Makomi
Omini 1


Buku ya Omini

Mokapo 1

Omini, Amaloni, Kemisi, Abinadomi, mpe Amaleki, moto na moto na ntango na ye, babateli masolo ya makomi—Mosiya abomboli bato ya Zalayemila, baoyo bayaki uta na Yelusaleme na mikolo ya Sidikiya—Mosiya bamoponi mokonzi likolo na bango—Biboto ya Muleke na Zalayemila babombolaki Koliantumili, moto ya nsuka na kati ya Bayelede—Mokonzi Benyamina akitani Mosiya—Bato basengeli kobonza milimo na bango lokola libonza na Klisto. Penepene na mibu 323–130 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Tala, esalemaki ete ngai, Omini, etindami ngai na tata na ngai, Jarom, ete nakoma mwa moke likolo ya bapalaki oyo, mpo na kobatela mambi ma kala ya libota na biso—

2 Boye, na mikolo na ngai, nalingi boyeba ete nabundaki mingi na mompanga mpo na kobatela bato na ngai, Banefi, uta na bokwei kati na maboko ya banguna na bango, Balamani. Kasi tala, ngai na ngai moko nazali moto ya nkuna, mpe natosaki te meko mpe mitindo ya Nkolo lokola nasengelaki kosala.

3 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale na ntuku sambo na motoba milekaki, mpe tozalaki na bileko mingi ya kimia; mpe tozalaki na bileko mingi ya etumba ya ndongo mpe ya bosopi makila. Iyo, mpe na nsuka, mibu nkama mibale na ntuku mwambe na mibale milekaki, mpe nabombaki bapalaki oyo engebene na mitindo ya batata na ngai; mpe napesaki yango na mwana na ngai Amaloni. Mpe natie nsuka.

4 Mpe sikawa ngai, Amaloni, nakomi makambo nyonso kani nakomi, oyo ezali moke, na buku ya tata na ngai.

5 Tala, esalemaki ete mibu nkama misato na ntuku mibale milekaki, mpe eteni eleki nkuna ya Banefi ebebisamaki.

6 Mpo Nkolo alingaki te kopesa nzela, esilaki ye kokamba bango uta na mboka ya Yelusaleme mpe kobatela mpe kobomba bango uta na bokwei kati na maboko ya banguna na bango, iyo, alingaki te kopesa nzela ete bosolo ya maloba elakisama te, iyo, oyo alobaki epayi ya batata na biso, kolobaka ete: Mbala mingi lokola ekobomba bino te mitindo na ngai bokofuluka te na mboka yango.

7 Boye, Nkolo abimelaki bango na bosambisi monene; nzokande, abikisaki basembo ete bawa te, kasi abikisaki bango uta na maboko ya banguna na bango.

8 Mpe esalemaki ete napesaki bapalaki epayi ya ndeko na ngai Kemisi.

9 Sikawa ngai, Kemisi, nakomi makambo nini moke nakomi, kati na buku se moko wana elongo na ndeko na ngai; mpo tala, namonaki ya nsuka oyo akomaki, ete akomaki yango na loboko ya ye moko; mpe akomaki yango na mokolo oyo apesaki yango epayi na ngai. Mpe na lolenge oyo tobatelaki masolo ya makomi, mpo ezali engebene na mitindo ya batata na biso. Mpe natie nsuka.

10 Tala, ngai, Abinadomi, nazali mwana ya Kemisi. Tala, esalemaki ete namonaki etumba mpe boweli boike kati na bato na ngai, Banefi, mpe Balamani; mpe ngai, elongo na mompanga na ngai moko, nalongolaki bomoi ya mingi ya Balamani mpo na kobatela bandeko na ngai.

11 Mpe tala, lisolo ya makomi ya bato oyo ekomami na bapalaki oyo ezali na bakonzi, engebene na nkola; mpe nayebi emoniseli moko te longola se boye ekomamaki, mpe lisakoli te; yango wana, oyo ekomami awa ekoki. Mpe natie nsuka.

12 Tala, nazali Amaleki, mwana ya Abinadomi. Tala, nakoloba epayi na bino mwa moke mpo na oyo etali Mosiya, oyo atiamaki mokonzi likolo ya mboka ya Zalayemila; mpo tala, akebisamaki na Nkolo ete akima uta na mboka ya Nefi, mpe mingi lokola balingaki koyoka mongongo ya Nkolo basengelaki lisusu kokende uta na mboka elongo na ye, kati na esobe—

13 Mpe esalemaki ete asalaki mpenza lokola Nkolo atindaki ye. Mpe bakendaki uta na mboka kati na esobe, lokola mingi balingaki koyokela mongongo ya Nkolo; mpe bakambamaki na mateya mpe masakoli mingi. Mpe bateyamaki ntango nyonso na liloba ya Nzambe; mpe bakambamaki na nguya ya loboko na ye, na nzela ya esobe, kino bakomaki kati na mboka oyo ebiangami mboka ya Zalayemila.

14 Mpe babombolaki bato, baoyo bazalaki kobiangama bato ya Zalayemila. Sikawa, ezalaki bosepeli monene na kati ya bato ya Zalayemila; mpe lisusu Zalayemila asepelaki mpenza, mpo Nkolo atindaki bato ya Mosiya elongo na bapalaki ya motako oyo ezalaki na lisolo ya makomi ya Bayuda.

