Makomi
Mosiya 27


Mokapo 27

Mosiya apekisi bonyokoli ya bato mpe akitisi mibeko mpo na bokokani—Elenge Alma mpe bana mibali minei ya Mosiya bazali koluka kobebisa Eklezia—Anjelu moko amonani mpe atindi bango batika botamboli na bango ya mabe—Alma akomi baba—Bato nyonso basengeli kobotama lisusu mpo na kozwa lobiko—Alma mpe bana mibali ya Mosiya basakoli nsango ya nsai. Penepene na mibu 100–92 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa esalemaki ete minyokoli oyo ekweyaki likolo ya eklezia na bato bazangi bondimi ekomaki monene boye ete eklezia ebandaki koyima-yima, mpe komilela epayi ya bakambi na bango mpo na oyo etali likambo yango; mpe bakendaki komilela epayi ya Alma. Mpe Alma amemaki likambo liboso ya mokonzi, Mosiya. Mpe Mosiya atunanaki elongo na banganganzambe na ye.

2 Mpe esalemaki ete mokonzi Mosiya atindaki bosakoli bipayi na mboka nzinganzinga mpembeni ete moto azangi bondimi moko te asengeli konyokola moko na bango oyo bazali na eklezia ya Nzambe.

3 Mpe ezalaki na motindo moko ya sikisiki epayi na Baeklezia nyonso ete monyokoli ezala te na kati na bango, ete bokokani esengeli kozala na kati ya bato nyonso.

4 Ete basengeli kotika te ete lolendo soki te efundeli etia mobulu na kimia na bango; ete moto na moto atala moto ya penepene na ye lokola ye moko, kosalaka na maboko na bango moko mpo na lisalisi na bango.

5 Iyo, mpe banganganzambe na bango mpe bateyi na bango nyonso basala na maboko na bango moko mpo na lisalisi na bango, longola se soki ezali na ntango ya bokono, to ya mposa makasi; mpe na kosalaka makambo oyo, bayikanaki na ngolu ya Nzambe.

6 Mpe kimia mingi ebandaki kozala lisusu na mboka; mpe bato babandaki kokoma na motango monene mpenza, mpe babandaki kopanzana mosika likolo ya etando ya mabele, iyo, na nordi mpe na sudi, na esti mpe na westi, kotongaka bingumba mpe mboka minene na biteni nyonso ya mboka.

7 Mpe Nkolo ayaki kotala bango mpe afulusaki bango, mpe bakomaki bato banene mpe bato na bozwi.

8 Sikawa bana mibali ya Mosiya batangamaki na kati ya bato bazangi bondimi; mpe lisusu moko ya bana mibali ya Alma atangamaki na kati na bango, oyo abiangamaki Alma, na nkombo ya tata na ye; nzokande, akomaki moto moko ya nkuna mpenza mpe mosambeli bikeko. Mpe azalaki moto ya maloba mingi, mpe alobaki maloba malete na bato; boye akambaki bato mingi mpo na kosala mabe na lolenge na ye.

9 Mpe akomaki libaku monene mpo na bofuluki ya eklezia ya Nzambe; na koyibaka mitema ya bato; kosalaka bokabwani mingi na kati ya bato; kopesaka libaku epayi ya monguna ya Nzambe mpo na kosalela nguya na ye likolo na bango.

10 Mpe sikawa esalemaki ete wana ezalaki ye kokende bipayi na bipayi mpo na kobebisa eklezia ya Nzambe, mpo akendaki bipayi na bipayi na nkuku elongo na bana mibali ya Mosiya kolukaka kobebisa eklezia, mpe kobungisa nzela ya bato ya Nkolo, na bokeseni na mitindo ya Nzambe, to kutu mokonzi—

11 Mpe lokola nalobaki epayi na bino, wana ezalaki bango kokendaka bipayi na bipayi kotombokaka na Nzambe, tala anjelu ya Nkolo abimelaki bango; mpe akitaki lokola soki ezalaki na lipata; mpe alobaki lokola soki ezalaki na mongongo ya kake, oyo moningisaki mabele likolo ya oyo wapi batelemaki;

12 Mpe boye bokamwi na bango ezalaki monene, ete bakweyaki na mabele, mpe basosolaki te maloba oyo alobaki epayi na bango.

