Masalisi mpo na Makomi
BJS, Yoane 1


BJS, Yoane 1:1–34. Meka na Yoane 1:1–34

Nsango malamu ya Yesu Klisto eteyamaki uta na ebandeli. Yoane Mobatisi azali Eliyasi oyo alengeli nzela mpo na Klisto, mpe Yesu Klisto azali Eliyasi oyo azongisi makambo nyonso mpe na nzela ya nani lobiko ekoya.

1 Na ebandeli ezalaki nsango malamu oyo eteyamaki na nzela ya Mwana. Mpe nsango malamu ezalaki liloba, mpe liloba ezalaki na Mwana, mpe Mwana azalaki na Nzambe, mpe Mwana azalaki ya Nzambe.

2 Se ye moko wana azalaki na ebandeli na Nzambe.

3 Biloko nyonso ekelamaki na ye; mpe libanda na ye eloko moko esalemaki te oyo esengelaki kosalema.

4 Na ye ezalaki nsango malamu, mpe nsango malamu ezalaki bomoi, mpe bomoi ezalaki pole ya bato;

5 Mpe pole engengaka na mokili, mpe mokili eyebaki yango te.

6 Ezalaki na moto moko oyo atindamaki na Nzambe, oyo nkombo ezalaki Yoane.

7 Se ye moko wana ayaki kati na mokili lokola nzeneneke, kopesa litatoli na ntina ya pole, mpo na kopesa litatoli ya nsango malamu na nzela ya Mwana, epayi ya banso, ete na nzela na ye bato bakoka kondima.

8 Azalaki pole yango wana te, kasi ayaki kopesa litatoli na ntina ya pole,

9 Oyo ezalaki pole ya solo, oyo engengisaka moto nyonso oyo ayaka na kati na mokili;

10 Kutu Mwana ya Nzambe. Ye oyo azalaki na mokili, mpe mokili esalemaki na ye, mpe mokili eyebaki ye te.

11 Ayaki epayi ya baoyo ya ye moko, mpe baoyo ya ye moko bayambaki ye te.

12 Kasi na mingi lokola oyo bayambaki ye, na bango nde apesaki nguya ya kokoma bana ya Nzambe; bobele na bango oyo bandimi na nkombo na ye.

13 Abotamaki, na makila te, na bolingi ya mosuni mpe te, na bolingi ya moto mpe te, kasi na bolingi ya Nzambe.

14 Mpe liloba se moko ekomisamaki mosuni, mpe lifandaki na kati na biso, mpe tomonaki nkembo na ye, nkembo lokola ya Mobotami se Moko ya Tata, atonda na ngolu mpe bosolo.

15 Yoane apesaki litatoli na ntina na ye, mpe agangaki, kolobaka, Oyo azali ye na ntina ya nani nalobaki; Ye oyo azali koya nsima na ngai, alingami koleka ngai; mpo azalaki liboso na ngai.

16 Mpo ete na ebandeli ezalaki Liloba, kutu Mwana, oyo akomisamaki mosuni, mpe atindamaki epayi na biso na bolingi ya Tata. Mpe mingi lokola bakondima na nkombo na ye bakozwa ya litondi na ye. Mpe ya litondi na ye biso nyonso tozwaki, kutu bozangi bokufi mpe bomoi ya seko, na nzela ya ngolu na ye.

17 Mpo mobeko mopesamaki na nzela ya Mose, kasi bomoi mpe bosolo eyaki na nzela ya Yesu Klisto.

18 Mpo ete mobeko ezalaki engebene na motindo ya mosuni, oyo ememaki kufa; kasi nsango malamu ezalaki engebene na nguya ya bomoi ezanga nsuka, na nzela ya Yesu Klisto, Mwana Mobotami se Moko, oyo azali na ntolo ya Tata.

19 Mpe moto moko te amona Nzambe na ntango moko, longola se apesaki litatoli na ntina ya Mwana; mpo ete moto moko akoki kobikisama te longola se soki ezali na nzela na ye.

20 Mpe oyo ezali litatoli ya Yoane, ntango Bayuda batindaki banganganzambe mpe Balewi uta Yelusaleme, kotuna ye; Ozali nani?

21 Mpe andimaki, awanganaki te ete azalaki Eliyasi; kasi andimaki, kolobaka; Nazali Klisto te.

22 Mpe batunaki ye, kolobaka; Bongo boni ezali yo Eliyasi? Mpe ye alobaki, Nazali te Eliyasi oyo asengelaki kozongisa makambo nyonso. Mpe batunaki, kolobaka, Ezali yo profeta wana? Mpe azongisaki maloba, Te.

23 Nsima balobaki epayi na ye, Ozali nani? ete tokoka kopesa eyano na bango oyo batindaki biso. Olobi nini mpo na oyo etali yo moko?

24 Alobaki, Nazali mongongo ya moko oyo azali koganga na esobe, Sembola nzela ya Nkolo, lokola elobi profeta Esayasi.

25 Mpe bango oyo batindamaki bazalaki uta na kati ya Bafalisai.

26 Mpe batunaki ye, mpe balobaki epayi na ye; Mpo na nini bongo ezali yo kobatisa, soki ozali Klisto te, Eliyasi oyo asengelaki kozongisa makambo nyonso mpe te, profeta wana mpe te?

27 Yoane azongisaki bango maloba, kolobaka; Ngai nazali kobatisa na mai, kasi ezali na moko oyo atelemi na kati na bino, oyo boyebi te;

28 Azali ye oyo na ntina ya nani nazali kopesa litatoli. Azali profeta wana, kutu Eliyasi, oyo, koyaka nsima na ngai, alingami koleka ngai, oyo kani nalongobani te kofungola singa ya sapato na ye, to oyo kani ebonga nakoki kozwa te; mpo akobatisa, bobele na mai mpamba te, kasi na moto, mpe na Molimo Mosantu.

29 Mokolo molandi Yoane amoni Yesu koyaka epayi na ye, mpe alobaki; Tala Mwana ya mpate ya Nzambe, oyo alongolaka masumu ya mokili!

30 Mpe Yoane atatolaki na ntina na ye epayi ya bato, kolobaka, Oyo azali ye oyo nalobaki; Nsima na ngai moto moko azali koya oyo alingami koleka ngai; mpo azalaki liboso na ngai, mpe nayebaki ye, mpe ete asengelaki komonisama na Yisalaele; boye nayei kobatisaka na mai.

31 Mpe Yoane atatolaki, kolobaka; Ntango abatisamaki na ngai, namonaki Molimo kokitaka uta na lola lokola ebenga, mpe motikalaki likolo na ye.

32 Mpe nayebaki ye; mpo ye oyo atindaki ngai kobatisa na mai, se moko wana alobaki epayi na ngai; Likolo na ye oyo okomona Molimo kokitaka, mpe kotikalaka likolo na ye, se moko wana abatisaki na Molimo Mosantu.

33 Mpe namonaki, mpe napesi litatoli ete oyo azali Mwana ya Nzambe.

34 Makambo oyo esalemaki na Betabara, likolo ya Yaladene, epayi wapi Yoane azalaki kobatisa.

BJS, Yoane 1:42. Meka na Yoane 1:42

Kefa elingi koloba “momoni” to “libanga.”

42 Mpe amemaki ye na Yesu. Mpe ntango Yesu atalaki ye, alobaki, Ozali Simona, mwana mobali ya Yona, okobiangama Kefa, oyo ezali, na bolimboli, momoni, to libanga. Mpe bazalaki baluki ya mbisi. Mpe na mbala moko batikaki nyonso, mpe balandaki Yesu.

Bimisa na lokasa