.

2 Mpo lokola mibeko mpe ekobima na bango etiamaki na kopona ya bato nyonso, mpe baoyo boponaki mabe bazalaki na motango monene koleka bango oyo baponaki bolamu, boye bazalaki kokomela mpo na bobebisami, mpo mibeko ekomaki ya kobeba.

3 Iyo, mpe oyo ezalaki nyonso te; bazalaki bato ya matoyi mangongi, na lolenge ete bakokaki te koyangelama na mobeko to na boyengebene, longola se soki ekosuka na bobebisami na bango.

4 Mpe esalemaki ete Nefi akomaki na bolembi na ntina ya mabe na bango; mpe atikaki kiti ya bosambisi, mpe akamataki likolo na ye mokumba ya koteya liloba ya Nzambe mpo na nyonso oyo etikalaki ya mikolo na ye, mpe ndeko na ye ya mobali Lehi mpe lokola, mpo na nyonso oyo etikalaki ya mikolo na ye;

5 Mpo bamikundolaki maloba oyo tata na bango Elamani alobaki epayi na bango. Mpe oyo ezali maloba alobaki:

6 Tala, bana mibali na ngai, nazali na mposa ete bomikundola kobomba mitindo ya Nzambe; mpe nalingi ete bosakola epayi ya bato maloba oyo. Tala, napesi epayi na bino nkombo ya baboti na biso ya yambo baoyo bayaki uta na mboka ya Yelusaleme; mpe oyo nasali yango mpo ete ntango bokomikundola nkombo na bino bokoka komikundola bango; mpe ntango bokomikundola bango bokoka komikundola misala na bango; mpe ntango bokomikundola misala na bango bokoka koyeba ete elobami, mpe lisusu ekomami, ete ezalaki malamu.

7 Boye, bana mibali na ngai, nalingi ete bosala oyo ezali malamu, mpo ete elobama na ntina na bino, mpe lisusu ekomama, kutu lokola elobamaki mpe ekomamaki na ntina na bango.

8 Mpe sikawa bana mibali na ngai, tala nazali na mwa mposa mingi ya kosenga na bino, oyo mposa ezali, ete bokoka te kosala makambo oyo mpo ete bokoka komikumisa, kasi ete bokoka kosala makambo oyo mpo na kobomba mpo na bino moko biloko ya motuya na lola, iyo, oyo ezali seko, mpe oyo bibebaka te; iyo, ete bokoka kozala na likabo wana ya motuya ya bomoi ya seko, boye tozali na ntina ya kobanza ete epesamaki na batata na biso.

9 O bomikundola, bomikundola, bana mibali na ngai, maloba oyo mokonzi Benyamina alobaki epayi ya bato na ye; iyo, bomikundola ete ezali na nzela te soki te mayele mosusu te wapi bato bakoki kobikisama, bobele na nzela ya makila ya bomikabi ya Yesu Klisto, oyo akoya; iyo, bomikundola ete azali koya mpo na kosikola mokili.

10 Mpe bomikundola lisusu maloba oyo Amuleki alobaki epayi ya Zezilomi, na engumba ya Amoniya; mpo alobaki epayi na ye ete Nkolo solo akoya mpo na kosikola bato na ye, kasi akoya te mpo kosikola bango kati na masumu na bango, kasi mpo na kosikola bango uta na masumu na bango.

11 Mpe azali na nguya epesami epayi na ye uta na Tata mpo na kosikola bango uta na masumu na bango na ntina ya boyamboli; yango wana atindaki banjelu na ye mpo na kosakola nsango ya masengami ya boyamboli, oyo ememaka bato na nse ya nguya ya Mosikoli, mpo na lobiko ya milimo na bango.

12 Mpe sikawa, bana na ngai ya mibali, bomikundola, bomikundola ete ezali likolo ya libanga ya Mosikoli na biso, oyo azali Klisto, Mwana ya Nzambe, ete bosengeli kotonga moboko na bino; ete ntango zabulu akotinda mipepe na ye ya makasi, iyo, makula na ye na mopepe monene, iyo, ntango ekobete mvula ya mabanga mpe monkalikali na ye ya makasi nyonso likolo na bino, ekozala na nguya likolo na bino te mpo na kobenda bino na nse na libulu ya mpasi mpe bolozi ezanga nsuka, na ntina ya libanga likolo ya oyo wapi botongami, oyo ezali moboko moko ya solo solo, moboko oyo wapi soki bato batongeli likolo bakoki kokweya te.

13 Mpe esalemaki ete oyo ezalaki maloba oyo Elamani ateyaki bana mibali na ye; iyo, ateyaki bango makambo mingi oyo ekomami te, mpe lisusu makambo mingi oyo ekomami.

