2010–2019
Kofanda kati na Nzambe mpe Kobongisa Ntaka
Sanza ya zomi 2017


2:3

Kofanda kati na Nzambe mpe Kobongisa Bobukani

Klisto azali na nguya ya komema biso kati na bondeko ya bolingo elongo na Tata mpe na moko mpe mosusu.

Wana ezalaki ngai kokania lisukulu oyo—mpe bino—makanisi na ngai ebandaki kotala malamu na ntina ya bozalani ya ebandeli mpe ya ntina oyo tozali na yango. Ezali bozalani na biso ya seko, ebongwanaka te elongo na Tata na biso ya Lola mpe lolenge nini biso, bana na Ye, tokoki kosala mingi koleka na ntina ya libiangisi naya kopusana penepene na Ye mpo ete tokoka kosepela mapamboli alingi kopesa biso na bomoi oyo mpe na mokili ekoya.

Tata na biso na Lola alingi biso topusana penepene na Ye. Nkolo alobaki na Yisalaele ya kala mpe Ye alobaki na biso, “Iyo, nalingi yon a bolingo ya seko, bongo naumelisi boboto na ngai epai na yo.”1 Mpo na nini Tata Tata akoloba na biso, “Bokofanda kati na ngai, mpe ngai kati na bino, bdongo botambola elongo na ngai”?2 Mpo ete kotambolaka elongo na Nzambe esukaka na esengo na biso mpe bokoli.

Tozali awa na mabele mpo na kokola mpe koyekola, mpe bokoli mpe boyekoli ya motuya mingi ekowuta na bozalani elongo na Tata ya Lola mpe Yesu Klisto. Uta na bozalani na biso ya bondimi elongo na Bango nde eyaka boyebi, bolingo, mpe makoki monene ya kosalisa basusu.

“Tozali na mokumba ya koyekola manso oyo Nzambe abimisi na ntina na Yemei.”3 Tosengeli kososola ete Nzambe Tata ayangelaki mwana na Ye, Yesu Klisto, akela mabele mpo na bokoli na biso, ete Tata na Lola apesaki Mwana na Ye mpo na kofuta babonsenga ya boyengebeni mpo na lobiko, mpe nguya ya bonganganzambe ya Tata mpe Eklezia ya solo ya mwana na makuli ya ntina ezongisamaki mpo na mapamboli na biso. Ekoki bino koyoka bolingo ya mozindo oyo ezali kati na eteni nyonso ya babolengeli mpo na posepeli na biso mpe bokoli.? Tosengeli koyeba mwango ya lobiko ya Tata ya lola ezali ete totosa tmibeko mpe makuli ya nsango malamu mpe kozwa bomoi ya seko mpe boye kokoma lokola Nzambe azali.4 Oyo ezali esengo ya solo mpe ya sekoTata ya lola apesi biso. Mpe ezali na esengo mosusu ya solo mpe ya seko te.

Tokutani mbala mingi na mikakatano oyo ekoki kopengwisa biso na nzela ya esengo. Tokoki kobungisa mokakano na biso ya kondimela Nzambe soki mimekano ezali komema biso na bobulinginsi makanisi esika ete tomikitisa mpe tofukama kati na losambo.

Milongo mibale ya pete oyo ezali kosenga biso tososola bapriorité na biso:

Biloko mosusu ezali na ntina, Biloko mosusu ezali te Some things matter; some things don’t.

Mwa biloko ewumelaka, kasi mingi ya biliko ewumelaka te.5

Makambo ya Mabongi ewumelaka mpo na Tata ezali ete toyekolaka uta na Ye, tomikitika bisomei, mpe tokolaka na botosi epai na Ye na nzela ya baexperience na mabele. Alingi biso tobongola kimoyimi na biso ekoma lisalisi mpe babobangi na biso ekoma bondimi. Makambo ewumelaka oyo ekoki kozala momekano ya mpasi mpenza.

Ezali sikoyo,na balimitasio na biso ya kufa, nde Tata asengaka biso tolinga ntango kolinga ezali mpasi mingi mpenza, tosalisa ntango kosalisa ezali mpasi, tolimbisa ntango kolimbisa etindaka biso tosala likambo oyo tondimaki te tokozala na makoki ya kosala. Boniboni? Tolukaka makasi lisalisi ya Tata ya Lola, na nkombo ya Mwana na Ye, mpe tosalaka makambo na lolenge na Ye na esika ya kolukaka na bosomi mpe lolendo bolingi na biso moko.