13 Nzokande abelelaki lisusu, kolobaka: Alma, lamuka mpe telema, mpo na ntina nini ezali yo konyokola eklezia ya Nzambe? Mpo Nkolo alobaki: Oyo ezali eklezia na ngai, mpe natiaki yango; mpe eloko moko te ekolonga yango, longola se soki ezali bobuki mobeko ya bato na ngai.

14 Mpe lisusu, anjelu alobaki: Tala, Nkolo ayokaki sambo ya bato na ye, mpe lisusu sambo ya mosali na ye, Alma, oyo azali tata na yo; mpo asambelaki na bondimi mingi mpo na ntina na yo ete okoka komemama na boyebi ya bosolo; boye, mpo na ntina oyo nayei mpo na kondimisa yo nguya mpe likoki ya Nzambe, ete sambo ya basali na ye ekoka koyanolama engebene na bondimi na bango.

15 Mpe sikawa tala, ekoki yo kotia ntembe na nguya ya Nzambe? Mpo tala, mongongo na ngai moningisi mabele te? Mpe okoki komona ngai liboso na yo te? Mpe natindami uta na Nzambe.

16 Sikawa nakoloba epayi na yo: Kende, mpe omikundola bokangemi ya batata na yo na mboka ya Helama, mpe na mboka ya Nefi; mpe omikundola makambo minene boni asalaki mpo na bango; mpo bazalaki na boumbu, mpe abikisaki bango. Mpe sikawa nakoloba epayi na yo, Alma, kende na nzela na yo, mpe koluka te lisusu kobebisa eklezia, ete sambo na bango ekoka koyanolama, mpe oyo kutu soki yo moko olingi kobwakama mosika.

17 Mpe sikawa esalemaki ete oyo ezalaki maloba ya nsuka oyo anjelu alobaki epayi ya Alma, mpe akendaki.

18 Mpe sikawa Alma mpe bango oyo bazalaki elongo na ye bakweyaki lisusu na mabele, mpo bokamwi na bango ezalaki monene; mpo bamonaki anjelu ya Nkolo na miso na bango moko; mpe mongongo na ye ezalaki lokola kake, oyo elengisaki mabele; mpe bayebaki ete ezalaki eloko te longola se nguya ya Nzambe oyo ekokaki koningisa mabele mpe kosala ete maningana lokola soki elingaki kopasuka ndambo ndambo.

19 Mpe sikawa bokamwi ya Alma ezalaki monene boye ete akomaki baba, ete akokaki kofungola monoko na ye te; iyo, mpe akomaki motau, kutu ete akokaki koningisa lisusu maboko na ye te; boye bakamataki ye na bango oyo bazalaki elongo na ye, mpe bamemaki ye makasi na nzoto te, kino balalisaki ye liboso ya tata na ye.

20 Mpe bazongelaki koyebisa epayi ya tata na ye nyonso oyo ekomelaki bango; mpe tata na ye asepelaki, mpo ayebaki ete ezalaki nguya ya Nzambe.

21 Mpe asalaki ete ebele ya bato basangana esika moko ete bakoka kotatola nini Nkolo asalaki mpo na mwana mobali na ye, mpe lisusu mpo na bango oyo bazalaki elongo na ye.

22 Mpe asalaki ete banganganzambe basangana bango moko esika moko; mpe babandaki kokila, mpe kosambela Nkolo Nzambe na bango ete andima kofungola monoko ya Alma, ete akoka koloba, mpe lisusu ete binama na ye bikoka kozwa makasi—ete miso ya bato ekoka kofungwana mpo na komona mpe koyeba bolamu mpe nkembo ya Nzambe.

