Makomi
Mormon 9


Mokapo 9

Moroni abiangi bango oyo bandimi Klisto te mpo na koyambola—Asakoli Nzambe ya makamwisi, oyo apesaka bimoniseli mpe asopaka makabo mpe bilembo likolo ya bandimi—Makamwisi masili na ntina ya bozangi boyambi—Bilembo bilandaka bango oyo bandimaka—Bato balendisami mpo na kozala na bwania mpe kobatela mitindo. Penepene na mibu 401–421 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe sikawa, nalobi lisusu mpo na oyo etali bango oyo bandimi Klisto te.

2 Tala, ekondima bino na mokolo oyo akobimela bino—Tala, ntango Nkolo akoya, iyo, kutu mokolo monene mona ntango mabele makolingama esika moko lokola mokanda, mpe biloko bikoniangwama na moto makasi, iyo, na mokolo monene mona ntango bokomemama mpo na kotelema liboso ya Mwana ya mpate ya Nzambe—nde bokoloba ete Nzambe azali te?

3 Na ntango wana bokowangana lisusu Klisto, to bokokoka kotala Mwana ya mpate ya Nzambe? Ebanzi bino ete bokofanda elongo na ye na nse ya koyebaka na mitema elindo na bino? Ebanzi bino ete bokoki kozala na esengo ya kofanda elongo na Azali wana ya mosantu, ntango milimo na bino ezali mpenza kotungisama na boyebaka na mitema elindo na bino ete bozalaki ntango nyonso kobuka mibeko?

4 Tala, nalobi epayi na bino ete bokozala bato ya mpasi mingi koleka na kofandaka elongo na Nzambe mosantu mpe moyengebene, na nse ya koyebaka mbindo ya mitema na bino liboso na ye, ete bolingaki kozala elongo na milimo mikweisama na lifelo.

5 Mpo tala, ntango bokomemama na komona bolumbu na bino liboso ya Nzambe, mpe lisusu nkembo ya Nzambe, mpe bosantu ya Yesu Klisto, oyo ekopelisa mololi moko ya moto oyo ezimaka te likolo na bino.

6 O soki bongo bino bato bazanga bondimi, bobaluka epayi ya Nkolo; bobelela makasi epayi ya Tata na nkombo ya Yesu, ete mbele bokoka komonana bato bazanga mbindo, peto, kitoko, mpe mpembe, wana esukwami bino na makila ya Mwana ya mpate, na mokolo monene mona mpe ya nsuka.

7 Mpe nalobi lisusu epayi na bino oyo bowanganaka bimoniseli ya Nzambe, mpe bolobi ete esila kala, ete bimoniseli ezali te, soki mpe masakoli te, makabo mpe te, kobikisa bokono mpe te, koloba na minoko mpe te, mpe bolimboli ya minoko mpe te;

8 Tala nalobaki epayi na bino, ye oyo azali kowangana makambo oyo ayebi nsango malamu ya Klisto te; iyo, atangi naino makomi te; mpe soki bongo, azali kososola yango te.

9 Mpo etangi biso te ete Nzambe azali se ndenge moko lobi, lelo, mpe libela, mpe na ye mbongwana ezali te mpe elili ya bobongwani mpe te?

10 Mpe sikawa, soki bino botiaki mpo na bino moko makanisi ya Nzambe moko oyo abongwanaka, mpe na oyo kani elili ya bobongwani ezali, bongo nde bomitiaki makanisi mpenza ya Nzambe moko oyo azali Nzambe ya makamwisi te.

11 Kasi tala, nakolakisa epayi na bino Nzambe moko ya makamwisi, kutu Nzambe ya Abalayama, mpe Nzambe ya Yisaka, Nzambe ya Yakobo; mpe ezali se Nzambe moko wana oyo akelaki lola mpe mabele, mpe biloko nyonso oyo ezali na yango.

12 Tala, akelaki Adama, mpe na Adama eyaki bokwei ya moto. Na ntina ya bokwei ya moto eyaki Yesu Klisto, kutu Tata mpe Mwana; mpe na ntina ya Yesu Klisto eyaki bosikoli ya moto.

