Makomi
Mosiya 18


Mokapo 18

Alma azali koteya na nkuku—Alimboli liyokani ya libatisi mpe abatisi na mai ya Mormon—Abongisi Eklezia ya Klisto mpe akulisi banganganzambe—Bamisalisi bango moko mpe bateyi bato—Alma mpe bato na ye bakimi uta na Mokonzi Noa kati na esobe. Penepene na mibu 147–145 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, esalemaki ete Alma, oyo akimaki uta na basali ya mokonzi Noa, ayambolaki uta na masumu mpe mabe na ye, mpe akendaki uta na ntei ya bato na nkuku, mpe abandaki kolakisa maloba ya Abinadi—

2 Iyo, oyo etali oyo esengelaki koya, mpe lisusu oyo etali bosekwi ya bakufi, mpe bosikoli ya bato, boye esengelaki kokokisama na nguya, mpe mpasi, mpe liwa ya Klisto, mpe bosekwi na ye mpe bobuti na ye na lola.

3 Mpe mingi lokola balingaki koyoka liloba na ye ateyaki bango. Mpe alakisaki bango na nkuku, ete ekoka te koya na boyebi ya mokonzi. Mpe mingi bandimaki maloba na ye.

4 Mpe esalemaki ete mingi lokola bandimaki ye bakendaki na esika moko oyo ebiangami Mormon, mpe ezwaki nkombo na yango uta na mokonzi, mpe ezalaki na ndelo ya mboka oyo ebebisamaki, na ntango soki te na bileko, na banyama ya zamba.

5 Sikawa, na Mormon ezalaki na liziba ya mai ya peto, mpe Alma akendaki kuna, mpo kuna ezalaki na ya zamba ya nkaka ya nzete ya mike mike, wapi amibombaki na ntango ya moi uta na boluki ya bato ya Mokonzi.

6 Mpe esalemaki ete mingi lokola bandimaki ye bakendaki kuna mpo na koyoka maloba na ye.

7 Mpe esalemaki ete nsima ya mikolo mingi ezalaki na motango moko monene ya bato basangani elongo na esika ya Mormon, mpo na koyoka maloba ya Alma. Iyo, nyonso basanganaki esika moko baoyo bandimaki maloba na ye, mpo na koyoka ye. Mpe alakisaki bango, mpe ateyaki epayi na bango boyamboli, mpe bosikoli, mpe bondimi na Nkolo.

8 Mpe esalemaki ete alobaki epayi na bango: Tala, awa ezali mai ya Mormon (mpo ebiangamaki boye), mpe sikawa, lokola bozali na mposa ya kokota kati na etonga ya Nzambe, mpe kobiangama bato na ye, mpe bozali kondima komema mikumba ya moko na mosusu, ete mikoka kozala pepele;

9 Iyo, mpe bozali kondima kolela elongo na baoyo bazali kolela; iyo, mpe kobondisa baoyo batelemi na mposa ya libondisi, mpe kotelema lokola banzeneneke ya Nzambe na bantango nyonso mpe na makambo nyonso, mpe na bisika nyonso wapi bokoki kozala, kutu kino liwa, ete bokoka kosikolama na Nzambe, mpe kotangama elongo na baye ya bosekwi ya yambo, ete bokoka kozwa bomoi ya seko

10 Sikawa nalobi epayi na bino, soki oyo ezali mposa ya mitema na bino, nini ekopekisa bino bobatisama na nkombo ya Nkolo, lokola litatoli liboso na ye ete bokoti kati na liyokani na ye, ete bokosalela ye mpe bokobomba mitindo na ye, ete akoka kosopa molimo na ye beboo likolo na bino?

11 Mpe sikawa, eyokaki bato maloba oyo, babetaki maboko na bango mpo na bosepeli, mpe bagangaki: Oyo ezali mposa ya mitema na biso.

12 Mpe sikawa esalemaki ete Alma akamataki Helama, oyo azalaki moko ya bato ya yambo, mpe akendaki mpe atelemaki na mai, mpe abelelaki, kolobaka: O Nkolo, sopa Molimo na yo likolo ya mosali na yo, ete akoka kosala mosala oyo na bosantu ya motema.

13 Mpe ntango alobaki maloba oyo, Molimo ya Nkolo azalaki likolo na ye, mpe alobaki: Helama, nabatisi yo, kozalaka na likoki uta na Nzambe ya Bokasi Nyonso, lokola litatoli ete okoti kati na liyokani mpo na kosalela ye kino okokufa mpo na oyo etali nzoto ya kufa; mpe tika Molimo ya Nkolo mosopana likolo na yo; mpe tika apesa epayi na yo bomoi ya seko, na nzela ya bosikoli ya Klisto, oyo alengelaki uta na bokeli ya mokili.

14 Mpe esilaki Alma koloba makambo oyo, nyonso mibale Alma mpe Helama bakundamaki na mai; mpe batelemaki mpe babimaki na mai kosepelaka, etondisamaki bango na Molimo.

15 Mpe lisusu, Alma akamataki mosusu, mpe akendaki mbala moko ya mibale kati na mai, mpe abatisaki ye engebene na oyo asalaki na moto ya yambo, kasi akundamaki ye moko lisusu te na mai.

