Nkolo, Sala Ete Miso Nangai Efungwama
Tosengeli kotala basusu lolenge ya Mobikisi.
Mokonzi Tambwe azali dessin animé ya esobe ya Afrika. Ntango mokonzi tambwe akufaki na ntango azalaki kobikisa mwana na ye ya mobali (Simba), elenge tambwe nkumu bakimisaki ye na mabele ya ekimelo wana mokambi ya mabe azali kobebisa bitikali ya esobe. Nsimba nkumu ntambwe asengaki bokonzi na nzela ya lisalisi ya molobeli moko. Miso na ye ezali ya kofungwama na bonsenga ya bobebisi na zolongano ya monene ya bomoi na esobe. Kosengaka esika na ye ya malamu lokola mokonzi, elenge ntambwe alandaki litela kotala “mosika koleka oyo azali komona.”1
Lokola tozali koyekola kokoma mosangeli ya nyonso ya Tata na biso azali na yango, nsango malamu elobeli biso totala koleka oyo tozali komona. Kotala koleka oyo tozali komona, tosengeli kotala basusu lolenge ya Mobikisi. Moniama ya nsango malamu ezali etondi na bato ebele na makambo na bango nyonso. Tokoki te kososola na mobimba maponi mpe pisikoloji ya kala ya bato na mokili na biso, mangomba ya Eklezia, mpe kutu na mabota na biso mpe ete tozali na bososoli ya makambo nyonso. Tosengeli kotala koleka makanisi mpe bomoni ya boyebi na biso.
Miso na ngai ezalaki ya kofungwama mpo na “komona koleka oyo nakokaki komona” ntango nazalaki kosunga lokola mokambi ya mission. Elenge missionele ayaki na bobangi na kati ya miso na ye. Ntango tokutanaki na bosololi, alobaki na botiki, “nalingi nazonga ndako.” Nakanisaki ngai moko, “Malamu, tokoki kobongisa yango.” Nateyaki lisusu asala makasi mpe kosambela na ntina na yango mpo na poso moko nsima, mwa miniti eleki, abengi. Alingi kaka azonga ndako. Nateyaki lisusu kosambela, kosala makasi, mpe abenga ngai na poso. Na bosololi na biso oyo elandaki, makambo ebongwanaki te. Akangamaki azonga ndako.
Nalingaki yango esalema te. Nabandaki koteya ye na ntina ya lolenge ya bule ya libiangi na ye. Nalendisaki [ye] “amibosana mpe akende na mosala.”2 Kasi nyonso oyo nasalaki ezalaki mpamba, likanisi na ye ebongwanaki te. Na nsuka amonisaki ngai lokola nazalki na likanisi ten a nyonso wana. Mbala moko natunaki ye motuna: “Mpaka, nini yango ezali mpasi mpo na yo?” Oyo alobaki etutaki motema na ngai: “Mokambi, nakoki kotanga te.”
Liteya ya bwanya oyo nateyaki ye ezalaki ntina mingi koleka mpo na ye ayoka ezalaki ntina na mposa na ye te. Oyo azalaki na yango mposa ya koyoka ezalaki mpo na ngai kotala koleka bokasi ya bwanya na ngai mpe kopesa ndingisa na Molimo esunga ngai nasosola oyo ezalaki mpenza na makanisi ya mpaka. Alingaki ngai namona ye malamu koleka mpe na pesa ye ntina ya kolikia. Na esika na yango, nasalaki lokola bale ya monene ya bobebisi. Afungolaki miso na ngai maloba ya Nkolo: “Mpo moto atalaka oyo esepelisaka miso, kasi Nkolo atalaka na motema” (1 Samuele 16:7).
