Pelisa Mwinda na Yo
Baprofeta bazali kobenga biso, bandeko na ngai basi. Ekoki bino kozala sembo? Ekoki bino koloba malamu bondimi na bino? Ekoki bino kopelisa mwinda na bino?
Ntango mosusu boyebi yango te, kasi Mokambi Monson mpe ngai tozali mapasa. Na mokolo mpenza nabotamaki na California ya Nodi, Thomas Monson ya mibu 36 asungamaki lokola Apostolo ya sika mpenza. Nalingaka mokangano na ngai moko ya kafukafu na profeta ya Nzambe, Mokambi Monson.
Baprofeta bazali koloba na ntina ya basi.1 Bokoyoka mosusu ya maloba na bango na liyangani oyo. Mpo na nkoma na ngai nazali kozonga nsima mibu pene ya 40 na lisakoli kitoko ekomama na Mokambi Spencer W. Kimball. Sanza ya Libwa 1979 ezalaki bobele mbala ya mibale basi ya Ekleza ya mokili mobimba bakutanaka na liyangani linene ya bango moko. Mokambi Kimball alengelaka lisikulu na ye, kasi ntango mokolo ya likita ekomaki, azalaki na lopitalo. Yango wana na esika na ye, asengaki mwasi na ye, Camilla Eyring Kimball, mpo na kotanga makebisi na ye na nkombo na na ye.2
Ndeko mwasi Kimball atangaki maloba ya profeta, oyo ebetaki nsete mingi na nguya ya basi ya LDS likolo ya basi ya malamu liboso ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Penepene ya nsuka, ezalaki na liyoki moko makasi epai ya bsi oyo tozalaki kobetela lisolo uta kala.
Tika nazongela mwa maye Mokambi Kimball alobaki:
“Na nsuka, bandeko basi babolingo, tika napesa bino makanisi ya likambo moko oyo elobelami te liboso to pene na lolenge oyo. Mingi ya bokoli monene oyo ezali koyela Eklezia na mikolo ya nsuka ekya mpampa te mingi ya basi malamu ya mokili … bakobendama na Eklezia na mitango minene. Oyo ekosalama na ndelo ete basi ya Eklezia oyo balakisaka bosembo mpe bolobi malamu na bomoi na bango mpe kino na esika ete basi ya Eklezia bazali komonana polele mpe ya kokesana—na ndenge ya malamu—uta basi ya mokili.
“Katikati ya bilombe ya basi ya solo na mokili oyo bakoya na Eklezia ezali basi oyo bazali kotala kozala bosembo koleka kozala moyimi. Bilombe basi oyo bazali na bomikitisi ya solo, oyo etiaka motuya ya likolo koleka likolo ya bosembo koleka likolo ya bomoni. …
“… Ekozala … ndakisa ya kimwasi ya Eklezia [oyo] ekozala bokasi ya ntinakati na nyonso mibale bokoli ya motango mpe molimo ya Eklezia na mikolo ya nsuka.”3
Liloba nini ya esakola oyo. Kaka na mokuse:
-
Ekozala babozalani malamu ya basi oyo ekosala mingi ya bokoli makasi oyo ezali koya na Eklezia na mibu ezali koya.
-
Bondeko oyo Lingomba ya Bamama Basungi, Bilenge Basi, mpe bana basi ya Eteyelo ya Bana etongaka elongo na bamama mpe bana basi ya bosembo, ya bondimi, ya bonzambe ya biyamba mpe bondimi mosusu ekozala makasi moko ya ntina kati na lolelenge nini Eklezia ezali kokola na mikolo ya nsuka.
-
Mokambi Kimball abiangaki basi oyo uta na “bilombe” baboyebi mosusu oyo bakotala mingi kozala boyengeosembobeni koleka mkimoyimi, oyo bakolakisa biso ete bosembo ezali na motuya mingi koleka bomilakisi.
Nakutani na basi malamu mpenza oyo mingi wana ezali ngai kosala mosala na ngai na mokili mobimba. Bondeko na bango ezali motuya epai na ngai. Boyebi bango mpe kati na baninga na mpe bazalani na bino. Bakoki kozala to bakoki kozala bandimi ya Eklezia te kaka sikoyo, kasi tozali kokangana na bondeko oyo ezali ntina mpenza. Boniboni tosalaka eteni na biso? Tosengeli kosala nini? Mokambi Kimball alobeli makambo mitano:
Ya yambo ezali kozala sembo . Kozala sembo elingi koloba te kozala kobonga nie to kosalaka mabungi mokolo moko te. Elingi koloba kokolisa bozalani makasi na Nzambe, koyambolaka masumu mpe mabungi na biso, mpe kosalisaka basusu na lifuti te.