13 Mpe na ntina ya bosikoli ya moto, boye eyaki na Yesu Klisto, bamemami mpo na kozonga liboso ya Nkolo; iyo, oyo ezali nzela oyo wapi bato nyonso basikolami, mpo liwa ya Klisto ekokisi bosekwi, boye ekokisi bosikoli uta na mpongi oyo ezanga nsuka, uta na mpongi oyo wapi bato nyonso bakolamuka na nguya ya Nzambe ntango kelelo ekobeta; bakobima, bato mpamba mpe bato minene, mpe nyonso bakotelema liboso ya esambiselo na ye, wana esikolami mpe ekangolami bango uta na singa ya seko ya liwa, liwa oyo wapi ezali liwa ya ntango.

14 Mpe nsima ekoya bosambisi ya Moko Mosantu likolo na bango; mpe nsima ekoya ntango oyo wapi ye oyo azali mbindo akotikala se mbindo; mpe ye oyo azali sembo akotikala se sembo; ye oyo azali na esengo akotikala se na esengo; mpe ye oyo azali mawa akotikala se na mawa.

15 Mpe sikawa, O bino nyonso oyo bomiti na makanisi Nzambe moko oyo akoki kosala makamwisi te, nalingi kotuna bino, makambo oyo nalobelaki, esili yango nyonso kosalema? Esili nsuka koya? Tala nalobaki epayi na bino, Te; mpe Nzambe atiki te kozala Nzambe ya makamwisi.

16 Tala, ezali te makambo oyo Nzambe asali makambo ya kokamwa na miso na biso? Iyo, mpe nani akoki kososola misala ya kokamwa ya Nzambe?

17 Nani akoloba ete ezalaki likamwisi te ete na liloba na ye lola mpe mabele ezalaki; mpe na nguya ya liloba na ye moto akelamaki uta na mputulu ya mabele; mpe na nguya ya liloba na ye makamwisi masalemaki?

18 Mpe nani akoloba ete Yesu Klisto asalaki makamwisi mingi ya minene te? Mpe ezalaki na makamwisi minene mingi oyo masalemaki na maboko ya bapostolo.

19 Mpe soki makamwisi masalemaki na ntango wana, mpo na nini etiki Nzambe kozala Nzambe ya makamwisi nzokande azali Ezali moko oyo abongwanaka te? Mpe tala, nalobaki epayi na bino ete abongwanaka te; soki te alingaki kotika kozala Nzambe; mpe atiki kozala Nzambe te, mpe azali Nzambe ya makamwisi.

20 Mpe ntina oyo atiki kosala makamwisi na kati ya bana ya bato ezali mpo babebisami moke moke kino na bozangi boyambi, mpe batiki nzela ya semba, mpe bayebi Nzambe oyo basengelaki kotiela motema te.

21 Tala, nalobaki epayi na bino ete oyo nyonso andimi Klisto, na kozangaka ntembe, oyo nyonso akosenga Tata na nkombo ya Klisto ekopesama na ye; mpe elaka oyo ezali mpo na nyonso, kutu kino na nsuka ya mabele.

22 Mpo tala, boye elobi Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe epayi ya bayekoli na ye baoyo bakotikala, iyo, mpe lisusu epayi ya bayekoli na ye nyonso, maloba na ye eyokani na matoyi ya ebele ya bato: Bokende kati na mokili mobimba, mpe boteya nsango malamu na ekelamo moko moko;

23 Mpe ye oyo akondima mpe abatisami akobikisama; kasi ye oyo akondima te akokweisama;

24 Mpe bilembo oyo ekolanda bango oyo bakondima—na nkombo na ngai bakobengana bazabulu; bakoloba na minoko ya sika; bakosimba nioka; mpe soki bameli eloko oyo ebomaka ekosala bango mpasi te, bakotia maboko likolo ya bakoni mpe bakobikisama;

25 Mpe oyo nyonso akondima na nkombo na ngai, kozangaka ntembe, epayi na ye nakolakisa bosolo ya maloba na ngai, kutu kino na nsuka ya mabele.

