Makomi
Yakobo 5


Mokapo 5

Yakobo atangi Zenosi mpo na oyo etali lisese ya nzete ya elaya ya mboka mpe nzete ya elaya ya zamba—Ezali bililingi ya bato ya Yisalaele mpe Bayuda-te—Bopanzami mpe bosangani ya Yisalaele esili komonisama na bililingi—Etambe oyo ezali kolobela Banefi mpe Balamani mpe ndako nyonso ya Yisalaele—Bayuda-te bakokangisama kati na Yisalaele—Na nsuka elanga ya bilaya ekozikisama. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, bandeko na ngai, ezali bino komikundola te ete botangaki maloba ya profeta Zenosi, oyo alobaki epayi na ndako ya Yisalaele, kolobaka:

2 Yoka, O yo ndako ya Yisalaele, mpe tia litoyi na maloba na ngai, profeta ya Nkolo.

3 Mpo tala, boye elobi Nkolo, nakomeka yo, O ndako ya Yisalaele, na nzete ya elaya ya mboka, oyo moto akamataki mpe aleisaki na elanga ya bilaya na ye; mpe ekolaki mpe ekomaki ya kala, mpe ebandaki kobeba.

4 Mpe esalemaki ete nkolo ya elanga ya bilaya akendaki, mpe amonaki ete nzete ya elaya na ye ebandaki kobeba; mpe alobaki: nakosokola yango, mpe nakotimola nzinganzinga na yango, mpe nakoleisa yango, ete mbele ekoka kobimisa bitape ya sika mpe ya petepete, mpe ekowa te.

5 Mpe esalemaki ete asokolaki yango, mpe atimolaki nzinganzinga na yango, mpe aleisaki yango engebene na liloba na ye.

6 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mingi ebandaki kotinda ya moke bitape ya sika mpe ya petepete; kasi tala, mama ya nsonge na yango ebandaki kobeba.

7 Mpe esalemaki ete nkolo ya elanga ya bilaya amonaki yango, mpe alobaki epayi ya mosali na ye: Esali ngai mpasi ete nabungisa nzete oyo; yango wana, kende mpe buka bitape uta na nzete ya elaya ya zamba, mpe mema yango awa epayi na ngai; mpe tokopikola bamama ya bitape oyo bibandi kokawuka, mpe tokobwaka yango na kati ya moto ete bikoka kozika.

8 Mpe tala, elobi Nkolo ya elanga ya bilaya, nalongoli mingi ya bitape oyo ya sika mpe ya petepete, mpe nakokangisa yango kati wapi bisika nalingi; mpe likambo ezali te soki mosisa ya nzete oyo mokowa, nakoka kobatela mbuma na yango mpo na ngai moko; yango wana, nakozwa bitape oyo ya sika mpe ya petepete, mpe nakokangisa yango kati wapi bisika nalingi.

9 Kamata bitape ya nzete ya elaya ya zamba, mpe kangisa yango na kati, na bisika na yango; mpe oyo napikolaki nakobwaka na kati ya moto mpe nakozikisa yango, ete bitia mabele ya elanga na ngai ya bilaya nkaka te.

10 Mpe esalemaki ete mosali ya Nkolo ya elanga ya bilaya asalaki engebene na liloba ya Nkolo ya elanga ya bilaya, mpe akangisaki na kati, bitape ya nzete ya elaya ya zamba.

11 Mpe Nkolo ya elanga ya bilaya asalaki ete etimolisama nzinganzinga, mpe esokolama, mpe eleyisama, kolobaka epayi ya mosali na ye: Esali ngai mpasi ete nabungisa nzete oyo; yango wana, mpo ete nakoka mbele kobatela misisa na yango ete mikoka kowa te, ete nakoka kobatela yango mpo na ngai moko, nasalaki likambo oyo.

12 Yango wana, kende na nzela na yo; kengela nzete, mpe leisa yango, engebene na maloba na ngai.

13 Mpe bitape oyo nakotia na eteni ya esika eleki nse ya elanga na ngai ya bilaya, esika wapi nakolinga, likambo ezali te epayi na yo; mpe nakosala yango ete nakoka kobatela mpo na ngai moko bitape oyo bibimaki na nzete; mpe lisusu, ete nakoka kotanda mbuma na yango mpo na kolengela eleko, mpo na ngai moko; mpo esali ngai mpasi ete nabungisa nzete oyo mpe mbuma na yango.