14 Mpe bamikundolaki maloba na ye; mpe boye bakendaki, kobombaka mitindo ya Nzambe, mpo na koteya liloba ya Nzambe na kati ya bato nyonso ya Nefi, kobandaka na engumba ya Beboo;

15 Mpe uta kuna kokende liboso na engumba ya Gidi; mpe uta engumba ya Gidi na engumba ya Muleke;

16 Mpe kutu uta engumba moko na mosusu, kino bakendaki na kati ya bato nyonso ya Nefi baoyo bazalaki na mboka epayi na sudi; mpe uta kuna kati na mboka ya Zalayemila, na kati ya Balamani.

17 Mpe esalemaki ete bateyaki na nguya monene, na lolenge ete bayokisaki nsoni na mingi ya bakabwani oyo balongwaki uta na Banefi, na lolenge ete bayaki mpe batubelaki masumu na bango mpe babatisamaki mpo na boyamboli, mpe sasaipi bazongaki epayi ya Banefi kosala makasi mpo na kobongisela bango mbeba oyo basalaki.

18 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi bateyaki Balamani na nguya mpe likoki monene ya lolenge oyo, mpo bapesamaki nguya mpe likoki ete bakoka koloba, mpe lisusu bapesamaki nini basengeli koloba epayi na bango—

19 Boye balobaki na bokamwi monene ya Balamani, mpo na kondimisa bango, na lolenge ete nkoto mwambe ya Balamani baoyo bazalaki na mboka ya Zalayemila mpe nzinganzinga mpembeni babatisamaki mpo na boyamboli, mpe bandimisamaki mpo na oyo etali nkuna ya mimesano ya batata na bango.

20 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi bakobaki uta kuna mpo na kokende na mboka ya Nefi.

21 Mpe esalemaki ete bakamatamaki na limpinga ya Balamani mpe babwakamaki na boloko; iyo, kutu na ndako ya boloko se moko wana wapi Amona mpe bandeko mibali na ye babwakamaki na basali ya Limiyi.

22 Mpe esilaki bango kobwakama kati na boloko mikolo mingi na kozangaka bilei, tala, bakendaki kati na boloko mpo na kokamata bango ete bakoka koboma bango.

23 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi bazingamaki mpembeni lokola soki na moto, kutu na lolenge ete bamekaki te kotia maboko na bango likolo na bango mpo na bobangi ete mbele bakozikisama. Nzokande, Nefi mpe Lehi bazikisamaki te; mpe bazalaki lokola batelemaki na katikati ya moto mpe bazikisamaki te.

24 Mpe ntango bamonaki ete bazingamaki mpembeni na likonzi ya moto, mpe ete ezikisaki bango te, mitema na bango mizwaki mpiko.

25 Mpo bamonaki ete Balamani bamekaki te kotia maboko na bango likolo na bango; mpe bamekaki te kopusana penepene na bango, kasi batelemaki lokola soki bakomisamaki bababa na bokamwi.

26 Mpe esalemaki ete Nefi mpe Lehi batelemaki mpe babandaki koloba epayi na bango, kolobaka: Bobanga te, mpo tala, ezali Nzambe oyo alakisi bino likambo oyo ya kokamwa, na oyo wapi elakisami epayi na bino ete bokoki te kotia maboko na bino likolo na biso mpo na koboma biso.

27 Mpe tala, ntango balobaki maloba oyo, mabele maninganaki mingi koleka, mpe bifelo ya boloko eninganaki lokola soki ezalaki penepene na kokweya na mabele; kasi tala, ekweyaki te. Mpe tala, bango oyo bazalaki na boloko bazalaki Balamani mpe Banefi oyo bazalaki bakabwani.

28 Mpe esalemaki ete bazipamaki na lipata moko ya molili, mpe bobangi makasi mpe ya nsomo eyaki likolo na bango.

29 Mpe esalemaki ete mongongo moko eyaki lokola soki ezalaki likolo ya lipata ya molili, kolobaka: Boyambola, boyambola, mpe boluka lisusu te kobebisa basali na ngai baoyo natindi epayi na bino mpo na kosakola nsango ya nsai.

30 Mpe esalemaki ete ntango bayokaki mongongo oyo, mpe emonaki bango ete ezalaki te mongongo ya kake, mpe ezalaki te mongongo ya makelele ya lokito monene, kasi tala, ezalaki se mongongo oyo ya kimia mpe ya pete moko ya bobongi nie, lokola soki ezalaki esololi, mpe etobolaki kutu kino molimo mpenza—

31 Mpe ata pete ya mongongo yango, tala mabele maninganaki mingi koleka, mpe bifelo ya boloko bilengaki lisusu, lokola soki ezalaki penepene na kokweya na mabele; mpe tala lipata ya molili, oyo ezipaki bango, lipanzanaki te—

32 Mpe tala mongongo moyaki lisusu, kolobaka: Boyambola, boyambola, mpo bokonzi ya lola ezali penepene; mpe boluka lisusu te koboma basali na ngai. Mpe esalemaki ete mabele maninganaki lisusu, mpe bifelo bilengaki.