Basi oyo bayamboli babongwanisaka lisitoile. Nazali na baninga oyo azwaki likama ya muka ntango azalaki elenge mpe akomaki ya kokakema na mpasi ya nkisi. Nsima, baboti na ye bakabwanaki. Azwaki zemi uta na bozalani moko ya mokuse, mpe babokakemi na ye ekobaki. Kasi buto moko, atalaki na mobulu mpe mbindo ya bomoi na ye mpe akanisaki, “Ekoki.” Mpe abelelaki Mobisi Yesu Klisto mpo na kosalisa ye. Alobaki ete ayekolaki ete Yesu Kliso azalaki makasi koleka kutu makambo na ye. Akokaki koyekama likolo ya bokasi na Ye wana ezalaki ye kotambolaki nzela ya boyamboli.
Na kozongelaka Nkolo mpe banzela na Ye, abongolaki nzela ya lisituale. Azali sembo, mpe azali mawa mpe bolingo mingi mpenza mpo na basusu oyo basali mabungi mpe balingi kobongwana. Kaka lokola banso na biso, bomoi na ye ezali ya kobonga nie te kasi ayembi lolenge nini koyambola mpe kokoba na komeka.
Ya mibale ezali koloba malamu. Kolobaka malamu elingi koloba polele lolenge nini ozali koyoka na ntina ya likambo mpe mpo na nini. Na ebandeli ya mobu oyo , ezalaki na nkoma moko na newsfeed na ngai ya Facebook oyo ezalaki kolobela mabe ya Boklisto. Natangaki yango mpe napesamaki mwa nkanda kasi nabwakisaki yango. Nzokande, moninga moko ya momesano te oyo azali mondimi moko ya bondimi na biso te ayanolaki na likanisi ya yemei na Interneti. Akomaki: “[Oyo ezali] bokeseni mpenza ya maye Yesu alingaka—Azalaki … na makanisi makasi [na] ngonga na ye mpamba te … akokisanisaki mokili. … Ye [alobelaki] na [b]asi na pite, [aliaki] elongo na… [ba]futisi mpako , asalaki bondeko na basi mpe bana bazanga makasi … , [mpe] apesaki biso lisolo ya Mosamalia Malamu. … Ezali kolanda ete … Baklisto ya solo balukaka kozala bato balingaka MINGI MPENZA kati na mokili ntango natangaki ete, na namikanisak, “mpo na nini nakomaki yango te?”
Moko na moko na biso asengeli kozala malamu koleka na kolobaka bantina ya bondimi na biso. Boniboni ozali komiyoka na oyo etali Yesu? Mpo na nini ozali kotikala na Eklezia? Mpo na nini ondimelaka ete Buku ya Mormon ezali makomi? Bisika nini ozwilaka kimia na yo? Mpo na nini ezali ntina ete profeta asengela koloba likambo moko na 2017? Boniboni toyebelakaazali profeta ya solo? Salela mongongo na yo mpe nguya na yo mpo na koloba malamu maye ozali koyoka mpe koyeba—na media social, na masolo moko ya kimia elongo na moninga, na bachat elongo na bankoko na yo ya bana. Lobela bango mpo na nini ondimaka, lolenge nini oyebelaka, yango ezali lokola nini, soki otia naino ntembe, lolengenini osilisaki yango, Nini Yesu Kliso azali mpo na yo. Lokola Ntoma Petelo alobaki Bobanga te … ; kasi bobulisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino: mpe bobelema mikolo nyonso mpo na kozongisa monoko na moto na moto oyo akotuna bino mpo na ntina ya elikia ezali kati na bino.”4
ya misato ezali kozala ya kokesana. Tika nabetela bino lisolo moko oyo esalemaka na sanza ya nsambo oyo na Panama City Beach na Florida.5 kati na mpokwa, Roberta Ursrey amonaki bilenge bana na ye ya mibali mibale oyo bazalaki konganga mpo na lisalisi uta na 90 m kati na mai ya mongwa. Bakangamaka na mbonge makasi mpe mpe bazalaki kotiola kati na mai ya mongwa. Babalani oyo bazalaki mpembeni bamekaki kobikisa bana mibali yango; mpe bango lisusu bakangamaki na mbonge. Baye libota ya libota ya Ursrey bamibwakaki mpo na kobikisa basokoli oyo bazalaki na mobulu, mpe nokinoki bato libwa bakangamaki na mbonge ya makasi.
