2010–2019
Litatoli ya Nguya ya Nzambe: Buku ya Mormon
Sanza ya zomi 2017


2:3

Litatoli ya Nguya ya Nzambe: Buku ya Mormon

Buku ya Mormon ezali matatoli ya esangana ya bonzambe ya Yesu Klisto, libiangi ya boprofeta ya Joseph Smith, mpe bosolo ya likolo ya Eklezia oyo.

Buku ya Mormon ezali bobele libanga likonzi te ya eyamba na biso, kasi ekoki lisusu kokoma libanga likonzi ya matatoli na biso mpo ete soki mimekano to mituna eyanolama te ezali kobundisa biso, ekoki kosimba matatoli na biso kati na esika moko na kimia. Buku oyo ezali bozito moko likolo ya kilo ya bosolo oyo eleki bozito ya maloba ya batongi nyonso. Mpo na nini? Mpamba te soki ezali ya solo, nde Joseph Smith azalaki profeta mpe oyo ezali Eklezia ezongisama ya yesu Klisto, atako maloba kani ya kala to mosusu ya botelemeli. Mpo na ntina oyo, Batongi bazali na mokano ya koboya Buku ya Mormon, kasi mabaku bazali kokutana na yango ezali ya kolonga te mpamba te buku oyo ezali solo.

Yambo, batongi basengeli kolimbola lolenge nini Joseph Smith, mwana mobali mokati bilanga ya mibu 23 na bobokoli moke, akelaki buku moko ya bakombo mpe bisika na yango moko, lokola mpe masolo mpe makambo milai milai. Yango wana, batongi mingi bazali koloba ete azalaki mokeli moko ya mayelemingi oyo ayekamaki likolo ya babuku mingi mpe maziba mosusu ya esika mpo na kokela lisolo ya eyebana ya Buku ya Mormon. Kasi na bokeseni na oyo bazali koloba, ezali na nzeneneke moko te oyo alobi ete amonaki Joseph na oyo kani bakanisi kozala bamaziba liboso bobongoli ebanda.

Ata soki maloba oyo ezalaki solo, ezali ya kokoka te na mosika mpo na kolimbola bozali ya Buku ya Mormon. Moko asengeli lisusu koyanola motuna: Boniboni Joseph atangaki oyo bamaziba nyonso oyo bakanisaki, epupola oyo ezanga ntina, kobombaka makambo ya ntina semba lokola moto oyo azalaki na esika wana nan tango wana, mpe bongo akomisaki yango na nzela ya likundoli ebongi nie? Mpo ntango Joseph Smith abongolaki, azalaki na makomi moko tea ta moke. Solo, mwasi na ye Emma amikundolaki: “Azalaki na nkoma ya maboko to buku ya kotanga te . … Soki azalaka na eloko moko ya lolenge wana akoki kobombela ngai yango te.”1

Yango wana lolenge nini Joseph asala likamwisi kitoko oyo ya kokomisaka buku ya koleka– nkasa 500 kozangaka matangi? Mpo na kosala bongo, asengeli te bobele kozala mokeli moko ya mayele kasi lisusu kozala na moto ya kokanga foto biteni ya kokamwisa. Kasi oyo ezali bosolo, mpo na nini batongi na ye batalaki malamu te talanta kitoko oyo?

Kasi ezali na mingi. Maloba oyo ezali mpo na makambo ya kala ya buku. Makambo ya solo etikali naino: Lolenge nini Joseph asala buku oyo ezali kolekisa Molimo, mpe epayi wapi awzilaka malongi ya mozindo ya boye, mingi na yango ezali kolimbola to kotelemela baboyambi ya baklisto ya ntango na ye?

Mpo na ndakisa, Buku ya Mormon eteyaka, na bokeseni na baboyambi ya Bakliso mingi mpenza, ete Bokweyi ya Adama ezalaki litambe ya bokoli. Ezali kobimisa baboyokani oyo esalaki na libatisi oyo elobelami te na Biblia.

Na kobakisa, moko akoki kotuna: esika wapi Joseph azwilaki limoni ya nguya ete mpo na Bomikabi ya Klisto, Ye akoki te bobele kopetola biso kasi lisusu kobongisa biso nie? Esika wapi azwilaki esakola ya kokamwa oyo etali bondimi kati na Alma  32? to esakola ya Mokonzi Benyamina oyo etali bomikabi yay a mobikisi, ntango mosusu esakola ya kitoko mingi koleka oto etali mama ya likambo oyo kati na makomi nyonso? To lisese ya nzete ya olive elongo na mikakatano na yango nyonso mpe bofuluki ya malongi? Ntango natangaka lisese oyo, nazalaka na mposa kosala kalati na yango mpo na kolanda makambo na yango. Ezali biso sikawa kokanisa kondima ete Joseph Smith kaka akomisaki masakoli oyo na makanisi na ye na matangi moko te mpenza?