14 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya akendaki na nzela na ye, mpe abombaki bitape oyo bibimaki na nzete ya elaya ya mboka na eteni ya esika eleki nse ya elanga na ngai ya bilaya, ndambo na moko ndambo na mosusu, engebene na bolingi mpe elengi na ye.

15 Mpe esalemaki ete ntango molai elekaki, mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali na ye: Yaka, tika tokita na kati ya elanga ya bilaya, ete tokoka kosala na kati ya elanga ya bilaya.

16 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya, mpe lisusu mosali, bakitaki na kati ya elanga ya bilaya mpo na kosala. Mpe esalemaki ete mosali alobaki epayi ya Nkolo na ye: Tala, mona awa; tala nzete.

17 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya atalaki mpe amonaki nzete oyo wapi bitape ya nzete ya elaya ya zamba oyo bakangisaki na kati; mpe ekolaki mpe ebandaki kobota mbuma. Mpe amonaki ete ezalaki malamu; mpe mbuma na yango ezalaki lokola mbuma ebimi na nzete ebotami na mabele.

18 Mpe alobaki epayi ya mosali na ye: Tala, bitape ya nzete ya zamba ezwaki malili ya mosisa na yango, na lolenge ete mosisa na yango mobimisaki makasi mingi; mpe na ntina ya makasi mingi ya mosisa na yango bitape ya zamba ebotaki mbuma ya elanga. Sikawa, soki tokangaka te bitape oyo na kati, nzete na yango elingaki kowa. Mpe sikawa, tala, nakotanda likolo mbuma mingi, oyo nzete na yango ebotaki; mpe mbuma na yango nakotanda likolo mpo na kolengela eleko, mpo na ngai moko.

19 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali: Yaka, tika tokende na eteni ya esika eleki nse ya elanga ya bilaya, mpe totala soki bitape mpenza ya nzete bibotaki mbuma mingi te lisusu, ete nakoka kotanda likolo mbuma na yango mpo na kolengela eleko, mpo na ngai moko.

20 Mpe esalemaki ete bakendaki wapi nkolo abombaki bitape oyo bibimaki na nzete, mpe alobaki epayi ya mosali: Tala oyo; mpe amonaki ya yambo oyo ebotaki mbuma mingi; mpe amonaki lisusu ete ezalaki malamu. Mpe alobaki epayi ya mosali: Kamata mbuma na yango, mpe tanda yango likolo mpo na kolengela eleko, ete nakoka kobatela yango epayi na ngai moko; mpo tala, elobi ye, ntango molai oyo naleisaki yango, mpe eboti mbuma mingi.

21 Mpe esalemaki ete mosali alobaki epayi ya Nkolo na ye: mpo na nini oyei awa kowana nzete oyo, to etape ya nzete oyo? Mpo tala, ezalaki esika ya mabe mingi koleka na mabele nyonso ya elanga ya bilaya na yo.

22 Mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi na ye: Kopesa ngai toli te; nayebaki ete ezalaki esika ya mabe ya mabele; yango wana, nalobaki epayi na yo, naleisaki yango ntango molai oyo, mpe omoni ete eboti mbuma mingi.

23 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali na ye: Tala awa; tala nalonaki etape mosusu ya nzete; mpe oyebi ete esika oyo ya mabele ezalaki ya mabe koleka oyo ya yambo. Kasi, tala nzete. Naleisaki yango ntango molai oyo, mpe eboti mbuma mingi; boye, sangisa yango, mpe tanda yango likolo mpo na kolengela eleko, ete nakoka kobatela yango mpo na ngai moko.

24 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki lisusu epayi ya mosali na ye: Tala awa, mpe tala etape mosusu mpe lokola, oyo nalonaki; tala ete naleisaki yango mpe lokola, mpe eboti mbuma ebele.

25 Mpe alobaki epayi ya mosali: Tala awa mpe mona oyo ya nsuka. Tala, oyo nalonaki na esika ya mabele malamu; mpe naleisaki yango ntango molai oyo, mpe bobele ndambo ya nzete eboti mbuma ya elanga, mpe ndambo mosusu ya nzete eboti mbuma ya zamba; tala, naleisaki nzete oyo lokola mosusu.

26 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali: Pikola bitape oyo biboti te mbuma malamu, mpe bwaka yango kati na moto.

27 Kasi tala, mosali alobaki epayi na ye: Tika tosokola yango, mpe totimola nzinganzinga na yango, mpe toleisa yango na mwa ntango molai mingi, ete ekoka mbele kobota mbuma ya malamu mpo na yo, ete okoka kotanda yango likolo mpo na kolengela eleko.