Lipamboli kani oyo ntango Molimo ya Nkolo ekomisi emoneli na biso monene. Mikundola profeta Elisa oyo alamukaki amoni mampinga ya Sulia ezingi engumba na ye na bampunda na bango mpe bamakalo? Mosali na ye azalaki kobanga mpe atunaki Eliza bakosala nini na likama ya boye. Elisa ayebisaki ye amitungisa ten a maloba ya mawa: “Kobanga te: baoyo bazali elongo na biso baleki baoyo bazali elongo na bango” (2 Mikonzi 6:16). Mosali azalaki na likanisi te ete profeta azalaki kolobela na ntina ya. Akokaki te kotala koleka oyo akokaki komona te. Na yango Elisa amonaki lipinga ya banjelu bamilengelaki mpo na kobunda mpo na bato ya profeta. Na yango, Elisa asambelaki epai ya Nkolo afungola miso ya elenge mobali, “mpe amonaki: mpe, tala, ngomba etondaki na bampunda mpe makalo ya moto nzingazinga ya Elisa” (2 Mikonzi 6:17).
Mbala mingi tokabwanaka na basusu na bokeseni oyo tomonaka. Toyokaka malamu koleka nzinga nzinga ya baoyo bakanisaka, balobaka, balataka, mpe basalaka lokola biso mpe bozangi bosepeli na baoyo bautaka na mabaku ya bokeseni to masolo ya bomoi. Na bosolo, ewuti biso bikolo ya kokesena te mpe tolobaka nkota ya kokesena? Biso nyonso tomonaka mokili na bandelo minene ya boyebi na bomoi na biso te? Mpo basusu balobaka mpe bamonaka na misu ya molimo, lokola profeta Elisa, mpe basusu bamonaka mpe balobaka na bomoni ya pete lokola namonaki yango na missionele na ngai ya mpasi.
Tozali na mokili oyo bato basepelaka na kosalaka bokanisi, kokoselaka makambo, mpe matongi, bomoni mbeba. Na esika ya kotalaka na nzela ya media social, tosengeli kotala kati ya bizalela ya bonzambe na oyo biso nyonso tosengaka. Mabongi ya bonzambe oyo mpe bamposa ekoki te kotiama na Pinterest to na Instagram.
Mpo na kondima mpe kolinga basusu elakisi te tosengeli kondima makanisi na bango. Solo, bosolo esengaka botosi na biso makasi, kasi esengeli te kozala likama na bosembo. Kolinga basusu na bosolo esengaka kokoba kondima makoki malamu ya bato oyo mayebi ya bomoi mpe bandelo oyo biso toyebi mpenza te. Kotalaka koleka oyo tokoki komona esengaka kansasa eyekama na Mobikisi.
Na Sanza ya mitano 28, 2016, Beau RicheY ya mibu 16 mpe moning na ye Austin bazalaki na libota ya ranch na Colorado. Beau mpe Austin bamataki na mituka na bango mpo bakoma yambo ya masano na bango ebanda. Bakomaki mosika ten tango bakutanaki na makama, nan tango likama esalemaki. Motuka ya Beau ezalaki kotambola ezodenda na mbalakaka, efini Beau na nse ya bozito 180 kg ya mabende. Ntango moninga ya Beau Austin akomaki wana, amonaki Beau kobundaka na bomoi. Na mwa bokasi na ye, amekaki kolongola mutuka likolo ya moninga na ye. Yango ezalaki koningana te. Asambelaki mpo na Beau mpe nsima akendaki mpo na lisungi. Bato ya lisungi nsima bayaki, kasi mwa ntango moke Beau akufaki. Abikisamaki na likama wama ya liwa.
Baboti na ye oyo mitema epasukaki bayaki. Ntango batelemaki na mwa lopitalo moke na moninga, mpe libota, bandimi polisi bakotaki na kisuku mpe bamemaki telephone ya Beau epai ya mama na ye. Ntango azwaki telephone, mongongo monene eyokanaki. Afungolaki telephone mpe amonaki alarme ya Beau ya mikolo nyonso. Atangaki nsango na mongongo makasi nsango ya bolingo ya bosakani, oyo mwana na ye ya mibu na nse ya ntuku mibale azalaki kotanga mikolo nyonso. Elobaki, “Kanisa kotia Yesu Klisto kati kati ya bomoi na yo lelo.”
