Makomi
Yakobo 1


Buku ya Yakobo
Ndeko ya Nefi ya Mobali

Maloba ya liteya na ye epayi ya bandeko mibali na ye. Ayokisi moto oyo aluki kokweisa malongi ya Klisto nsoni. Mwa maloba moke mpo na oyo etali mambi ya kala ya bato ya Nefi.

Mokapo 1

Yakobo mpe Yosefe baluki kondimisa bato mpo na kondima Klisto mpe kobomba mitindo na Ye—Nefi akufi—Nkuna eluti na kati ya Banefi. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpo tala, esalemaki ete mibu ntuku mitano na mitano milekaki uta na ntango Lehi atikaki Yelusaleme; yango wana, Nefi apesaki ngai, Yakobo, motindo mpo na oyo etali bapalaki ya mike, likolo ya oyo wapi makambo oyo ekomami.

2 Mpe apesaki ngai, Yakobo, motindo ete nakoma likolo ya bapalaki oyo mwa makambo ya mike oyo namonaki ete ezali ya motuya koleka; ete nasimba te, longola se mwa makambo moke, mpo na oyo etali mambi ya kala ya bato oyo babiangami bato ya Nefi.

3 Mpo alobaki ete mambi ya kala ya bato na ye makokomama likolo ya bapalaki na ye mosusu, mpe ete nakobomba bapalaki oyo mpe nakokitanisa yango epayi na nkona na ngai, uta nkola na nkola.

4 Mpe soki ezalaki na mateya oyo ezalaki ya bule, soki te emoniseli oyo ezalaki ya ntina monene, soki te masakoli, ete nakoma mito na yango likolo ya bapalaki oyo, mpe ete nasimba yango mingi lokola ekoki mpenza, mpo na ntina ya Klisto, mpe mpo na ntina ya bato na biso.

5 Mpo na ntina ya bondimi mpe motema likolo monene, emonisamaki solo epayi na biso mpo na oyo etali bato na biso, makambo nini makokomela bango.

6 Mpe lisusu tozwaki bimoniseli mingi, mpe molimo ya masakoli mingi; yango wana, toyebaki Klisto mpe bokonzi na ye, boye bokoya.

7 Yango wana tosalaki na molende na kati ya bato na biso, ete tokoka kondimisa bango mpo na koya epayi ya Klisto, mpe bazala na likabo na bolamu ya Nzambe, ete bakoka kokota kati na bopemi na ye, na kobangaka ete na lolenge moko to mosusu, alapa ndai na nkele na ye ete bayingela te, lokola na botumoli na mikolo ya masenginia, ntango ezalaki bana ya Yisalaele kati na esobe.

8 Yango wana, totombeli na Nzambe ete tokoka kondimisa bato nyonso ete batomboka na Nzambe te, batumola ye na nkanda te, kasi ete bato nyonso bandima Klisto, mpe bamona liwa na ye, mpe bayoka mpasi ya ekulusu na ye mpe bakumba nsoni ya mokili; yango wana, ngai, Yakobo, nandimi kokokisa motindo ya ndeko na ngai Nefi.

9 Sikawa Nefi abandaki kokoma mubange, mpe amonaki ete asengeli kokufa kala mingi te; yango wana, apakolaki moto mpo na kozala mokonzi mpe mokambi likolo ya bato na ye sikawa, engebene na boyangeli ya bakonzi.

10 Lokola bato balingaki Nefi mingi koleka, mpo ete azalaki mobateli monene na bango, lokola asalelaki mompanga ya Labana mpo na kobatela bango, mpe lokola asalaki mikolo na ye nyonso mpo na bolamu na bango—

11 Yango wana, bato bazalaki na mposa mpo na kobatela nkombo na ye na bokundoli. Mpe moto nyonso oyo asengelaki kokonza na esika na ye abiangamaki na bato, Nefi ya mibale, Nefi ya misato, mpe bongo na bongo, engebene na boyangeli ya bakonzi; mpe boye nde ezalaki bango kobiangama na bato, ata nkombo na bango ezalaki nini.

12 Mpe esalemaki ete Nefi akufaki.

13 Sikawa bato oyo bazalaki Balamani te bazalaki Banefi; nzokande, babiangamaki Banefi, Bayakobi, Bayosefe, Bazolami, Balamani, Balemuele, mpe Bayisamaele.

14 Kasi ngai, Yakobo, uta sikawa nakokesenisa bango te na nkombo oyo, kasi nakobianga bango Balamani baoyo balukaka kobebisa bato ya Nefi, mpe baoyo bazali baninga ya Nefi nakobianga bango Banefi, soki te bato ya Nefi, engebene na boyangeli ya bakonzi.

15 Mpe sikawa esalemaki ete bato ya Nefi, na nse ya boyangeli ya mokonzi ya mibale, babandaki kokolisa mitema na bango makasi, mpe bamitikaki mwa moke na misala ya nkuna, lokola kaka Dawidi ya kala oyo alingaki basi mpe bamakango mingi, mpe lisusu Solomo, mwana na ye.

16 Iyo, mpe babandaki lisusu koluka ebele wolo mpe mpauni, mpe babandaki komitombola mwa moke na lolendo.

17 Yango wana ngai, Yakobo, napesaki bango maloba oyo lokola nalakisaki bango na tempelo, ezwaki ngai yambo etinda na ngai uta na Nkolo.

18 Mpo ngai, Yakobo, mpe ndeko na ngai Yosefe tobulisamaki banganganzambe mpe bateyi ya bato oyo, na loboko ya Nefi.

19 Mpe tokumisaki mosala na biso mpo na Nkolo, kondimaka mokumba na biso, kokamata masumu ya bato likolo ya mitu na biso moko soki tolakisaki bango te liloba ya Nzambe na molende nyonso; yango wana, na kosalaka na bokasi na biso makila na bango makoka te kozala likolo ya bilamba na biso; soki te makila na bango ekoya likolo ya bilamba na biso, mpe tokozwama te lokola bato bazanga mbindo na mokolo ya nsuka.

Bimisa na lokasa