15 Tala, esalemaki ete Mosiya abombolaki ete bato ya Zalayemila bayaki uta na Yelusaleme na ntango oyo Sidikiya, mokonzi na Yuda, amemamaki mokangemi na Babiloni.

16 Mpe bakendaki mobembo na esobe, mpe bamemamaki na loboko ya Nkolo na bokatisi ya mai monene, kokendaka na mboka wapi Mosiya abombolaki bango; mpe bafandaki kuna uta ntango wana kokende liboso.

17 Mpe na ntango oyo Mosiya abombolaki bango, bakomaki baike koleka. Nzokande, bazalaki na bitumba mingi mpe boweli ya ndongo, mpe bakweyaki na mompanga mbala na mbala; mpe elobeli na bango ebebaki; mpe bamemaki masolo ya makomi elongo na bango te; mpe bawanganaki kozala ya Mokeli na bango; mpe Mosiya, bato ya Mosiya mpe te, bakokaki kososola yango te.

18 Kasi esalemaki ete Mosiya asalaki ete bateyama na lokota na ye. Mpe esalemaki ete esilaki bango koteyama na lokota ya Mosiya, Zalayemila apesaki mambi ma kala ya libota ya batata na ye, engebene na bokundoli na ye; mpe ekomami, kasi na bapalaki oyo te.

19 Mpe esalemaki ete bato ya Zalayemila, mpe ya Mosiya, basanganaki elongo; mpe Mosiya aponamaki kozala mokonzi na bango.

20 Mpe esalemaki ete na mikolo ya Mosiya, ezalaki na libanga monene oyo bamemaki epayi na ye na minkoma likolo na yango; mpe alimbolaki minkoma na lisalisi ya likabo mpe nguya ya Nzambe.

21 Mpe nkoma ezali kopesa lisolo ya Koliantumili moko, mpe bobomi ya bato na ye. Mpe Koliantumili abombolamaki na bato ya Zalayemila; mpe afandaki elongo na bango na ntaka ya sanza libwa.

22 Ezali mpe koloba mwa maloba moke mpo na oyo etali batata na ye. Mpe baboti na ye ya yambo bayaki uta na linongi, na ntango Nkolo abulunganisaki lokota ya bato; mpe maloba makasi ya Nkolo makweyaki likolo na bango engebene na masambisi na ye, oyo ezali alima; mpe mikuwa na bango milali ya kopanzama na mboka epayi na nordi.

23 Tala, ngai, Amaleki, nabotamaki na mikolo ya Mosiya; mpe nazalaki na bomoi mpo na komona liwa na ye; mpe Benyamina, mwana na ye, akonzaki na esika na ye.

24 Mpe tala, namonaki, na mikolo ya mokonzi Benyamina, etumba ya ndongo mpe bosopi makila kati na Banefi mpe Balamani. Kasi tala, Banefi bazwaki litomba mingi likolo na bango; iyo, na lolenge ete mokonzi Benyamina abenganaki bango libanda ya mboka Zalayemila.

25 Mpe esalemaki ete nabandaki kozala mobange; mpe, lokola nazalaki na nkona te, mpe nayebaki ete mokonzi Benyamina azalaki moto moko moyengebene liboso ya Nkolo, boye, nakopesa bapalaki oyo epayi na ye, kolendisaka bato nyonso mpo na koya epayi na Nzambe, Moko Mosantu ya Yisalaele, mpe kondima masakoli, mpe bimoniseli, mpe lisalisi ya banjelu, mpe likabo ya koloba minoko, mpe likabo ya bolimboli nkota, mpe makambo nyonso oyo ezali malamu; mpo ezali na eloko moko te oyo ezali malamu longola se soki ewuti na Nkolo; mpe oyo ezali ya mabe ewuti na zabulu.

26 Mpe sikawa, bandeko balingami na ngai, nalingi ete boya epayi ya Klisto, oyo azali Moko Mosantu ya Yisalaele, mpe bokabola na ye lobiko, mpe na ye nguya ya bosikoli. Iyo, boya epayi na ye, mpe bobonza milimo na bino mibimba lokola libonza epayi na ye, mpe bokoba na kokilaka bilei mpe kosambelaka, mpe botia molende kino na nsuka; mpe lokola Nkolo azali na bomoi bokobikisama.

27 Mpe sikawa nalingi koloba mwa moke mpo na oyo etali mwa motango moke ya baoyo bakendaki kati na esobe mpo na kozonga na mboka ya Nefi; mpo ezalaki na motango monene ya baoyo bazalaki na mposa ya kozwa mboka ya bosangoli libula na bango.

28 Boye, bamataki kati na esobe. Mpe lokola mokambi na bango azalaki moto ya mpiko mpe moto ya makasi, mpe moto na matoyi mangongi, boye abimisaki boweli na kati na bango; mpe babomaki bango nyonso, longola se ntuku mitano, na esobe, mpe bazongaki lisusu na mboka ya Zalayemila.

29 Mpe esalemaki ete bakamataki mpe lokola basusu na motango monene, mpe bakendaki mobembo na bango lisusu kati na esobe.

30 Mpe ngai, Amaleki, nazalaki na ndeko mobali, oyo lisusu akendaki elongo na bango; mpe uta kala nayoka te nsango mpo na ntina na bango. Mpe nazali penepene ya kolala na lilita na ngai; mpe bapalaki oyo etondi. Mpe natie nsuka na maloba na ngai.

Bimisa na lokasa