Ezalaki na basinga moko te. Ezalaki na etetoisele moko te. Bapulusi batindaka masuwa moko ya kobikisa, kasi bato oyo bazalaki kati na mai ya mongwa bazalaki kobundabuda mpo na minuti 20 mpe balembaki mpe bazalaki kozinda na nse ya mai. Kati na batali oyo bazalaki na libongo ezalaki na Jessica Mae Simmons. Ye mpe mobali na ye bazwaki likanisi ya kosala moniololo ya bato. Bagangaki mpo na kobenga bato oyo bazalaki na libongobaya kosalisa bango. Bazomi na mibale mingi ya bato basimbanaki maboko mpe batambolaki kati na mai ya mongwa. Jessica alobaki na zulunale ete: “Komona bato ya bikolo mpe ndenge ekeseni kosangana na mosala mpo na kosalisa bapaya MPENZA [ezalaki] kokamwa mpenza komona!!”6 Moniololo moko ya bato 80 esembolamaki epai ya basukoli. Botala elilingi ya ngonga wana ya kokamwa.
Moto nyonso na libongo akokaki bobele kokanisa biyano ya momesano mpe balembaki nzoto. Kasi babalani moko, na ndambu ya sekonde, Bakanisaki na nzela ekeseni. Bosali eloko ya sika mpe bokeli ezali makabo ya molimo. Ntango tobateli mayokani na biso, Ekoki kosala ete tokesana uta na basusu na bonkoko mpe lingomba na biso, Kasi epesaka biso eyano mpo na kokota na bofuli mpo ete tokoka kokanisa biyano ekeseni, banzela ekeseni, bisaleli ekeseni. Tokokoka ntango nyonso kokoka makambo ya mokili te kosi kozalaka ya kokesena na ndenge malamu ekoki kozala nzela malamu ya kosalisa basusu oyo bazali kobunda.
Ya minei ezali kozala polele. Polele elingi koloba kozala na kolimbola lisusu malamu. Tika nazongela lisolo oyo etali Jessica Mae Simmons na libongo. Ntango moniololo ya batu ezalaki kosembolama epai ya mosukoli ayebaki ete akokaki kosalisa. Jessica Mae alobaki, “Nakoki kokanga mpema … mpe kotambola nzingnzingaya liziba ya Olympic na pete! [Nayebaki lolenge nini ya kobima na mbonge ya makasi.] Nayebaki nakokaki kokomisa [mosukoli moko na moko] epai ya moniololo ya bato.”7 Ye mpe mobali na ye bakangaki baetetoisele mpe bakataki mai kitaka moniololo kino bakomaki epai ya basukoli mpe nsima bamemaki bango moko na moko kozongaka tii na moniololo, oyo alekisaki bango epai ya Kimia ya libongo. Jessica azalaki na boyebi ya polele: ayebaki lolenge nini kokata mai kotelemelaka mbonge makasi.
Nsango malamu ezongisama elimbolami solo malamu. Kasi esengeli tozala polele oyo etali lolenge nini tolandaka yango. Lokola Jessica, tosengeli kosalela nsango malamu na bomoi liboso ya likama mpo ete, na bozangi kobanga, tokozala makasi mpenza mpo na kosalisa ntango basusu bazali kotiolama na mbonge.
