Makomi
Mose 2


Mokapo 2

(Sanza ya motoba–Sanza ya zomi 1830)

Nzambe akelaki lola mpe mabele—Ndenge nyonso ya bomoi ekelami—Nzambe asali moto mpe apesi ye mpifo likolo ya nyonso mosusu.

1 Mpe esalemaki ete Nkolo alobaki na Mose, kolobaka: Tala, nazali kobimisa epayi na yo makambo matali lola oyo, mpe mabele oyo; koma maloba oyo nakoloba. Nazali Ebandeli mpe Nsuka, Nzambe ya Bokasi bonso; na nzela ya Mobotami se Moko na ngai nakelaki biloko oyo; iyo, na ebandeli nakelaki lola, mpe mabele likolo ya oyo wapi botelemi.

2 Mpe mabele mazalaki na lolenge te, mpe mpamba; mpe nasalaki ete molili moyingela likolo ya mozindo; mpe Molimo na ngai ezalaki kotambola likolo ya etando ya mai; mpo nazali Nzambe.

3 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete pole ezala; mpe pole ezalaki.

4 Mpe ngai, Nzambe, namonaki pole; mpe ete pole ezalaki malamu. Mpe ngai, Nzambe, nakabolaki pole uta na molili.

5 Mpe ngai, Nzambe, nabiangaki pole Moi; mpe molili, nabiangaki Butu; mpe oyo nasalaki na liloba ya nguya na ngai, mpe esalemaki lokola nalobaki; mpe mpokwa mpe ntongo ezalaki mokolo ya yambo.

6 Mpe lisusu, ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete bofungwami ezala na katikati ya mai, mpe ezalaki bongo, kutu lokola nalobaki; mpe nalobaki: Tika ete ekabola mai na mai; mpe esalemaki;

7 Mpe ngai, Nzambe, nasalaki bofungwami mpe nakabolaki mai, iyo, mai monene na nse ya bofungwami uta na mai oyo ezalaki likolo ya bofungwami, mpe ezalaki bongo kutu lokola nalobaki.

8 Mpe ngai, Nzambe, nabiangaki bofungwami Lola; mpe mpokwa mpe ntongo ezalaki mokolo ya mibale.

9 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete mai na nse ya lola masangisana na esika moko, mpe ezalaki bongo; mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete mabele ekawuka mazala; mpe ezalaki bongo.

10 Mpe ngai, Nzambe, nabiangaki mokili oyo ekawuki Mabele; mpe bosangisi ya mai, nde nabiangaki Mbu; mpe ngai, Nzambe, namonaki ete biloko nyonso oyo nasalaki ezalaki malamu.

11 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete mabele ebimisa matiti, ndunda oyo ebotaka nkona, nzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma, na lolenge na yango, mpe nzete ebotaka mbuma, oyo kani nkona esengeli kozala kati na yango moko likolo ya mabele, mpe ezalaki bongo kutu lokola nalobaki.

12 Mpe mabele ebimisaki matiti, ndunda nyonso oyo ebotaka nkona na lolenge na yango, mpe nzete oyo ebotaka mbuma, oyo kani nkona esengeli kozala kati na yango moko, na lolenge na yango; mpe ngai, Nzambe, namonaki ete biloko nyonso nasalaki ezali malamu;

13 Mpe mpokwa mpe ntongo ezalaki mokolo ya misato.

14 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete minda mizala na bofungwami ya lola, mpo na kokabola moi na butu, mpe tika mizala lokola bilembo, mpe mpo na kolakisa bileko, mpe mpo na kolakisa mikolo, mpe mpo na kolakisa mibu;

15 Mpe tika ete mizala lokola minda na bofungwami ya lola mpo na kopesa pole likolo ya mabele; mpe ezalaki bongo.

16 Mpe ngai, Nzambe, nasalaki minda minene mibale; mwinda monene koluta mpo na kokonza na mo, mpe mwinda moke mpo na kokonza na butu, mpe mwinda monene ezalaki moi, mpe mwinda moke ezalaki sanza; mpe minzoto misalemaki lisusu kutu engebene na liloba ya ngai.