 Mobwaki mai

Nayebi lisusu lolendo na ngai ntango mokambi Ezra Taft Benson alobaki na ntina ya kosukolaka nkeni ya kati.6 Namimonaki lokola mbilika. Boniboni nasengelaki kolongola lolendo nazwaki na bomoi na ngai? Kolukaka makasi mpo na kozwa bomikitisi komipesaka mpo na kolinga basusu ezali sembo te, lubwaku, mpe esalaka te. Masumu na biso mpe lolendo na biso esalaka bobukani to libulu— katikati na biso mpe liziba ya bolingo nyonso, Tata na biso ya Lola.

Kaka Bomikabi ya Mobikisi ekoki kosukola biso masumu na biso mpe kokanga libulu to bobukani wana.

Tolingi kozingama na maboko ya Tata na biso ya Lola, mpe bongo totia bolingi bwa Ye liboso mpe na motema ya kobukana kobondela ete Klisto akosopa bariviere ya mai ya kopetola kati na mbilika. Na yambo ekoki koya malembe malembe, kasi wana ezali biso koluka mpe kosenga, ekoya mingi. Mai na bomoi oyo ekobanda kotondisa biso, mpe kotondaka na bolingo na Ye, tokoki kosopa mbilika ya molimo na biso mpe kokabola oyo ezali na kati elongo na basusu oyo bazali na mposa ya libiki, elikya, mpe ya biloko.Ntango masuwa na biso ya kati ekomi mpeto, babozalani na biso ya mabele ebandi kobika.

Libonza ya manaka na biso moko esengelami mpo na kosala esika mpo na miango ya sengo ya Nzambe. Mobikisi, oyo alobaka mpo na Tata, asengi biso ete “pusana penepene na ngai mpe Ngai nakopusana penepene na bino.”7 Kopusana penepene ya Nzambe ekoki kolinga koloba koyekola bosolo na Ye na nzela ya makomi, kolanda toli ya baprofeta, kolukaka koyeba Ye mobimba mingi.

Esosolaka biso ete Klisto azali na nguya ya komema biso kati na bondeko ya bolingo elongo na Tata mpe na moko mpe mosusu? Ye,na nguya ya Molimo Mosantu, akoki kopesa biso emoneli oyo tosengeli na yango kati na babozalani.

Moteyi moko ya Eteyelo ya Eyenga alobaki na ngai oyo etali likambo moko ya nguya esalamaki na kelasi na ye ya bana mibali ya mibu 11. Moko na bango nakobenga Jimmy azalaki moto akozalaka ye moko alinga lisolo te kati na kelasi. Eyenga moko, moteyi afulamaki mpo na kotia liteya na ye mpmbeni mpe alobaki mpo na nini alingaki Jimmy. Alobaki na ntina ya botondi na ye mpe bondimi na ye kati na elenge mobali oyo. Nsima moteyi atunaki bato ya kelasi baloba eloko moko basepelaka na yango etali ye. Wana bato ya kelasi, moko na moko, bazalaki na Jimmy mpo na nini azalaki kafukafu mpo na mbango, mwana mobali akitisaki moto na ye mpe mpizoli ebandaki kokita na elongi na ye. Moteyi mpe kelasi oyo balongolaki mosika kati na mayoki kati na Jimmy mpe basusu. Bolingo ya pete, soki elobami na bosembo, epesaka elikya mpe motuya epai ya basusu. Nabengaka oyo “kobongisa bobukani to libulu.”

Bomoi na biso na mokili moko ya bolingo ya yambo ya mbotama, ntango mosusu, ezali ntina ya mposa na biso mpo na bolingo ya solo, ya seko awa na mabele. Tosalami na bonzambe mpo na kopesa bolingo mpe kolingama, mpe bolingo ya mozindo eyaka ntango tozali moko elongo na Nzambe. Buku ya Mormon ebengisi biso “zongisani boyokani epai ya ye na bomikabi bwa Klisto.”8

Yisaya alobaki na ntina ya baoyo basaleka mobeko ya kokila mpe bongo bakomi mpo na bofuluki ya bango moko “babongisi ya bubukani.” Bazali bamoko oyo, Yisaya alaki, bako “mobambi ya bisika bipaswmi.”9 Na lolenge mosusu, Mobikisi abongisaki ntaka kati na biso mpe Tata ya Lola. Ye, na nzela ya libonza ya bomikabi, afungoli nzela mpo na kokabola bolingo monene ya Nzambe mpe na bolingo wana kobongisa “bisika bipaswami” na bomoi na biso moko. Kobikisa ntaka ya mayoki kati ya moko na moko ekosenga bolingo ya Tata, esangani na libonza ya kimoyimi ya bisomei mpe bizalela ya bobangi.