Boyekami ya Beau na Mosikoli ekitisi mawa ya bazalani na ye na bozangi ye. Nzokande, yango epesaki elikia koleka mpe ntina na bomoi ya Beau mpe maponi ya bomoi. Epesi ndingisa na libota mpe baninga batala likolo kaka bobele mpasi ya liwa na ye na mabaku ya esengo ya bomoi oyo ekoya. Mawa nini mpo na libota ya Beau ya komona na misu ya mwana na bango ya mobali oyo azalaki kosepela na yango.
Lokola bandimi ya Eklezia, topesamaki makebisi ya molimo oyo ezali kokebisa bison tango tozali komona kaka na misu ya nkufa mosika ya lobiko. Elambo ezali bokundoli na biso ya poso mpo na kokoba koyekamela Yesu Klisto oyo tosengeli ntango nyonso komikundola Ye mpe ete tokoka ntango nyonso komikundola Ye mpe ete tozala ntango nyonso na Molimo na Ye (tala D&A 20:77). Na yango ntango mosusu toyebaka mayoki oyo te ya bokundoli mpe likebisi. Ntango tozali na Yesu Klisto na kati kati ya bomoi na biso, akosala ete misu na biso ekoka kofungwama na mobimba koleka lolenge tokoki kokamwa.
Nazwaki mokanda oyo ya ntina koleka na ntina ya bokesi ya bobateli oyo nayebaki na ndeko mwasi moko ya bondimi. Ayebisaki ngai ete na bokasi mpo na kosunga mobali na ye asosola lolenge nini azalaki koyoka, azalaki kokoba kobomba mokanda na apareye mpo na makambo oyo azalaki kosala to azalaki koloba oyo ezalaki kopesa ye nkanda. Akanisaki ete ntango ekoya akokaki kosangisa makambo oyo akomaki akabola yango elongo na ye oyo ekokaki mpenza kopesa ye mbongwana ndenge na ye. Na yango, Lomingo moko na ntango ya elambo mpe ayekamaki na Bomikabi ya Mobikisi, amonaki ete kokanisaka mabe ya mobali na ye ezalaki mpenza kolongola ye Molimo mpe yango ekokaki kobongola ye te.
Bokebisi ya molimo ebetaki kati ya motema na ye kolabaka: “Tika makambu wana; bosana yango nyonso. Longola makomi wana. Ezali na ntina te.” Na nsima akomaki, likanisi moko: “Ezwaki ngai mwa ntango mpo na kofina ‘kosangisa nyonso’ mpe ntango molai mpo na kofina ‘kolongola.’ Kasi ntango nasalaki yango, mayoki nyonso ya mabe nazalaki nayango ebungaki na mopepe. Motema na ngai etondisamaki na bolingobolingo—bolingo mpo na mobali na ngai mpe bolingo mpo na Nkolo.” Lokola Saulu na nzela ya Damas, azalaki na limoni na ye ebongwana ki. Bampese ebimaki uta na misu na ye.
Ya biso Mobikisi mbala mingi afungolaki misu ya bakufi misu na bomoto mpe molimo. Kofungolaka misu na biso bosolo ya bonzambe na pete mpe bosolo, elengelaka biso tobikisama na makambo ya nkufa. Ntango tosali keba na “bokebisi” ya molimo oyo ezali kokebisa bosenga mpo na kobongola bizalela na biso ya makanisi to bomoni mobimba ya seko, tozali kozwa elaka ya elambo ya kozala na Molimo na Ye elongo na biso. Yango ekomelaki Joseph Smith mpe Oliver Cowdery na Tempelo ya Kirtland ntango babosolo ya ntina ezalaki koteyama na Yesu Klisto oyo alakaki ete “elamba” ya bandelo ya nkufa esengelamaki “kozwama uta na makanisi na [bango], misu na [bango] kososolaka [ekoka] kofungwama” (D&A 110:1).
Natatoli ete na nzela ya nguya ya Yesu Klisto, tokomi na makoki ya komona koleka oyo tozali komona na pete. Ntango tozali komikundola Ye mpe tozali na Molimo na Ye” elongo na biso, miso na biso ya bososoli ekofungwama. Nsima bosolo ya monene ya biso ekozala na nguya makasi na kati ya mitema na biso. Na nkombo ya Yesu klisto, amene.