Masalisi mpo na Makomi
BJS, Yoane 13


BJS, Yoane 13:8–10. Meka na Yoane 13:8–10

Yesu asukoli makolo ya Bapostolo mpo na kokokisa mobeko ya Bayuda.

8 Petelo alobaki epayi na ye, Osengeli kosukola makolo na ngai te. Yesu azongisaki ye eyano, Soki nasukoli yo te, ozali na likabo na ngai te.

9 Simona Petelo alobaki epayi na ye, Nkolo, bobele makolo na ngai te, kasi lisusu maboko mpe moto na ngai.

10 Yesu alobaki epayi na ye, Ye oyo asili kosukola maboko mpe moto na ye, asengeli bobele kosukola makolo na ye, kasi azali peto na eteni nyonso; mpe bozali peto, kasi banso te. Sikawa oyo ezalaki momeseno ya Bayuda na nse ya mobeko na bango; yango wana, Yesu asalaki oyo ete mobeko mokokisama.

Bimisa na lokasa