Botalela Nkolo
Tokoki te kolinga nyonso oyo ekomelaka biso, kasi tozali na bolingi likolo ya boniboni toyanolaka na mbongwana na bomoi na biso.
Na eleko ya mwa molunge ya 1998, Carole mpe ngai tokokaki kosangisa mobembo ya nkita na bopemi ya libota mpe komema bana na biso minei, elongo na bokilo na ngai akufelaki mobali kala te, na Hawai mpo na mwa mikolo.
Butu liboso ya kozwa mpempo mpo na Hawai, mwana na biso ya mobali ya sanza minei, Jonathon, azwamaki na maladi mibale ya litoyi, mpe bayebisaki biso ete akokoka kosala mobembo te mpo na ata mikolo misato to minei. Mokano ezwamaki mpo Carole atikala na ndako elongo na Jonathon, nasengelaki boye kosala mobembo elongo na libota etikali.
Ya liboso elakisaki ngai ete oyo ezalaki te mobembo nakanisaka, eyaki noki nsima ya kokoma. Kotambolaka na nzela moko ya banzete ya mbila ya kolanda na nse ya sanza, na miso na ngai na mbu liboso na biso, nabalukaki mpo na kopesa likanisa etali kitoko ya esanga, mpe na ngonga wana lokola ndoto, esika ya komona Carol, namimonaki kotalaka na kati ya miso ya bokilo na ngai—oyo, nakoki kobakisa, nalingaka mpenza. Ezali kaka te nini nabanzaka liboso. Carol azelaka te lokola kolekisa bopemi na ye na ndako ye moko elongo na mwa mwana na biso ya mobali.
Ekozala bangonga na bomoi na biso ntango na nzela moko tokanisaki te, kokutanaka na makambo ya matata mingi koleka kokata bopemi. Boniboni toyanolaka ntango makambo, mbala mingi na bolingi na biso te, ebongolaka bomoi tobongisaka to tolikiaka?
Na sanza ya motoba 6, 1944, Hyrum Shumway, elenge lieutenant ya mibale na Mampinga ya Etazini , akendeki na Omaha Beach lokola eteni ya mokolo ya ebandeli ya etumba. Akokaki kokoma na likama te na kokita na mabele, kasi na sanza ya nsambo 27, lokola eteni ya bokei liboso ya Ballié, azokaki makasi na kopanzana ya mine anti-tank. Na mbala moko, bomoi mpe mosala na ye ya nsima ya kimonganga ezwaka mbano ya mabe mpenza. Nsima ya mapasi mingi, oyo esalisaki ye abonga na bampota oyo ya minene, Ndeko mobali Shumway amonaka lisusu te. Boniboni akoki koyanola yango?
Nsima ya mibu misatu na lopitalo ya koyekola koningana, azongaki na ndako na Lovell, Wyoming. Ayebaki ete ndoto na ye ya kokoma dokotolo ya mungana ekokisamaki te; kasi azalaki na mokano ya kokende liboso, kobala mpe kosunga libota.
Na nsuka azwaki mosala na Baltimore, Maryland, lokola mosungi ya koyekola koningana mpe moteyi ya basali bakufa miso. Na nzela na ye ya koyekola koningana ayekolaki ete bakufi miso bakoki kosala mingi mpenza koleka ye asalaka, mpe na mibu na ye mwambe na mosala wana, atiaki bato bakufa miso na mosala mingi koleka mosungi mosusu na ekolo.
Sikawa na elikia na bokoki na ye mpo na kosunga libota, Hyrum apesaki likanisi na molingami na ye na kolobaka na ye, “Soki okotanga bamail, kopona basoseti, mpe kokumba motuka, nakoki kosala oyo etikali.” Bakangisamaki noki na Salt Lake Temple mpe na nsuka bapambolamaki na bana mwambe.
Na 1954 BaShumways bazongaki na Wyoming, wapi Brother Shumway asalaki mibu 32 lokola Moyangeli ya Boyekoli mpo na Bakufa Matoi mpe miso. Na ntango wana, asalaki mibu nsambo lokola episikopo ya Palwasi ya Liboso ya Cheyenne mpe, nsima lokola, mopamboli mibu 17. Nsima ya bopemi na ye, Ndeko mobali mpe ndeko mwasi basalaki lisusu lokola balongani bakosala na Misio ya Londre ya Sudi na Angleterre.