26 Mpe sikawa, tala, nani akoki kotelemela misala ya Nkolo? Nani akoki kowangana maloba na ye? Nani akoki kotelemela nguya ya bokasi nyonso ya Nkolo? Nani akotiola misala ya Nkolo? Nani akotiola bana ya Klisto? Tala, bino nyonso oyo bozali batioli ya misala ya Nkolo, mpo bokokamwa mpe bokowa.

27 O soki ezali bongo botiola te, mpe bokamwa te, kasi botia bokebi na maloba ya Nkolo, mpe bosenga Tata na nkombo ya Yesu mpo na nini bokozala na mposa. Botia ntembe te, kasi bozala na bondimi, mpe bobanda lokola na ntango ya kala, mpe boya epayi ya Nkolo na motema na bino mobimba, mpe bosala mpo na lobiko na bino moko na bobangi mpe bolengi liboso na ye.

28 Bozala na bwania na mikolo ya momekano na bino; bolongola bino moko uta na bosoto nyonso; bosenga te, ete bokoka kosilisa yango na bilula-lula na bino, kasi bosenga na molende moko ya ngwi, ete bokweya te na masenginia, kasi ete bosalela Nzambe ya solo mpe ya bomoi.

29 Keba ete bobatisama na lolenge elongobani te; keba ete bolia elambo ya Klisto na lolenge elongobani te; kasi keba ete bosala makambo nyonso kati na bolongobani, mpe bosala yango na nkombo ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe ya bomoi; soki bosali eye, mpe botie molende kino na nsuka, bokobenganama libanda soki moke te.

30 Tala, nalobelaki bino lokola soki nalobaki uta na bakufi; mpo nayebi ete bokozwa maloba na ngai.

31 Bosambisa ngai te na ntina ya bozangi bobongi nie na ngai, tata na ngai mpe te, na ntina ya bozangi bobongi nie na ye, bango oyo bakomaki liboso na ye mpe te; kasi bopesa nde matondi epayi na Nzambe ete amonisi epayi na bino bozangi bobongi nie na biso, ete bokoka koyekola kozala bato ya bwania mingi koleka oyo tozalaki.

32 Mpe sikawa, tala, tokomaki lisolo ya makomi oyo engebene na boyebi na biso, kosalelaka minkoma oyo ebiangami na kati na biso Kiejipito ebongisami, ekitanisamaki mpe ebongolamaki na biso, engebene na lolenge ya elobeli na biso.

33 Mpe soki bapalaki na biso ezalaki monene kokoka tolingaki kokoma na lokota ya Ebele; kasi lokota ya Ebele ebongwanaki na biso mpe lokola; mpe soki tokokaki kokoma yango na lokota ya Ebele, tala, bolingaki te kozwa bozangi bobongi nie kati na lisolo ya makomi na biso.

34 Kasi Nkolo ayebi makambo oyo tokomaki, mpe lisusu ete bato basusu bayebi te lokota na biso; mpe mpo ete boko bato basusu te bayebi lokota na biso, boye alengelaki nzela mpo na bolimboli ya lokota yango.

35 Mpe makambo oyo ekomami ete tokoka kolongola makila ya bandeko na biso, baoyo babebaki moke moke kati na bozangi boyambi, uta na bilamba na biso.

36 Mpe tala, makambo oyo, oyo tozalaki na yango mposa mpo na oyo etali bandeko na biso, iyo, kutu bozongisi na bango na boyebi ya Klisto, ezali engebene na nsambo ya basantu nyonso oyo bafandaki kati na mboka.

37 Mpe tika ete Nkolo Yesu Klisto andima ete sambo na bango eyanolama engebene na bondimi na bango; mpe tika ete Nzambe Tata amikundola liyokani oyo asalaki elongo na ndako ya Yisalaele; mpe tika apambola bango libela, na nzela ya bondimi likolo ya nkombo ya Yesu Klisto. Amene.

Bimisa na lokasa