Na bokeseni na makanisi ya boye, nguya ya Nzambe ekoki komonana na miso na Buku ya Mormon mobimba, lokola elakisami na babosolo ya malongi na yango monene, mingimingi masakoli na yango ya bokeseni oyo etali Bomikabi ya Yesu Klisto.

Soki Joseph azalaki profeta te, nde mpo na kozala moyanoli mpo na basosoli oyo mpe ya malongi mosusu ya kitoko, basosoli basengeli baloba ete azalaki lisusu nganga ya mayeli eluti ya makambo ya Nzambethe. Kasi soki oyo ezali  bongo, tokoki kotuna: mpo na nini Joseph kaka moko kati ya mibu 1800 nsima ya mosala ya Klisto mpo na kobimisa molongo molayi ya boye malongi eluti mpe mpo na kolimbola malongi? Mpamba te ezalaki bobimisi, nguya ya bokeseni te, oyo ezalaki liziba ya buku oyo.

Kasi ata kutu soki tokanisi ete Joseph azalaki moto ya mayele eluti ya kokela mpe ya makambo ya Nzambe, na bongo ya kokanga foto—Batalanta oyo yango moko ezali kosala ye mokomi ya mayele te. Mpo na kolimbola bozali ya Buku ya Mormon, batongi basengeli lisusu koloba ete Joseph azalaki mokomi ya mayele ya kobotama na mibu 23. Soki bongo te, boniboni asangisaki ebele ya bankombo, bisika, mpe makambo na mobimba moko kitoko ezanga kokatana? Boniboni akomaki mayele ya bitumba moko moko, kokoma masakoli ya nguya, mpe kokela maloba oyo etiami langi kati na makomi, eyekolami na ntina ya kobosana te, etangami, mpe etiami na bikuke ya frigo na bamilio ya bato, maloba ndakisa, “Ntango ezali bino o mosala mwa bazalani ba bino bozali mpenza o mosala mwa Nzambe wa bino.” (Moziya 2:17) to “Adama akweyaki mpo bato bakoka kozala; mpe bato bazali, mpo ete bakoka kozala na bosepeli.” (2 Nefi 2:25). Oyo bansango oyo ezali na nguya—bansango oyo ezali na bomoi mpe kopema mpe kofula. Kopesa makanisi ete Joseph Smith na mibu 23 azalaki na mayele ya mosala esengeli mpo na kokoma mosala ya kafukafu oyo na mbala moko na pene ya mikolo ya misala 65 ezali mpemza na bokesen na bosolo ya bomoi.

Mokambi Russell M. Nelson, mokomi ayebi mosala mpe ya mayele, alobaki ete azalaki na babrouillon koleka 40 ya likita linene ya kala te. Esendgeli biso sikawa tondimba ete Joseph Smith, na yemei, akomisaki Buku ya Mormon mobimba na brouillon moko na mpenza bqbongwana galamele mikemike nsima?

Mwasi ya Joseph Emma alobaki bokoki kosalama te ya bokokisi moko ya boye: “Joseph Smith [lokola elenge mobali] akokaki kokoma te to kokomisa te mokanda ya polele mpe ya maloba malamu; mpe akokaki solo te kokomi [sa] buku lokola Buku ya Mormon.”2

Mpe na nsuka, ata kutu soki moko andimi maloba nyonso oyo elobami liboso, ya ntembe lokola ekoki kozali, batongi bazali kokutana kaka na libaku monene mosussu. Joseph alobaki ete Buku ya Mormon ekomamaki likolo ya bapalaki ya wolo. Liloba yango ekobaki kotongama na ntango na ye—mpo “moto nyonso” ayebaki ete masolo ya kala ekomamaki likolo ya papyrus to parchment, kino mibu mingi nsima, ntango bapalaki ya bibende na makomi ya kalaemonanaki. Na bobakisi, batongi balobaki ete bosaleli ya sima, lokola elimbolami na Buku ya Mormon, eyebanaki te na mayele ya tekiniki ya Amerika ya ebandeli—kino bandako ya sima ezwamaki na Amerika ya kala. Boniboni batongi sikawa balobela yango mpe mamoni ya ntembe ya ndenge moko? Joseph, solo, asengeli lisusu kozala moto akanisaka ya litomba mpenza. Koyebaka te mpo na nini, atako azalaki na litomba moke ya kozala solo, kotelemelaka boyebi ya boyekoli mpe ya universite ya ntango wana, akanisaki malamu ntango basusu banso bakweyaki.