Hyrum Shumway akufaki na sanza ya misato 2011, kotikaka nsima lisango ya bondimi mpe elikia na Nkolo, ata na kati ya mimekano, na libota moko monene ya bana na ye, bankoko, mpe bankokololo.1
Bomoi ya Hyrum Shumway ekokaki kobongolama na etumba, kasi atiaki tembe ata moke te na bozali ya bonzambe mpe makoki ya seko na ye. Lokola ye, tozali bana ya mibali mpe bana ya basi ya molimo ya Nzambe, mpe “tondimaki mwango na Ye na yango [biso] tokoki kozwa nzoto ya mosumi mpe kolonga mayele ya mabele mpe na nsuka kokokisa [ya biso] lobi ekoya ya bonzambe lokola basangoli ya bomoi ya seko.”2 Motango te ya mbongwana, momekano, to bokeseni ekoki kobongola nzela wana ya seko—bobele maponi na biso, ntango tosaleli boponi na biso.
Mbongwana, mpe mikakatano ya mbano na yango, oyo tokutanaka na yango na bokufi eyaka na ndenge ebele mpe bonene mpe esimbaka moko na moko na biso na lolenge se moko. Lokola bino, namonaka baninga mpe libota liboso ya mikakatano ewuti na:
-
Liwa ya molingami moko
-
Bololo ya koboma libala
-
Ntango mosusu kozaka kozala na libaku ya kobala
-
Maladi ya Makasi to mpota
-
Mpe nkutu ata makama, lokola tomoni kala te na mokili mobimba.
Mpe molongo esili te. Atako “mbongwana” nyonso ekoki kozala se moko na bisaleli na biso, ezali na likambo moko ekokani na momesano na mbano na yango to mokakatano—elikia mpe kimia ezali ntango nyonso wana na nzela ya bomikabi ya Yesu Klisto. Bomikabi ya Yesu Klisto epesaka bosemboli ya nsuka mpe meko ya kobikisa na nzoto ezoki, mpe molimo ebebi, mpe motema ebukani.
Ye ayebi, na lolenge moko oyo moko te mosusu akoki kososola, nini ezali oyo tozali na mposa, moko na moko, mpo na kokende liboso na kati ya mbongwana. Na bokeseni na baninga mpe balingami, Mobikisi asangani na mawa na biso kaka te, kasi akoki koyoka mpenza mawa, mpamba te Ye azalaki wapi tozali. Na kobakisa na kofuta lifuta mpe koyoka mpasi mpo na masumu na biso, Yesu Klisto atambolaki lisusu na nzela nyonso, akutanaki na mokakatano myonso, azwaki mpasi nyonso—ya nzoto, ya liyoki to ya molimo—oyo tokutana na yango na bokufi.
Mokambi Boyd K. Packer ateyaki: “mawa mpe ngolu ya Yesu Klisto esuki te na baye basalaki masumu … , kasi esangisi elaka ya kimia ya libela mpo na banso oyo bayambi mpe balandi Ye. … Mawa na Ye azali mobikisi ya nguya, ata moto azoki na elindo te.”3
Na makambo ya bokufi oyo, tokoki te kolinga nyonso oyo ekomelaka biso, kasi tozali na bolingi likolo ya boniboni toyanolaka na mbongwana na bomoi na biso. Yango elakisi te ete mikakatano mpe mimekano tokutanaka na yango ezali te mbano te mpe ekoki na pete kosimbama mpe kosalama. Kasi elingi kolakaisa ete tokozwa bonsomi na mpasi mpe motema mpasi. Elingi mpenza koloba ete ezali na ntina mpo na elikya mpe yango na ntina ya Bomikabi ya Yesu Klisto, tokoki kokende liboso mpe kozwa mikolo ya esengo koleka—kutu mikolo etonda ya esengo, pole, mpe bosopeli.
Na Mosiah totangi nsango ya, nganganzambe ya kala mokonzi Noah, mpe bato na ye, oyo, “bango bakebisamaki na Nkolo … [,] bakendaki na kati ya esobe liboso ya mampinga ya mokonzi Noah.” Nsima ya mikolo mwambe, “bakomaki na … mboka moko ya kitoko mpe ya elengi” wapi “batiaki bima na bango, mpe babandaki kokona mabele, mpe babandaki kotonga bandako.”4
Ezaleli na bango emonani ya elaka. Bayambaki nsango malamu ya Yesu Klisto. Babatisamaki lokola boyokani ete bakosaleka Nkolo mpe bakobatela mitindo na Ye. Mpe “bango babotanaki mpe bazwaki bomengo na mboka.”5
Nzokande, ezaleli na bango ekobongwana noki te.. “lipinga moko ya baLamanite ezalaki na suka ya mboka.”6 Alma mpe bato na ye nokinoki bakotiama na bowumbu.” Minyoko na bango ezalaki makasi yango wana babandaki kolela na Nzambe ya boaksi nyonso.” Nakobakisa, bakambamaki kutu na bakangi na bango mpo na kotika kosambela, soki te, “Moto nyonso oyo akozwama kobengaka Nzambe akozwa liwa.”7 Alma mpe bato na ye basalaka eloko te mpo na kokoma na ezaleli na bango ya sika. Bakoyanola na bango boniboni?
