Makomi
Yakobo 6


Mokapo 6

Nkolo akozongisa Yisalaele na mikolo ya nsuka—Mokili mokozikisama na moto—Bato basengeli kolanda Klisto mpo na kokima liziba ya moto mpe libanga ya fofolo. Penepene na mibu 544–421 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, tala, bandeko na ngai, lokola nalobaki epayi na bino ete nakosakola, tala, oyo ezali lisakoli na ngai—ete makambo oyo profeta Zenosi alobaki, mpo na oyo etali ndako ya Yisalaele, kati na oyo wapi amekaki bango na nzete ya elaya ya mboka, esengeli solo kosalema.

2 Mpe mokolo oyo akotia loboko na ye lisusu mbala ya mibale mpo na kozongisa bato na ye, ezali mokolo, iyo, kutu mbala ya nsuka, ete basali ya Nkolo bakokende na nguya na ye, koleisa mpe kosukola elanga na ye ya bilaya; mpe nsima na yango nsuka ekoya kala mingi te.

3 Mpe lolenge nini bazali bapambolami bango oyo basalaki na molende kati na elanga ya bilaya na ye; mpe lolenge nini balakelami mabe baoyo bakobwakama libanda kati na esika na bango moko! Mpe mokili mokozikisama na moto.

4 Mpe lolenge nini Nzambe na biso atonda na boboto mpo na biso, mpo amikundoli ndako ya Yisalaele, nyonso mibale ntina mpe bitape; mpe asemboli maboko na ye epayi na bango na bolayi ya mokolo mobimba; mpe bazali bato ya matoyi mangongi mpe bato ya mitu makasi; kasi mingi lokola bakoyeisa mitema na bango makasi te bakobikisama na bokonzi ya Nzambe.

5 Yango wana, bandeko balingami na ngai, nabondeli bino na maloba ya lipombo ete boyambola, mpe boya na mokano etonda ya motema, mpe bokangama na Nzambe lokola akangemi na bino. Mpe wana ezali loboko na ye ya boboto ya kotandama epayi na bino boya na pole ya moi, boyeisa mitema na bino makasi te.

6 Iyo, lelo soki bokoyoka mongongo na ye, boyeisa mitema na bino makasi te; zambi bokokufa mpo na ntina nini?

7 Mpo tala, esili bino koleisama na liloba malamu ya Nzambe na bolayi ya mokolo mobimba, ekobota bino mbuma ya mabe, ete bosengeli kokatama mpe kobwakama mosika kati na moto?

8 Tala, ekobwaka bino maloba oyo? Ekobwaka bino maloba ya baprofeta; mpe ekobwaka bino maloba nyonso oyo elobamaki mpo na oyo etali Klisto, awa esili mingi kolobama na ntina na ye; mpe kowangana liloba malamu ya Klisto, mpe nguya ya Nzambe, mpe likabo ya Molimo Mosantu, mpe kozimisa Molimo Mosantu, mpe kotiola mwango monene ya bosikoli, oyo molengelamaki mpo na bino?

9 Eyebi bino te ete soki bokosala makambo oyo, ete nguya ya bosikoli mpe ya bosekwi, oyo ezali na Klisto, ekomema bino mpo na kotelema na nsoni mpe elindo ya nsomo liboso ya esambiselo ya Nzambe?

10 Mpe engebene na nguya ya boyengebene, mpo boyengebene ekoki kowanganama te, bosengeli kokende mosika kati na liziba wana ya moto mpe ya libanga ya fofolo, oyo kani mololi mozimaka te, mpe molinga na yango emataka likolo libela na libela, oyo liziba ya moto mpe libanga ya fofolo ezali monioko mozanga nsuka.

11 O bongo, bandeko balingami na ngai, boyambola, mpe bokota na ekuke ya moke, mpe bokoba na nzela ya nkaka, kino bokozwa bomoi ya seko.

12 O Bozala na bwania; nini nakoki koloba lisusu?

13 Mpo na kosukisa, natombeli bino sese, kino nakokutana elongo na bino liboso ya esambiselo ya elengi ya Nzambe, esambiselo oyo ebetaka bato ya nkuna na nsomo mpe bobangi ya makasi mpenza. Amene.

Bimisa na lokasa