28 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya mpe mosali ya Nkolo ya elanga ya bilaya baleisaki mbuma nyonso ya elanga ya bilaya.

29 Mpe esalemaki ete ntango molai elekaki, mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali na ye: Yaka, tika tokita kati na elanga ya bilaya, ete tokoka lisusu kosala na elanga ya bilaya. Mpo tala, ntango ekomi penepene, mpe kala mingi te nsuka ekoya; yango wana, nasengeli kotanda mbuma mpo na kolengela eloko, mpo na ngai moko.

30 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya mpe mosali bakitaki kati na elanga ya bilaya; mpe bakomaki na nzete na yango oyo kani bitape mpenza bibukamaki, mpe bitape ya nzete ya zamba bikangisamaki na kati; mpe tala ndenge nyonso ya mbuma etondisaki nzete yango.

31 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya amekaki mbuma, ndenge na ndenge engebene na motango na yango. Mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki: Tala, ntango molai oyo toleisaki nzete oyo, mpe natandaki mbuma mingi likolo mpo na ngai moko mpo na kolengela eleko.

32 Kasi tala, mbala oyo eboti mbuma mingi, mpe moko te na yango ezali malamu. Mpe tala, ezali na mbuma ya mabe ya ndenge na ndenge; mpe epesi ngai litomba te, ata mosala nyonso na biso; mpe sikawa ezali kosala ngai mpasi ete nabungisa nzete oyo.

33 Mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali: Nini tokosala na nzete yango, ete nakoka kobatela lisusu mbuma malamu na yango mpo na ngai moko?

34 Mpe mosali alobaki epayi ya Nkolo na ye: Tala, mpo okangaki na kati ya bitape ya nzete ya elaya ya zamba yango biliesaki misisa, ete ezali na bomoi mpe miwaki te; yango wana omoni ete ezali naino malamu.

35 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali na ye: Nzete epesi ngai litomba te, mpe misisa na yango mipesi ngai litomba te boye wana ekowumela yango se kobota mbuma ya mabe.

36 Nzokande, nayebi ete misisa ezali malamu, mpe mpo na ntina na ngai moko nabatelaki yango; mpe mpo na makasi mingi na yango kino sikawa miboti, uta na bitape ya nzete ya zamba, mbuma malamu.

37 Kasi tala, bitape ya zamba bikolaki mpe ntina na yango; mpe na ntina ete bitape ya zamba elongaki misisa na yango ebotaki mbuma ya mabe ebele; mpe mpo ebotaki mbuma ya mabe mingi omoni ete ebandi kowa; mpe kala mingi te ekokomela, ete ekoka kobwakama kati na moto, longola se soki tokosala eloko mpo na kobatela yango.

38 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali na ye: Tika tokita kati na eteni ya esika eleki nse ya elanga ya bilaya, mpe totala soki bitape ya nzete ebimaki na mabele biboti lisusu mbuma ya mabe.

39 Mpe esalemaki ete bakitaki kati na eteni ya esika eleki nse ya elanga ya bilaya. Mpe esalemaki ete bamonaki ete mbuma ya bitape ya nzete ebimaki na mabele ekomaki lisusu ya kobeba; iyo, ya yambo mpe ya mibale mpe lisusu ya nsuka, ekomaki nyonso ya kobeba.

40 Mpe mbuma ya zamba ya oyo ya nsuka elongaki eteni wana ya nzete oyo ebotaki mbuma malamu, kutu kino etape ekawukaki nie mpe ekufaki.

41 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alelaki, mpe alobaki epayi ya mosali: Nini nakokaki lisusu kosala mingi koleka mpo na elanga na ngai ya bilaya?

42 Tala, nayebaki ete mbuma nyonso ya elanga ya bilaya, longola se oyo, ekomaki ya kobeba. Mpe sikawa oyo, oyo ebotaki mbuma malamu mbala moko ekomi lisusu ya kobeba; mpe sikawa nzete nyonso ya elanga na ngai ya bilaya ezali malamu mpo na eloko moko te longola se mpo na kokatama mpe kobwakama kati na moto.

43 Mpe tala oyo ya nsuka, oyo kani etape ekawukaki nie, nalonaki yango na esika moko ya mabele malamu; iyo, kutu oyo ezalaki ya boponi epayi na ngai koleka biteni nyonso mosusu ya mboka ya elanga na ngai ya bilaya.