17 Mpe ngai, Nzambe, natiaki yango na bofungwami ya lola mpo na kopesa pole likolo ya mabele,

18 Mpe moi mpo na kokonza na moi, mpe sanza mpo na kokonza na butu, mpe mpo na kokabola mwinda na molili; mpe ngai, Nzambe, namonaki ete biloko nyonso nakelaki ezali malamu;

19 Mpe mpokwa mpe ntongo ezalaki mokolo ya minei.

20 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete mai ebimisa bikelamo beboo bitambolaka oyo ezali na bomoi, mpe bandeke oyo ekoki kopumbwa likolo ya mabele na bofungwami efungolami ya lola.

21 Mpe ngai, Nzambe, nakelaki mbisi minene ya mai, mpe ekelamo moko moko oyo etambolaka, oyo mai ebimisaki beboo, na lolenge na yango, mpe bandeke nyonso epumbwaka na lolenge na yango; mpe ngai, Nzambe, namonaki ete biloko nyonso nakelaki ezalaki malamu.

22 Mpe ngai, Nzambe, napambolaki biloko yango, kolobaka: Bobota, mpe bokoma mingi, mpe botondisa mai na mbu; mpe tika ete bandeke ekoma mingi na mabele;

23 Mpe mpokwa mpe ntongo ezalaki mokolo ya mitano.

24 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete mabele mabota bikelamo ya bomoi na lolenge na yango, bibwele, mpe biloko bilandaka na nse, mpe banyama ya mabele na lolenge na yango, mpe ezalaki bongo;

25 Mpe ngai, Nzambe, nasalaki banyama ya mabele na lolenge na yango, mpe bibwele na lolenge na yango; mpe eloko nyonso oyo elandaka na nse likolo ya mabele na lolenge na yango; mpe ngai, Nzambe, namonaki ete biloko oyo nyonso ezalaki malamu.

26 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki na epayi Mobotami se Moko na ngai, oyo azalaki na ngai uta ebandeli: Tika ete tosala moto na elilingi na biso, na bokokani na biso; mpe ezalaki bongo. Mpe ngai, Nzambe, nalobaki: Tika ete bazala na mpifo likolo ya mbisi ya mbu, mpe likolo ya bandeke ya likolo, mpe likolo ya bibwele, mpe likolo ya mabele mobimba, mpe likolo ya eloko nyonso etambolaka na libumu oyo ezali kotambola na libumu likolo ya mabele.

27 Mpe ngai, Nzambe, nakelaki moto na elilingi na ngai moko, na elilingi ya Mobotami se Moko na ngai nakelaki ye; mobali mpe mwasi nde ekelaki ngai bango.

28 Mpe ngai, Nzambe, napambolaki bango, mpe nalobaki epayi na bango: Bobota, mpe bokoma mingi, mpe botondisa mabele, mpe bokonza yango, mpe bozala na mpifo likolo ya mbisi ya mai, mpe likolo ya ndeke ya likolo, mpe likolo ya eloko nyonso ya bomoi oyo etambolaka likolo ya mabele.

29 Mpe ngai, Nzambe, nalobaki epayi ya moto: Tala, nasili kopesa yo ndunda nyonso oyo ebotaka nkona, oyo ezali likolo ya etando ya mabele nyonso, mpe nzete nyonso na oyo wapi esengeli kozala mbuma ya nzete oyo epesaka nkona; na yo ekozala mpo na kolia.

30 Mpe na nyama nyonso ya mabele, mpe na ndeke nyonso ya likolo, mpe na eloko nyonso oyo elandaka na nse likolo ya mabele, kati na oyo napesi bomoi, ekopesama ndunda nyonso oyo ekoki mpo na kolia; mpe ezalaki bongo, kutu lokola nalobaki.

31 Mpe ngai, Nzambe, namonaki eloko nyonso nasalaki, mpe, tala, biloko nyonso oyo nasalaki ezalaki malamu mpenza; mpe mpokwa mpe ntongo ezalaki mokolo ya motoba.

Bimisa na lokasa