Makomi
Moroni 9


Mokanda ya mibale ya Mormon epayi ya mwana mobali na ye Moroni.

Ezali na mokapo 9.

Mokapo 9

Ezala Banefi mpe Balamani babebi mpe bapoli na bizaleli—Bazali koniokola mpe kobomama moko mpe mosusu—Mormon asambeli ete ngolu mpe bolamu ekoka kozala likolo ya Moroni libela. Penepene na 401 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mwana mobali molingami na ngai, nakomeli yo lisusu mokanda ete okoka koyeba ete nazali naino na bomoi; kasi nakomi ya moke mpo na ntina ya likambo oyo ezali kopesa mawa.

2 Mpo tala, nazalaki na etumba ya nsomo na Balamani, na oyo wapi tolongaki te; mpe Alikitusi akwei na mompanga, mpe Lulami mpe lisusu Emiloni; iyo, mpe tobungisaki motango monene ya bato na biso ya boponi.

3 Mpe sikawa tala, mwana mobali na ngai, nabangi mbele Balamani babebisa bato oyo; mpo bayamboli te, mpe Satana azali ntango nyonso kolamusa bango na nkanda moko na mosusu.

4 Tala, nazali kosalaka elongo na bango ntango nyonso; mpe ntango nazali koloba liloba ya Nzambe na polele balengi mpe bayoki nkanda na ngai; mpe ntango nasaleli maloba ya polele te bayeisi mitema na bango makasi na yango; yango wana, nabangi mbele Molimo ya Nkolo atikaki kobunda elongo na bango.

5 Mpo bayoki nkanda mingi koleka ete emonani epayi na ngai ete bazali te na bobangi ya liwa; mpe babungisi bolingo na bango, moko epayi na mosusu; mpe bazali ntango nyonso na mposa ya makila mpe bobekoli.

6 Mpe sikawa, mwana mobali molingami na ngai, ata bokasi ya mitema na bango, tika tosala na molende; mpo soki totiki kosala, tokomemama na nse ya bokwei; mpo tozali na mosala ya kosala wana ezali biso naino na tabelenakele oyo ya bodongo, ete tokoka kolonga monguna ya bosembo nyonso, mpe kopemisa milimo na biso kati na bokonzi ya Nzambe.

7 Mpe sikawa nakomi mwa moke mpo na oyo etali mpasi ya bato oyo. Mpo engebene na boyebi boye nazwi uta na Amowana, tala, Balamani bazali na bato ya boloko mingi, oyo bakamataki uta na linongi ya Seliza; mpe ezalaki na mibali, basi, mpe bana.

8 Mpe babomi mibali mpe batata ya basi mpe ya bana wana; mpe baleisaki basi na mosuni ya mibali na bango, mpe bana na mosuni ya batata na bango; mpe bazali kopesa bango mai te longola se mwa ndambo moke.

9 Mpe ata bonsomo monene boye ya Balamani, ezali koleka te boye ya bato na biso na Moliantumi. Mpo tala, bakamataki mingi ya bana basi ya Balamani lokola bato ya boloko; mpe nsima ya kobotola uta na bango oyo wana ezalaki ya ntalo mpe motuya koleka likolo ya biloko nyonso, bopeto mpe bolamu

10 Ntango esilisaka bango kosala likambo oyo, babomaki bango na lolenge moko ya loma mingi koleka, koniokolaka nzoto na bango kutu kino na liwa; mpe esilaki bango kosala eye, baliaki mosuni na bango lokola banyama ya zamba, na ntina ya bokasi ya mitema na bango; mpe basali yango lokola elembo ya bolombe.

11 O mwana mobali molingami na ngai, lolenge boni ekoki bato lokola baoyo, bazanga bompenza—

12 (Mpe bobele mwa ndambo moke ya mibu eleki, mpe bazalaki bato ya bompenza mpe bato ya bonzenga)

13 Kasi O mwana mobali na ngai, lolenge boni ekoki bato lokola baoyo, ya bango elengi ezali kati bonsomo boike mpenza—

14 Lolenge boni ekoki biso kozela ete Nzambe akopekisa loboko na ye uta na kosambisa biso?

15 Tala, motema na ngai ezali koganga: Lisuma epayi ya bato oyo. Bima na bosambisi, O Nzambe, mpe bomba masumu, mpe nkuna, mpe bonsomo na bango uta na liboso ya elongi na yo!