44 Mpe omonaki ete nakataki lisusu oyo etiaki nkaka na eteni oyo ya mabele, ete nakoka kowana nzete oyo na esika na yango.

45 Mpe omonaki ete eteni na yango ebotaki mbuma malamu, mpe eteni na yango ebotaki mbuma ya zamba; mpe mpo napikolaki bitape na yango te mpe babwakaki yango kati na moto te, tala, elongaki etape ya malamu ete ekawukaki nie.

46 Mpe sikawa, tala, atako bokebi nyonso boye nasalaki mpo na elanga na ngai ya bilaya, nzete na yango ekomi ya kobeba, ete eboti mbuma malamu te; mpe oyo nazalaki na elikya ya kobatela, mpo na kotanda likolo mbuma na yango mpo na kolengela eleko, mpo na ngai moko. Kasi, tala, ekomi nzete ya elaya ya zamba, mpe ezali na motuya moko te kasi mpo na kokatama mpe kobwakama kati na moto; mpe ezali kosala ngai mpasi ete nabungisa yango.

47 Kasi nini nakokaki lisusu kosala kati na elanga na ngai ya bilaya? Elembisaki ngai loboko na ngai, ete naleisaki yango te? Te, naleisaki yango, mpe natimolaki nzinganzinga na yango, mpe nasukolaki yango, mpe natielaki yango malalelo; mpe nasembolaki loboko na ngai penepene na mokolo mobimba, mpe nsuka ekomi penepene. Mpe ezali kosala ngai mpasi ete nakata nzete nyonso ya elanga na ngai ya bilaya, mpe nabwaka yango kati na moto ete ezikisama. Nani oyo abebisaki elanga na ngai ya bilaya?

48 Mpe esalemaki ete mosali alobaki epayi ya Nkolo na ye: Ezali te bokoli molai ya elanga ya bilaya na yo—bitape na yango bilekelaki te misisa oyo ezali malamu? Mpe mpo bitape bilekelaki misisa na yango, tala bikolaki mbangu mingi koleka makasi ya misisa, kokamataka makasi mpo na yango moko. Tala, nalobi, ezali oyo te ntina nini nzete ya elanga ya bilaya na yo ekomaki kobeba?

49 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali: Tika tokende mpe tokata nzete ya elanga ya bilaya mpe tobwaka yango kati na moto, ete etia mabele ya elanga na ngai ya bilaya nkaka te, mpo nasalaki nyonso. Nini nakokaki lisusu kosala mpo na elanga na ngai ya bilaya?

50 Kasi, tala, mosali alobaki epayi ya Nkolo ya elanga ya bilaya: Tikela yango mwa ntango molai.

51 Mpe Nkolo alobaki: iyo, nakotikela yango mwa ntango molai, mpo ekosala ngai mpasi ete nabungisa nzete ya elanga na ngai ya bilaya.

52 Yango wana, tika tokamata uta na bitape ya oyo nalonaki na eteni ya esika eleki nse ya elanga na ngai ya bilaya, mpe tika tokanga yango kati na nzete uta wapi biwutaki; mpe tika topikola uta na nzete yango bitape oyo kani mbuma eleki bololo, mpe tokanga kati na bitape ya nzete ebimaki na mabele na esika na yango.

53 Mpe oyo nakosala ete nzete ekoka kowa te, ete, mbele, nakoka kobatela mpo na ngai moko misisa na yango mpo na ntina na ngai moko.

54 Mpe, tala, misisa ya bitape ya nzete ebimaki na mabele oyo nalonaki epayi wapi nalingaki ezali naino na bomoi; yango wana, ete nakoka kobatela yango lisusu mpo na ntina na ngai moko, nakokamata ndambo bitape ya nzete oyo, mpe nakokanga yango kati na yango. Iyo, nakokanga kati na yango bitape ya nzete mama na yango, ete nakoka kobatela misisa lisusu mpo na ngai moko, ete ntango bikokoma makasi mpenza bikoki mbele kobota mbuma malamu mpo na ngai, mpe nakoka naino kozala na nkembo na mbuma ya elanga na ngai ya bilaya.

55 Mpe esalemaki ete bakamataki uta na nzete ebimaki na mabele oyo ekomaki ya zamba, mpe bakangaki bitape na kati ya nzete ebimaki na mabele, oyo ekomaki lisusu ya zamba.

