Makomi
Jarom 1


Buku ya Jarom

Mokapo 1

Banefi babateli mobeko ya Mose, bataleli boyei ya Klisto, mpe bafuluki na mboka—Baprofeta mingi basali mpo na kobatela bato na nzela ya bosolo. Penepene na mibu 399–361 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa tala, ngai, Jarom, nakomi mwa maloba moke engebene na motindo ya tata na ngai, Enosa, ete mambi ma kala ya libota na biso ebombama.

2 Mpe lokola bapalaki oyo ezali mike, mpe lokola makambo oyo ekomami na mokano ete ezala mpo na litomba ya bandeko na biso Balamani, boye, esengeli mpenza ete nakoma mwa moke; kasi nakokoma te makambo ya masakoli na ngai, soki te ya bimoniseli na ngai. Mpo nini nakokaki kokoma mingi koleka batata na ngai bakomaki? Mpo ebimisaki bango te mwango ya lobiko? Nalobi epayi na bino, Iyo; mpe oyo ekoki mpo na ngai.

3 Tala, elongobani ete ebele esalema na kati ya bato, na ntina ya bokasi ya mitema na bango, mpe na bokufi ya matoyi na bango, mpe bokufi miso ya mayele na bango, mpe matoyi mangongi na bango; nzokande, Nzambe atonda na boboto mingi koleka mpenza epayi na bango, mpe akombi bango naino te mosika uta na etando ya mboka.

4 Mpe ezali na bato mingi na kati na biso baoyo bazwi bimoniseli mingi, mpo bazali nyonso bato na matoyi mangongi te. Mpe mingi lokola bazali bato na matoyi mangongi te mpe bazali na bondimi, bazali kati na lisanga na Molimo Mosantu, oyo amimonisaka epayi ya bana ya bato, engebene na bondimi na bango.

5 Mpe sikawa, tala, mibu nkama mibale misilaki koleka, mpe bato ya Nefi bakomaki makasi na mboka. Batosaki kobatela mobeko ya Mose mpe mokolo ya saba esantu mpo na Nkolo. Mpe basantolaki te; mpe batukaki te. Mpe mibeko ya mboka ezalaki makasi mpenza.

6 Mpe bapanzamaki likolo ya etando ya mboka, mpe Balamani lokola. Mpe bazalaki motango mingi mpenza koleka oyo ya Banefi; mpe balingaki koboma mpe komela makila ya banyama.

7 Mpe esalemaki ete bayelaki biso, Banefi mbala mingi, mpo na kobunda. Kasi bakonzi na biso mpe bakambi na biso bazalaki bato ya bokasi na bondimi na ntina ya Nkolo; mpe balakisaki batu nzela ya Nkolo; boye, totelemelaki Balamani mpe tobenganaki bango mosika uta na mboka na biso, mpe tobandaki kotonga bingumba na biso, soki te esika nyonso ya bosangoli libula na biso na bisika makasi.

8 Mpe tokomaki mingi mpenza, mpe topanzanaki likolo ya etando ya mboka, mpe tokomaki bazwi mpenza ya wolo, mpe ya mpauni, mpe ya biloko ya motuya, mpe ya misala ya malonga na mabaya, mpe ya ndako, mpe ya masini, mpe lisusu ya bibende mpe mbengi, mpe motako mpe ebende makasi, kosalaka ndenge nyonso ya bisaleli ya ndenge na ndenge mpo na kosala bilanga, mpe bibundeli ya bitumba—iyo, makonga na nsonge epotu, mpe ekoba, mpe etengu, mpe mosuki, mpe bolengeli nyonso mpo na etumba.

9 Mpe boye lokola tomilengelaki mpo na kokutana na Balamani, bafulukaki likolo na biso te. Kasi liloba ya Nkolo limonanaki solo, oyo alobaki epayi na batata na biso, kolobaka ete: Mbala mingi lokola bokobomba mitindo na ngai bokofuluka na mboka.

10 Mpe esalemaki ete baprofeta ya Nkolo babandaki kokebisa bato ya Nefi, engebene na liloba ya Nzambe, ete soki babateli mitindo te, kasi bakwei kati na bobuki mobeko, bakobebisama nie uta na etando ya mboka.

11 Boye, baprofeta, mpe banganganzambe, mpe balakisi, basalaki na molende kolendisaka na bompikiliki nyonso bato mpo na molende; koteyaka mobeko ya Mose, mpe ntina oyo nini mopesamaki; kondimisaka bango mpo na kotalelaka Masiya, mpe kondima na ye oyo akoya lokola soki asilaki kozala. Mpe na lolenge oyo bateyaki bango.

12 Mpe esalemaki ete na kosalaka boye babatelaki bango uta na kobebisama likolo ya etando ya mboka; mpo basimbaki mitema na bango na liloba, ntango nyonso kolamusaka bango na boyamboli.

13 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale na ntuku misato na mwambe milekaki—na lolenge oyo ya bitumba, mpe boweli, mpe bokabwani, mpo na ntaka ya ntango mingi.

14 Mpe ngai, Jarom, nakokoma mingi te, mpo bapalaki ezali mike. Kasi tala, bandeko na ngai, bokoki kotanga na bapalaki mosusu ya Nefi; mpo tala, likolo na yango masolo ya makomi ya bitumba na biso ekomami, engebene na nkoma ya bakonzi, soki te oyo bakomisaki.

15 Mpe napesi bapalaki oyo kati na maboko ya mwana na ngai Omini, ete ekoka kobatelama engebene na mitindo ya batata na ngai.

Bimisa na lokasa