Mpe na suka, ya mitano, ezali koniata matambe minei etiami liboso na esengo. Kozala na esengo elingi koloba te kotia koseka moke ya lokuta na elongi na yo likambo nini ezali kosalama. Kasi elingi koloba kobatela mibeko ya Nzambe mpe kotongaka mpe kotombolaka basusu.8 Ntango totongi, ntango totomboli mokumba ya basusu, epamboli bomoi na biso na ndenge ete mimekano na biso ekoki kozwa nzela te. Nazali na maloba moko ya Mokambi Gordon B. Hinckley etiami na esika wapi namonaka yango mikolo nyonso. Alobaki: “Yo … kotonga na ntembe to kozanga elikia te. Yo tala na elikia, Sala na bondimi, mpe makambo masalami.”9
Mpo na ndakisa ya molimo ya esengo, ya elikia, nayebi mwana mwasi moko ya mibu 13 babengi Elsa oyo libota na ye ezali kokende kofanda na Baton Rouge, Louisiana, 2,900 km mosika uta na baninga na ye. Ezali pete mpenza ten tango ozali na mibu 13 okende kofanda na esika ya sika. Elsa azalaki na kososola na bondimi te na oyo etali mobembo yango yango wana tata na ye apesaki ye lipamboli. Kaka na ngonga ya lipamboli, telefoni ya mama na ye elakisaki ete ezalaki na nkoma. Bilenge basi oyo bazalaki na palwasi na Louisiana batindaki foto oyo na nkoma “Tosengi oya na Palwasi na biso!”10
Bilenge basi oyo bazalaki na bondimi ete ba bakolinga Elsa ata kutu bakutanaki na ye. Nsai na bango ekelaki ekelaki bondimi kati na Elsa na ntina ya mobembo ekoya mpe eyanolaki losambo na ye na ntina soki makambo nyonso ekozala malamu.
Ezali na nsai oyo eyaka uta na esengo mpe bondimi oyo epambolaka biso te kasi oyo etongaka moto nyonso nzinga nzinga na biso. Elongo nyonso ya moke oyo osalaka mpo na kopelisa esengo ya solo kati na basusu elakisaka ete ozali kokoba kozala ndakisa na ndenge oyo Mokambi alobaki.
Nazalaki na mibu 15 na ntango lisikulu ya Mokambi Kimball epesamaki. Biso oyo tokoli koleka mibu 40 tozali komema mokumba ya Mokambi Kimball uta mokolo wana. Sikoyo nazali kotala bilenge ya mibu 8, 15, mpe 20, mpe 35, mpe nakopesa mokumba na bino. Bozali bakambi ya lobi ekoya kati na Eklezia oyo, mpe ekotala bino komema mwinda oyo liboso mpe bozala bokokisi ya lisakoli oyo. Biso bato tozali mikolo koleka 40 tokangisi maboko na biso na ya bino mpe tozali koyoka bokasi mpe nsainsai na biso. Tozali na mposa na bino.
Boyoka makomi oyo ezwami na Doctrine et Alliances 49:26–28. Ekoki kokomama na nse ya makambo ekeseni, kasi na butu ya lelo na nzela ya Molimo Mosantu, nalikii ete bokozwa yango lokola libiangi ya yo moko na mosala ya bule oyo.
“Tala, nalobi na bino, bokende lokola natindi bino; boyambola masumu na bino manso; bosenga mpe bokozwa; bobeta mpe bakofungolela bino.
“Tala, nakokende liboso na bino mpe nakozala na nsima na bino; mpe nakozala na katikati na bino, mpe bokobulinginisama te.
“Tala, Nazali Yesu Klisto, mpe nakoya nokinoki.”11
Nazali kosenga na moko na moko na bino bomitia na esika wapi bokoki bolingo ya ofele Nzambe azal na yango mpo na biso. Bokoki komitia mosika ya bolingo wana te . Ntang byk boyoki bolingo na Ye. Ntango bolingi Ye, tokoyambola mpe batela mitindo na Ye. Ntango bobateli mitindo na Ye, Ye akoki kozwa biso kati na mosala na Ye. Mosala mpe nkembo na Ye ezali bonetolami mpe bomoi ya seko ya basi mpe mibali.
Baprofeta bazali kbenga biso, bandeko na ngai basi. Ekoki bino kozala sembo? Ekoki bino koloba malamu bondimi na bino? Ekoki bino kotatola kozala polele mpe ya kokesana? Esengo na bino na esika ya mimekano ekobenda basusu oyo bazali malamu mpe ya lokumu mpe oyo na mposa ya bondeko na bino? Ekopelisa bino mwinda na bino? Natatoli ete Nkolo Yesu Klisto akokende liboso na biso mpe akozala na katikati na biso.
Nasukisi na maloba ya profeta na biso ya bolingo mpenza, Thomas S. Monson: “Bandeko na ngai babolingo basi, oyo ezali mokolo na bino, oyo ezali ngonga na bino.”12 Na nkombo ya Yesu Klisto, amene.