23 Mpe esalemaki ete esilaki bango kokila mpe kosambela na ntaka ya mikolo mibale mpe butu mibale, binama ya Alma ezwaki makasi, mpe atelemaki mpe abandaki koloba epayi na bango, kosengaka bango ete babondisama:

24 Mpo, elobaki ye, nayamboli masumu na ngai, mpe nasikolami na Nkolo; tala nabotami na Molimo.

25 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Kokamwa te ete bato nyonso, iyo, mibali mpe basi, bikolo nyonso, mabota nyonso, minoko nyonso mpe bato nyonso, basengeli kobotama lisusu; iyo, kobotama na Nzambe, kobongola ezaleli na bango ya mosuni mpe ya bokwei, na ezaleli yoko ya bosembo, na kosikolamaka na Nzambe, kokomaka bana mibali na ye mpe bana basi na ye;

26 Mpe boye bakomi bikelamo ya sika; mpe longola se soki basali oyo, bakoki na lolenge moko te kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe.

27 Nalobi epayi na yo, longola se soki oyo ezali boye, basengeli kobwakama mosika; mpe oyo nayebi, mpo nazalaki penepene ya kobwakama mosika.

28 Nzokande, nsima ya kokatisaka mikakatano mike, koyambolaka kino penepene na liwa, Nkolo na boboto amonaki ete elongobani kolongola ngai uta na bozikisami ya libela, mpe nabotami na Nzambe.

29 Molimo na ngai esikolamaki uta na lititi ya bololo mpe na boumbu ya mabe. Nazalaki na lobwaku ya molili; kasi sikawa namoni pole ya kokamwa ya Nzambe. Molimo na ngai etungisamaki na monioko ya seko; kasi nalongolami, mpe molimo na ngai ezali lisusu kati na bolozi te.

30 Nabwakaki Mosikoli na ngai, mpe nawanganaki oyo elobamaki na batata na biso; kasi sikawa mpo ete bakoka komona yambo esalema ete akoya, mpe ete omikundolaka ekelamo moko moko ya bokeli na ye, akomimonisa epayi ya nyonso.

31 Iyo, libolongo nyonso ekogumbama, mpe lolemo nyonso ekosakola liboso na ye. Iyo, kutu na mokolo ya nsuka, ntango bato nyonso bakotelema mpo na kosambisama na ye, nde bakosakola ete azali Nzambe; na ntango wana bakondima, baoyo bazali kotambwisa bomoi na bango na mokili na kozangaka Nzambe, ete bosambisi ya etumbu ya libela ebongi mpenza likolo na bango; mpe bakoningana, mpe bakolenga mpe bakozonga nsima na nse ya botali ya liso na ye oyo etalaka nyonso.

32 Mpe sikawa esalemaki ete Alma abandaki uta na ntango oyo kokende liboso koteya bato, mpe bango oyo bazalaki elongo na Alma na ntango anjelu abimelaki bango, ezalaki bango kokende mobembo nzinganzinga bipayi nyonso na mboka, kosakolaka na bato nyonso makambo oyo bamonaki mpe bayokaki, mpe koteyaka liloba ya Nzambe kati na mikakatano mike, mpe baniokwamaki mpenza na bango oyo bazalaki bato bazangi bondimi, mpe babetamaki mingi na bango.

33 Kasi ata oyo nyonso, bapesaki libondisi mingi epayi na eklezia, kokomisaka bondimi na bango makasi, mpe kolendisaka bango na motema molai mpe mosala mingi mpo na kobomba mitindo ya Nzambe.

34 Mpe minei kati na bango bazalaki bana mibali ya Mosiya; mpe nkombo na bango ezalaki Amona, mpe Alona, mpe Omina, mpe Imini; oyo ezalaki nkombo ya bana mibali ya Mosiya.

35 Mpe bakendaki mobembo epayi na mboka mobimba ya Zalayemila, mpe na kati ya bato nyonso oyo bazalaki na nse ya bokonzi ya mokonzi Mosiya, basalaki makasi na mpila mpo na kobongisa mabe oyo basalaki na eklezia, koyambolaka masumu na bango nyonso, mpe kosakolaka makambo nyonso oyo bamonaki, mpe kolimbolaka masakoli mpe makomi na nyonso oyo balingaki koyokela bango.

36 Mpe boye bazalaki bisaleli na maboko ya Nzambe na komemaka bato mingi na boyebi ya bosolo, iyo, na boyebi ya Mosikoli na bango.

37 Mpe lolenge boni bapambolami! Mpo basakolaki kimia; basakolaki nsango ya nsai; mpe basakolaki epayi ya bato ete Nkolo azali koyangela.

Bimisa na lokasa