Na butu moko ya kobosana te, ndeko ya libota moko mpe ngai toyokanaki ten a ntina ya likambo moko ya politiki. Nokinoki mpe na malamu abwakisaki maloba na ngai, kozwaka ngai lokuta kati na ntanka ya matoyi ya baye libota. Namiyokaki ya liboma mpe ya kolanda nsango te—mpe ntango mosusu nazalaki bongo. Butu wana ntango nafukamaki mpo na kosambela, nokinoki nalimbolaki epai ya Tata ya Lola lolengi nini ndeko ya libota oyo azalaki matata! Nakobaki kosolola. Ntango mosusu napemaki na komilelalela na ngai, mpe Molimo Mosantu azalaki na litomba ya koyoka ngai—mpamba te na kokamwa, namiyokaki nsima koloba, “Olingi ntango mosusu ngai nalinga ye.”Nalinga ye? Nakobaki kosambela, kolobaka likambo moko lokola, “Boniboni ekoki ngai kolinga ye? Nakanisi kutu te ete nasepelaka na ye. Motema na ngai ezali makasi, mpe mayoki na ngai ezali kosala mpasi. Nakoki kosala yango.”

Nsima, solo na lisalisi ya Molimo, nazwaki likanisi ya sika ntango nalobaki, “Kasi olingaka ye, Tata ya Lola. Ekolinga yo kopesa ngai eteni moko ya bolingo na yo mpo na ye—bongo nakoka kolinga ye mpe?” Mayoki makasi na ngai elembaki, mpe nabandaki koyoka motuya mpe bolamu ya solo ya moto oyo. Yisaya akomi, “Nkolo akozipa mpasi ya libota na ye mpe akobikisa mpota isili bango kozwa.”10

Nsima ya ntango ntaka kati na biso ekangamaki na esengo—kasi ata kutu soki andimaki motema na ngai ebongwana te nayekolaki ete Tata ya Lola akopesa biso makoki tolinga kutu baye tokoki kokanisa basengeli kolingama te soki tosengi lisalisi na Ye. Bomikabi ya Mobikisi ezali nzela mpo na botioli ya ntango nyonso ya bolingani uta na Tata na biso na Lola. Tosengeli kopona koyamba mpe kofanda kati na bolingo oyo mpo na kozala na bolingani mpo na banso.

Ntango topesi motema na biso epai ya Tata mpe Mwana, tobongoli mokili na biso—ata soki makambo nzinga nzinga na biso ebongwami te. Topusani penepene epai ya Tata ya Lola mpe toyoki boboto ya boyambi na Ye ya babokasi na biso ya kozala bayekoli ya solo ya Klisto. Bososoli, elikya, mpe bondimi na biso ebuti.

Mormon na bokasi bonso ya motema mpo na bolingo oyo mpe ekopesama likolo na biso uta na liziba na yango—Tata ya Lola.11 Nde nsima ekoki biso kokoma babongisi ya ntaka kati na babozalani na mabele.

Bolingo ezanga nsuka ya Tata na biso ekomelaka biso, mpo na kozongisa biso kati na nkembo na mpe bosepeli na Ye. Apesaki Mwana Mobotami se Moko, Yesu Klisto, mpo na kobongisa ntaka oyo efungwami makasi kati na biso mpe Ye. Bosangani elongo na Tata na Lola ezali moboko ya bolingo ya seko mpe ntina ya seko. WTosengeli kosala mokangano elongo na Ye sikoyo mpo na koyekla maye mazali ntina, mpo na kolinga lokola Ye alingi biso mpe kokola mpo na kozala lokola Ye. Natatoli ete bozalani na biso ya bondimi elongo na Tata ya Lola mpe Mobikisi ezali motuya sekoseko epai na Bango mpe epai na biso. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.