Esika ya kosambisa Nzambe, babalukaki na Ye mpe “basopaki mitema na bango na ye.” Na koyanola na bondimi mpe nsambo na bango ya nse, Nkolo ayanolaki: “Sala na esengo. … Nakolembisa bozito oyo batie likolo na mapeka na bino, ete kutu bokoki te koyoka yango likolo ya mikongo na bino.” Nokinoki nsima, “Nkolo alendisaki bango ete bakokaki komema bozito na bango na pete, mpe bamitikaki na esengo mpe na bompikiliki na bolingi ya Nkolo.”8Atako naino basikolamaki te na bowumbu, na kobalukaka na Nkolo, mpe te mosika ya Nkolo, bapambolamaki engebene na bamposa na bango mpe engebene na bwania ya Nkolo.
Mpaka Dallin H. Oaks ateyaki: “Mapamboli ya libiki eyaka na ndenge mingi, moko na moko ekokani na mposa ya bomoto na biso, lokola eyebami na Ye oyo alingaka biso mingi koleka. Ntango mosusu ‘libiki’ esalisaka maladi na biso to etombolaka bozito na biso. Kasi ntango mosusu ‘tobikisami na kopesamaka bokasi to bososoli mpo na komeme bozito etiama likolo na biso.”9
Na nsuka, “monene boye ezalaki bondimi na bango mpe bompikili” that na bango,” Alma mpe bato na ye babikisamaki na Nkolo, lokola toko, “mpe bapesaki matondi,” “mpo bazalaki na bowumbu, mpe moko te akokaki kobikasa bango longola se ezalaki Nkolo Nzambe na bango.”10
Liseki ya mawa ezali ete, mbala mingi mpenza, baye na bamposa babalukaka mosika na liziba moko ebonga mpenza ya lisalisi—Mobikisi na biso, Yesu Klisto. Nsango moko emesana ya makomi ya nioka ya motako eteyi biso ete tozali na boponi ntango tokutani na mikakatano. Esilaki bana ya Yisalaele koswama na “banioka ya moto oyo epumbwaka,”11 “elembo etombolamaki … ete oyo nyonso akotala … akozala na bomoi. [Kasi ezalaki liponi.] Mpe mingi batalaki mpe bazwaki bomoi.
Kasi ezalaki na mingi oyo bakangaki motema mpenza ete balingaki te kotala, yango wana bawaki.”12
Lokola Yisalaele ya kala, tolendisami lisusu kotala na Mobikisi mpe kozala na bomoi—mpe nkanga na Ye ezali pete mpe bozito na Ye ntango mosusu pepele.
Alma Elenge ateyaki bosolo oyo ya bule ntango alobaki, “Nayebi mpenza ete baoyo nyonso bakotia elikia na bango na Nzambe bakosungama na mimekano na bango, mpe mobulu na bango, mpe mitungisi na bango, mpe bakotombolama na mokolo ya nsuka.”13
Na mikolo oyo ya nsuka, Nkolo apesi biso makoki mingi, ya biso “banioka ya motako,” nyonso ya yango esengeli mpo na kosalisa biso totala na Klisto mpe totia elikia na biso na Ye. Kozala na mikakatano ya bomoi ezali te koyeba te bosolo kasi kutu wapi boponi kokangama mpe likonzi likolo na yango toponi kotonga.
Makoki maye ezali, kasi esili te na:
-
Koyekola makomi mpe mateya ya baprofeta ya bomoi mbala na mbala
-
Kosambela mingi, na solo mpe kokila bilei
-
Koliaka na bolongobani elambo
-
Kokendeke mbala na mbala na tempele
-
Mapamboli ya Bonganganzambe
-
Kozwa toli na nzela ya bato bayekola, mpe kutu—
-
Nkisi, ntango etindami na alima mpe esalelami lokola endimami
Mbongwana nyonso na makambo ya mokili ekoki koya na nzela na biso, mpe nzela nyonso tozili te tokoki koleka, boniboni toyanolaka ezali boponi. Kobaluka na Mobikisi mpe kokanga loboko na Ye etandolami ezali ntango nyonso boponi na biso eleki malamu.
Mpaka Richard G. Scott ateyaki bosolo oyo ya seko: “Esengo ya solo mpe ewumelaka na lisanga ya bokasi, mpiko mpe bokoki mpo na kolonga bakpokoso ya mikakatano mingi koleka ewutaka na bomoi etii Yesu Klisto na katikati. … Ezali na elaka te ya mbano ya lombango, kasi ezali na elikia mobimba ete, na ngonga ya Nkolo, biyano bikoya, kimia ekolonga, mpe bozangi ekotondisama.”14
Na bosolo oyo na kaboli litatoli na ngai. Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.