16 Mpe na lolenge oyo abatisaki moko na moko oyo akendaki na esika ya Mormon; mpe bazalaki motuya penepene na bato nkama mibale na minei; iyo, mpe babatisamaki na mai ya Mormon, mpe batondisamaki na ngolu ya Nzambe.

17 Mpe babiangamaki eklezia ya Nzambe, soki te eklezia ya Klisto, uta na ntango wana kokende liboso. Mpe esalemaki ete moto nyonso oyo abatisamaki na nguya mpe likoki ya Nzambe abakisamaki na eklezia na ye.

18 Mpe esalemaki ete Alma, ezalaki ye na likoki uta na Nzambe, akulisaki banganganzambe; kutu nganganzambe moko mpo na bato ntuku mitano moko moko ya motango na bango oyo akulisaki mpo na koteya epayi na bango, mpe mpo na kolakisa bango mpo na ntina ya makambo etali bokonzi ya Nzambe.

19 Mpe atindaki bango ete bateya eloko mosusu te longola se soki ezalaki makambo oyo ateyaki, mpe oyo elobamaki na monoko ya baprofeta basantu.

20 Iyo, atindaki bango ete bateya eloko mosusu te longola se soki ezalaki boyamboli mpe bondimi na Nkolo, oyo asikolaka bato na ye.

21 Mpe atindaki bango ete boswani ezala te moko na mosusu, kasi ete bazela na liso moko epayi na liboso, kozalaka na bondimi moko mpe libatisi moko, kozalaka mitema na bango misangana esika moko kati na bomoko mpe na bolingo moko epayi na mosusu.

22 Mpe boye atindaki bango bateya. Mpe boye bakomaki bana ya Nzambe.

23 Mpe atindaki bango ete batosa mokolo ya sabato, mpe babatela yango mosantu, mpe lisusu mokolo na mokolo basengeli kopesa matondi na Nkolo Nzambe na bango.

24 Mpe atindaki bango lisusu ete banganganzambe baye akulisaka basengeli kosala na maboko na bango moko mpo na lisalisi na bango.

25 Mpe ezalaki na mokolo moko mposo na mposo oyo etiamaki mpembeni ete basangana bango moko esika moko mpo na kolakisa bato, mpe mpo na kokumbamela Nkolo Nzambe na bango, mpe lisusu, mbala mingi lokola ezalaki na nguya na bango, kowangana bango moko esika moko.

26 Mpe banganganzambe basengelaki te kotalela bato mpo na lisalisi na bango; kasi mpo na mosala na bango basengelaki kozwa ngolu ya Nzambe, ete bakoka kokoma makasi na Molimo, kozalaka na boyebi ya Nzambe, ete bakoka koteya na nguya mpe likoki uta na Nzambe.

27 Mpe lisusu Alma atindaki ete bato ya eklezia bakaba ndambo ya biloko na bango, moko na moko engebene na oyo azwaki; soki azali na mingi koleka akokaba mingi koleka; mpe na oyo azali na moke, nde moke esengami; mpe na oyo azangi esengeli bapesa ye.

28 Mpe boye bakabolaki ndambo ya biloko na bango na bonsomi ya bolingi na bango moko mpe engebene na mposa ya malamu epayi na Nzambe, mpe epayi ya banganganzambe baoyo bazalaki na bokeleli, iyo, mpe na bakeleli nyonso, mpe moto nyonso oyo azalaki bolumbu.

29 Mpe oyo alobaki epayi na bango, lokola atindamaki na Nzambe; mpe batambolaki na alima liboso ya Nzambe, kokabaka na moko mpe mosusu biloko ya ntango mpe lisusu ya molimo engebene na bozangi mpe bosenga na bango.

30 Mpe sikawa esalemaki ete nyonso oyo esalemaki na Mormon, iyo, mpembeni ya mai ya Mormon, na zamba oyo ezalaki mpembeni na mai ya Mormon; iyo, esika ya Mormon, mai ya Mormon, zamba ya Mormon, lolenge boni ezalaki kitoko na miso ya baoyo bayaki kuna mpo na kozwa boyebi ya Mosikoli na bango; iyo, mpe lolenge boni bapambolami, mpo bakoyemba mpo na kosanzola ye libela.

31 Mpe makambo oyo masalemaki na ndelo ya mboka, ete makokaki te koya na boyebi ya mokonzi.

32 Kasi tala, esalemaki ete mokonzi, lokola abombolaki mosala ya kotambola na kati ya bato, atindaki basali na ye mpo na kosenzele bango. Boye na mokolo oyo bayanganaki esika moko mpo na koyoka liloba ya Nkolo bayebanaki na mokonzi.

33 Mpe sikawa Mokonzi alobaki ete Alma azalaki kolamusa bato mpo na botomboki na ye; boye atindaki limpinga na ye mpo na kobebisa bango.

34 Mpe esalemaki ete Alma elongo na bato ya Nkolo bazwaki nsango ya boyei ya limpinga ya mokonzi; boye bakamataki biema na bango mpe mabota na bango mpe bakendaki kati na esobe.

35 Mpe bazalaki na motuya penepene na bato nkama minei na ntuku mitano.

Bimisa na lokasa