56 Mpe bakamataki lisusu ya nzete ebimaki na mabele oyo ekomaki lokola ya zamba, mpe bakangaki kati na nzete mama na yango.

57 Mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi ya mosali: Kopikola bitape ya zamba uta na nzete te, longola se mpo na oyo ezali bololo mingi koleka; mpe kati na yango okokanga engebene na oyo nalobaki.

58 Mpe tokoleisa lisusu nzete ya elanga ya bilaya, mpe tokosukola bitape na yango; mpe tokopikola uta na nzete yango bitape na yango bikomeli, oyo esengeli kowa, mpe tokobwaka yango kati na moto.

59 Mpe oyo nakosala ete, mbele, misisa na yango mikoka kokamata makasi na ntina ya bolamu na yango; mpe na ntina ya bobongoli ya bitape, ete bolamu ekoka kolonga mabe.

60 Mpe mpo nabatelaki bitape ya nzete ebimaki na mabele mpe misisa na yango, mpe ete nakangaki na kati bitape ya nzete ebimaki na mabele lisusu kati na nzete mama na yango, mpe nabatelaki misisa ya nzete mama na yango, ete, mbele, nzete ya elanga na ngai ya bilaya ekoka kobota lisusu mbuma malamu; mpe ete nakoka kozala na bosepeli lisusu na mbuma ya elanga na ngai ya bilaya, mpe, mbele, ete nakoka, kosepela mingi koleka ete nabatelaki misisa mpe bitape ya mbuma ya yambo—

61 Yango wana, kende, mpe bianga basali, ete tokoka kosala na molende na bokasi na biso na elanga ya bilaya, ete tokoka kolengela nzela, ete nakoka kobimisa lisusu mbuma ya nzete ebimi na mabele, oyo mbuma ya nzete ebimi na mabele ezali malamu mpe ya motuya mingi koleka mbuma nyonso mosusu.

62 Yango wana, tika tokende mpe tosala na bokasi na biso mbala oyo ya nsuka, mpo tala nsuka ekomi penepene, mpe oyo ezali mpo na mbala ya nsuka oyo nakosukola elanga na ngai ya bilaya.

63 Kanga kati na bitape; banda na oyo ya nsuka ete ezala ya yambo, mpe ete oyo ya yambo ezala ya nsuka, mpe timola nzinganzinga na nzete, ya mobange mpe ya elenge, ya yambo mpe ya nsuka; mpe ya nsuka mpe ya yambo, ete nyonso ekoka koleisama mbala moko lisusu mpo na mbala ya nsuka.

64 Yango wana, timola nzinganzinga na yango, mpe sukola yango, mpe tiela yango malalelo mbala moko lisusu, mpo na mbala ya nsuka, mpo nsuka ekomi penepene. Mpe soki ezali boye ete nzete oyo tokangaki ekoli, mpe eboti mbuma ya nzete ebimaki na mabele, boye nde bokolengela nzela mpo na yango, ete ekoka kokola.

65 Mpe lokola ekobanda kokola bokosukola nie bitape oyo bikobimisa mbuma ya bololo, engebene na makasi ya oyo ya malamu mpe bolayi to monene na yango; mpe bokosukola te oyo ya mabe na mbala moko nie, mbele ntina na yango ezala makasi mingi mpo na oyo bakangaki, mpe oyo bakangaki kati na yango ewa, mpe nabungisa nzete ya elanga na ngai ya bilaya.

66 Mpo ezali kosala ngai mpasi ete nabungisa nzete ya elanga na ngai ya bilaya; yango wana okosukola oyo ya mabe engebene na lolenge oyo ya malamu ekokola, ete mosisa mpe nsonge ekoka kokokana na makasi, kino oyo ya malamu bilonga oyo ya mabe, mpe oyo ya mabe bikatama mpe bibwakama mosika kati na moto, ete bitia te mabele ya elanga na ngai ya bilaya nkaka; mpe boye nakokombo mosika oyo ya mabe libanda ya elanga na ngai ya bilaya.

67 Mpe bitape ya nzete ebimaki na mabele nde nakokanga lisusu kati na nzete ebimaki na mabele;

68 Mpe bitape ya nzete moboti ya ebandeli nde nakokanga kati na bitape ya nzete moboti ya ebandeli; mpe na boye nde nakomema yango esika moko lisusu, ete bikobimisa mbuma ya ebandeli, mpe bakozala moko.