16 Mpe lisusu, mwana mobali na ngai, ezali na bakufeli mibali mpe bana basi na bango mingi batikalaka na Seliza; mpe ndambo wana ya bilei oyo Balamani bakumbaki te, tala, limpinga ya Zenifi ememi yango, mpe batikaki bango koyenga-yenga wapi bakoki mpo na kozwa bilei; mpe basi babange mingi basenzwi na nzela mpe bakufi.

17 Mpe limpinga oyo ezali elongo na ngai ezali ya makasi te; mpe mampinga ya Balamani ezali na katikati ya Seliza mpe ngai; mpe mingi lokola bakimi epayi na limpinga ya Alona bakweyaki na likama ya bonyama na bango.

18 O ebeebe ya bato na ngai! Bazanga molongo mpe bazanga boboto. Tala, nazali bobele moto, nazali bobele na bokasi ya moto moko, mpe nakoki lisusu kotosisa mitindo na ngai te.

19 Mpe bakomi makasi na ebeebe na bango; bazali nyonso makambo makasi, kobikisaka ata moko te, mobange te mpe elenge mpe te; mpe bazali kosepela na nyonso longola se oyo wana ezali malamu; mpe mpasi ya basi na biso mpe bana na biso likolo ya etando mobimba ya mboka oyo ezali koleka eloko nyonso; iyo, lolemo ekoki te koyebisa yango te, mpe ekoki kokomama mpe te.

20 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, nakofanda lisusu te na esika oyo ya makambo ya nsomo. Tala, oyebi nkuna ya bato oyo; oyebi ete bazanga libongisi, mpe bazali mosika mpo na koyoka; mpe nkuna na bango eleki mingi mpenza koleka oyo ya Balamani.

21 Tala, mwana mobali na ngai, nakoki kosengala bango epayi ya Nzambe te mbele abeta ngai.

22 Kasi tala, mwana mobali na ngai, nasengeli yo epayi na Nzambe, mpe natie motema na Klisto ete okobikisama; mpe nasambeli epayi na Nzambe ete abatela bomoi na yo, mpo na kotatola bozongi ya bato na ye epayi na ye, soki te bobebisami nie na bango; mpo nayebi ete basengeli kowa longola se soki bayamboli mpe bazongi epayi na ye.

23 Mpe soki bawei, ekozala lokola Bayelede, na ntina ya ngwi ya mitema na bango, kolukaka makila mpe bobekoli.

24 Mpe soki ezali bongo ete bawei, toyebi ete mingi ya bandeko na biso bakendaki epayi na Balamani, mpe ndambo mingi lisusu bakokende epayi na bango; yango wana, koma mwa ndambo ya makambo, soki obatelami mpe nakowa, mpe nakomona yo te; kasi natie motema ete nakoka komona yo lisusu kala mingi te; mpo nazali na masolo ya makomi ya bule oyo nalingi kotika epayi na yo.

25 Mwana mobali na ngai, zala sembo na Klisto; mpe kotika te makambo oyo nakomi masala yo mpasi, maleka yo bozito mpo na liwa; kasi tika Klisto anetola yo, mpe tika ete mpasi mpe liwa na ye, mpe bolakisi ya nzoto na ye epayi ya batata na biso, mpe boboto na ye mpe motema molai na ye, mpe elikya ya nkembo na ye mpe ya bomoi ya seko, efanda na makanisi na yo libela.

26 Mpe tika ete ngolu ya Nzambe Tata, oyo na ye kiti ya bokonzi ezali na lola, mpe Nkolo na biso Yesu Klisto, oyo afandi na loboko ya mobali ya nguya na ye, kino biloko nyonso bikoma eyangelami epayi na ye, azala mpe afanda elongo na yo libela. Amene.

Bimisa na lokasa