Nsima kotala manso oyo, moko akoki kotuna boniboni moto moko akokaki kondima ete makambo mpe makasi manso oyo elobami, lokola elobami na batongi, na litomba esangisami na lolenge moko oyo epesaki makoki na Joseph akoma Buku ya Mormon mpe na bongo kobota mosala ya satana mpe ya moyibi. Kasi boniboni oyo ezali ya solo? Na botelemeli ya sembe na maloba moko ya boye, mokanda oyo efuli bamilio mpo na kobwakisa Satana mpe kozala na babomoi ya Boklisto.

Atako moto moko asengeli kopona kondimela bandimbola ya batongi, mpo na ngai, kosalaka bongo ekosuka na bokoli ya mayele to molimo te. Kondimela makambo oyo, nakosengela kondima milongo ya basoki endimama te. Na bobakisi, nakosengela kobwakisa litatoli ya 11 banzenekene zomi na moko,3, kutu atako moko na moko atikalaki fidele na litatoli na ye kino na nsuka ya bomoi na bango; Nakosengela kobwakisa malongi ya bonzambe oyo etondisi nkasa ya buku ya bule na babosolo ya bonzambe; nakosengela koyeba te solo oyo bibele, sangisa ngai moko, nakomi mingi penepene na Nzambe na kotangaka buku oyo koleka buku nyonso mosusu; mpe likolo ya nyonso, Nakosengela koyangana mingongo ya nse endimisaka ya Molimo Mosantu. Oyo ekozala bokeseni ya makambo nyonso nayebi kozala solo.

Moko ya baninga na ngai ya malamu mpe mayele atikaki mpo na ngonga moko. Akomelaki ngai kala te na ntina bozongi na ye: “Na ebandeli, nalingaki Buku ya elimbolama na ngai historiquement, géographiquement, linguistiquement, mpe culturellement. Kasi ntango nabongolaki etaleli na ngai epai ya maye eteyi na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe etinda na Ye ya kobikisa, nabandaki kozwa litatoli ya bosolo na yango. Mokolo moko wana ezalaki ngai kotanga Buku ya Mormon na lisuku na ngai, natelamaki, nafukamaki mpe napesaki losambo ya bosembo mpe nayokaki na polele ete Tata ya Lola alobaki na mongongo ya nse na molimo na ngai ete Eklezia mpe Buku ya Mormon ezalaki mpenza ya solo. Eleko na ngai ya mibu misatu na ndambu ya boluki lisusu bosolo ya Eklezia ezongisaki ngai mobimba mpe na bondimi epai ya bosolo na yango.”

Soki moko akozwa ngonga ya kotanga mpe komaniola na komikitisa buku ya Mormon, lokola esalaki moninga na ngai,mpe koyoka bambuma na yango ya elengi ya Molimo, nde akozwa na nsuka litatoli oyokelaki mposa.

Buku ya Mormon ezali moko ya makabo ya motuya mpo epai na biso.Ezali mompanga mpe nguba nyonso mibale—etindaka liloba ya Nzambe kati na bitumba mpo na kobundela mitema ya bayengebeni mpe esalaka lokola mobateli aluti ya bosolo. Lokola Basantu, tozali bobele litomba te ya kobatela Buku ya Mormon kasi lisusu libaku ya kosalela yango mpenza—ya koteya na nguya ya malongi na yango ya bonzambe mpe ya kotatola na ntina ya litatoli eluti ya Yesu Klisto Ye.

Napesi litatoli na ngai ya lokumu ete Buku ya Mormon ebongolamaki na likabo mpe nguya ya Nzambe. Ezali litatoli ya nguya ya Nzambe ya bonzambe ya Yesu Klisto, libiangi ya bobikuli ya Joseph Smith, mpe bosolo eluti ya Eklezia oyo. Nalikii ete ekokoma libanga likonzi ya matatoli na biso, yango wana ekoki kolobama na ntina na biso, lokola ezalaki na Balamani babongwani, “bakweyaki mosika mokolo moko te.” (Alma 23:6). Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.

Matangi

  1. Emma Smith, na “Last Testimony of Sister Emma,” Saints’ Herald (Sanza ya Zomi na Moko.  1, 1879), 289–290.

  2. Emma Smith, in “Last Testimony of Sister Emma,” 290.

  3. Tala “Litatoli ya Banzeneneke Misato” mpe “Litatoli ya Banzeneneke Mwambe,” Buku ya Mormon.