69 Mpe oyo ya mabe bikobwakama mosika, iyo, kutu libanda ya mabele nyonso ya elanga na ngai ya bilaya; mpo tala, bobele mbala moko oyo nde nakosukola elanga na ngai ya bilaya.

70 Mpe esalemaki ete Nkolo ya elanga ya bilaya atindaki mosali na ye; mpe mosali akendaki mpe asalaki lokola Nkolo atindaka ye, mpe amemaki basali basusu; mpe bazalaki mingi te.

71 Mpe Nkolo ya elanga ya bilaya alobaki epayi na bango: Bokende, mpe bosala na elanga ya bilaya, na bokasi na bino. Mpo tala, oyo ezali mbala ya nsuka oyo nakoleisa elanga na ngai ya bilaya; mpo nsuka kala mingi te ezali mpembeni, mpe eleko ezali koya na lombangu; mpe soki bosali na bokasi na bino elongo na ngai bokozala na bosepeli na mbuma oyo nakotanda likolo mpo na ngai moko mpo na kolengela eleko oyo ezali koya kala mingi te.

72 Mpe esalemaki ete basali bakendaki mpe basalaki na bokasi na bango; mpe Nkolo ya elanga ya bilaya asalaki elongo na bango mpe lokola; mpe batosaki mitindo ya Nkolo ya elanga ya bilaya na makambo nyonso.

73 Mpe mbuma ya nzete ebimaki na mabele ebandaki lisusu kozala na elanga ya bilaya; mpe bitape ya nzete ebimaki na mabele bibandaki kokola mpe kobota koleka; mpe bitape ya zamba bibandaki kopikolama mpe kobwakama mosika; mpe babatelaki misisa mpe nsonge na yango ekokanaki, engebene na makasi na yango.

74 Mpe boye basalaki, na molende nyonso, engebene na mitindo ya Nkolo ya elanga ya bilaya, kutu kino oyo ya mabe bibwakamaki mosika libanda ya elanga ya bilaya, mpe Nkolo abatelaki mpo na ye moko ete nzete ekomaki lisusu na mbuma ya nzete ebimaki na mabele; mpe ekomaki se lokola nzoto moko; mpe mbuma ekokanaki; mpe Nkolo ya elanga ya bilaya abatelaki mpo na ye moko mbuma ya nzete ebimaki na mabele, oyo ezalaki ya motuya epayi na ye uta na ebandeli.

75 Mpe esalemaki ete ntango Nkolo ya elanga ya bilaya amonaki ete mbuma na ye ezalaki malamu, mpe ete elanga ya bilaya na ye ezalaki lisusu ya kobeba te, abiangaki basali na ye, mpe alobaki epayi na bango: Tala, mpo na mbala ya nsuka oyo toleisaki elanga na ngai ya bilaya; mpe bomoni ete nasalaki engebene na bolingi na ngai; mpe nabatelaki mbuma ya nzete ebimaki na mabele, ete ezali malamu, kutu se lokola ezalaki na ebandeli. Mpe bopambolami; mpo lokola bozalaki na molende na kosalaka elongo na ngai na elanga na ngai ya bilaya, mpe botosaki mitindo na ngai, mpe bozongiseli lisusu epayi na ngai mbuma ya nzete ebimaki na mabele, ete elanga na ngai ya bilaya ezali lisusu ya kobeba te, mpe mabe ebwakami mosika, tala bokozala na bosepeli elongo na ngai na ntina ya mbuma ya elanga na ngai ya bilaya.

76 Mpo tala, mpo na ntango molai nakotanda likolo mbuma ya elanga na ngai ya bilaya mpo na ngai moko mpo na kolengela eleko, oyo ezali kala mingi te koya; mpe mpo na mbala ya nsuka naleisaki elanga na ngai ya bilaya, mpe nasukolaki yango, mpe natimolaki nzinganzinga na yango, mpe natielaki yango malalelo; yango wana nakotanda mbuma likolo mpo na ngai moko, mpo na ntango molai, engebene na oyo nalobaki.

77 Mpe ekokoka ntango ete mbuma ya mabe ekoya lisusu na elanga na ngai ya bilaya, nde nakosala ete bolamu mpe mabe esangisama; mpe bolamu nde nakobatela mpo na ngai moko, mpe nakobwaka mosika mabe kati na esika na yango moko. Mpe na nsima nde ekoya eleko mpe nsuka; mpe elanga na ngai ya bilaya nakosala ete etumbama na moto.

Bimisa na lokasa