33 Mpe lisusu mbala ya misato mongongo yango eyaki, mpe elobelaki bango maloba ya bokamwi oyo makoki te kolobama na moto; mpe bifelo bilengaki lisusu, mpe mabele maninganaki lokola soki ezalaki penepene na kokabwana na katikati.

34 Mpe esalemaki ete Balamani bakokaki te kokima na ntina ya lipata ya molili oyo ezipaki bango; iyo, mpe lisusu bakokaki koningana te na ntina ya bobangi boye eyaki likolo na bango.

35 Sikawa ezalaki na moko na kati na bango oyo azalaki Monefi uta na mbotama, oyo azalaki kala moto ya eklezia ya Nzambe kasi akabwanaki uta na bango.

36 Mpe esalemaki ete abalukaki ye moko mpembeni, mpe tala, amonaki na nzela ya lipata ya molili bilongi ya Nefi mpe Lehi; mpe tala, bangengaki mingi koleka mpenza, kutu lokola bilongi ya banjelu. Mpe amonaki ete batombolaki miso na bango na lola; mpe bazalaki na ezalela lokola soki kolobaka to mpe kotombolaka mingongo na bango epayi na mozali moko oyo bazalaki komona.

37 Mpe esalemaki ete moto oyo agangaki epayi na ebele ya bato, ete bakoka kobaluka mpe kotala. Mpe tala, nguya ya kobaluka epesamaki epayi na bango ete batala; mpe bamonaki bilongi ya Nefi mpe Lehi.

38 Mpe balobaki epayi ya moto na: Tala, nini elingi koloba makambo oyo nyonso, mpe ezali nani oyo bato oyo bazali kosolola na ye?

39 Sikawa nkombo ya moto yango ezalaki Aminadabi. Mpe Aminadabi alobaki epayi na bango: Bazali kosolola na banjelu ya Nzambe.

40 Mpe esalemaki ete Balamani balobaki epayi na ye: Nini tokosala, ete lipata oyo ya molili ekoka kolongwa uta na kozipaka biso?

41 Mpe Aminadabi alobaki epayi na bango: Bosengeli koyambola, mpe kobelela epayi na mongongo, kutu kino bokozala na bondimi na Klisto, oyo ateyamaki epayi na bino na Alma, mpe Amuleki, mpe Zezilomi; mpe ntango ekosala bino oyo, lipata ya molili ekolongwa uta na kozipaka bino.

42 Mpe esalemaki ete nyonso babandaki kobelela epayi na mongongo na ye oyo aningisaki mabele; iyo, babelelaki kutu kino lipata ya molili lipanzanaki.

43 Mpe esalemaki ete ntango babwakaki miso na bango mpembeni, mpe emonaki bango ete lipata ya molili lipanzanaki uta na kozipaka bango, tala, bamonaki ete bazingamaki mpembeni, iyo moto moko moko, na likonzi ya moto.

44 Mpe Nefi mpe Lehi bazalaki na katikati na bango; iyo, bazingamaki mpembeni; iyo, bazalaki lokola soki na katikati ya moto kopelaka na mololi, kasi esalaki bango mpasi te, mpe emataki te likolo ya bifelo ya boloko; mpe batondisamaki na bosepeli boye ekoki kolimbolama te mpe boye etonda na nkembo.

45 Mpe tala, Molimo Mosantu ya Nzambe akitaki uta na lola, mpe akotaki kati na mitema na bango, mpe batondisamaki lokola soki na moto, mpe bakokaki koloba maloba ya kokamwa.

46 Mpe esalemaki ete mongongo eyaki epayi na bango, iyo, mongongo ya elengi, lokola soki ezalaki mamimisami, kolobaka:

47 Kimia, kimia ezala epayi na bino, na ntina ya bondimi na bino na Molingami Malamu na ngai, oyo azalaki uta na bokeli ya mokili.

48 Mpe sikawa, ntango bayokaki oyo babwakaki miso na bango lokola soki mpo na kotala wapi mongongo eutaki; mpe tala, bamonaki lola efungwani; mpe banjelu bakitaki uta na lola mpe basalelaki bango.

49 Mpe ezalaki penepene na nkama misato ya bato oyo bamonaki mpe bayokaki makambo oyo; mpe basengaki kokende, kasi kokamwa te, soki mpe kozala na ntembe te.

50 Mpe esalemaki ete bakendaki, mpe basalelaki bato, kosakolaka epayi na bituka nyonso nzinganzinga mpembeni makambo nyonso bayokaki mpe bamonaki, na lolenge ete eteni mingi koleka ya Balamani bandimisamaki na bango, na ntina ya bonene ya bilembo ya bosolo oyo bazwaki.

51 Mpe mingi lokola bandimisamaki, bakitisaki na nse bibundeli na bango ya bitumba, mpe lisusu boyini na bango mpe momeseno ya batata na bango.

52 Mpe esalemaki ete batikelaki mpenza Banefi bamboka ya bozwi na bango.

Bimisa na lokasa