Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na moko 25–Sanza ya zomi na mibale 1: “Na Bondimi Makambo Manso Makokisami.” Etele 12–15


“Sanza ya zomi na moko 25–Sanza ya zomi na mibale 1: ‘Na Bondimi Makambo Manso Makokisami.’ Etele 12–15,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na moko 25–Sanza ya zomi na mibale 1. Etele 12–15,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Etele akoti na libulu kati na mabanga

Etele Abatami na Libulu kati na Mabanga, na Gary Ernest Smith

Sanza ya zomi na moko 25–Sanza ya zomi na mibale 1: “Na Bondimi Makambo Manso Makokisami”

Etele 12–15

Masakoli ya Etele epai ya Bayelede ezalaki “minene mpe kitoko” (Etele 12:5). “Ayebisaki bango makambo manso uta na ebandeli ya moto” (Etele 13:2). Amonaki na mosika “mikolo ya Klisto” mpe Yelusaleme ya Sika na mikolo mya nsuka (Etele 13:4). Mpe alobaki na ntina ya “elikya mpo na mokili malamu koleka, iyo, kutu esika malamu na loboko ya mobali ya Nzambe” (Etele 12:4). Kasi Bayelede babwakisaki maloba na ye, mpo na ntina se moko mbala mingi bato babwakisaka masokoli ya basali ya Nzambe ya lelo—“mpo ete bango [bamonaka] yango te” (Etele 12:5). Esengaka bondimi mpo na kondimela bilaka to makebisi na ntina ya makambo tokoki komona te, bobele lokola esengaki bondimi mpo ete Etele asakola na ntina ya “makambo minene mpe kitoko” epai ya bato bazanga bondimi. Esengaki bondimi epai ya Moroni mpo na kondimela ete Nkolo akokaki kolongola “botau na ye mpo na kokoma” mpe kobongola yango na bokasi (tala Etele 12:23–27). Ezali nde lolenge ya bondimi oyo esalaka ete biso “tondimela mpe totikala ngwi, ntango nyonso komipesaka na misala malamu, komemamaka mpo na kokumisa Nzambe” (Etele 12:4). Mpe ezali nde lolenge ya bondimi oyo na nzela na yango “makambo manso makokisami” (Etele 12:3).

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Etele 12

Bondimi na Yesu Klisto ekoki komema na makamwisi.

Ezali likambo ya bato mingi lelo oyo, lokola ezalaki na mikolo ya Etele, mpo na bato kolinga komona bilembo ya bosolo yambo bandimela Nzambe mpe nguya na Ye. Oyekoli nini uta na Etele 12:5–6 na ntina ya likanisi yango?

Ntango ozali kotanga Etele 12, okoki kokoma mbala nyonso oyo okokuta liloba “bondimi.” Kanisa nini ntango moko na moko eteyi na ntina na bondimi. Mituna lokola oyo ekoki kosalisa: Bondimi ezali nini? Elimboli nini kosalela bondimi? Nini ezali bambuma ya bondimi kati na Yesu Klisto? Okoki kokoma lisusu makanisi na yo na ntina ya litatoli ozwaki “nsima ya komekama ya bondimi na yo” (Etele 12:6).

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Klisto Asekwi; Bondimi kati na Ye Ekotombola Bangomba,” Liahona, Sanza ya mitano 2021. 101–4.

Tika basusu bakabola, mpe ntango mosusu bateya. Bato bayekolaka malamu koleka ntango bazali na mabaku ya kokabola makambo oyo bazali koyekola to kutu koteya na esika ya momesano. Ezala na ndako to na eklezia, kanisa kopesa nzela na basusu, bakisa mpe bilenge, koteya eteni moko ya liteya.

Etele 12:1–9, 28, 32

Yesu Klisto apesaka biso “elikya malamu koleka mpenza.”

Likolo ya boyebi ya mozindo na ntina ya bondimi, Etele 12 ezali lisusu na mingi ya koloba na ntina ya elikya Tika ete mituna miye ekamba koyekola na yo.

  • Bantina ezalaki nini mpo ete Etele “alikya na mokili malamu mingi koleka”? (tala Etele 12:2–5

  • Ntina ya longo ezali nini ? Elikya esalaka nini mpo na molimo na yo oyo ekokani na oyo longo esalaka mpo na masuwa? (tala Etele 12:4).

  • Tosengeli kolikya nini? (tala Etele 12:4; Moroni 7:41).

  • Lolenge nini nsango malamu ya Yesu Klisto epesaki yo “elikya malamu koleka mpenza”? (Etele 12:32).

Tala lisusu Moroni 7:40–41; Jeffrey R. Holland, “Pole Ebonga nie ya Elikya,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 81-84.

Etele 12:23–29

Elilingi
elembo ya seminele
Yesu Klisto akoki kokomisa botau na ngai makasi.

Ntango tozali kotanga makomi matonda na nguya ya Moroni, ezali pete mpo na kobosana ete ayokaki mpasi na ntina ya “botau na ye na kokomaka” mpe kobangaka ete bato bakoka kotiola maloba na ye (tala Etele 12:23–25). Soki osilaki koyoka mitungisi na ntina ya botau na yo moko te, tanga na ntina ya bitumba ya Moroni—mpe eyano ya Mobikisi—na Etele 12:23–29. Okokaki lisusu komanyola bantango oyo Yesu Klisto asalisaki yo oyeba botau na yo mpe akomisaki yo makasi—ata soki Alongolaki yango mobimba te. Lisusu kanisa na ntina ya botau ozali kobunda na yango sikawa. Osengeli kosala nini mpo na kozwa elaka ya Mobikisi mpo na “kosala ete makambo ma botau makoma makasi?” (Etele 12:27).

Kanisa koluka mikapo oyo elandi mpo na komona lolenge nini basusu kati na makomi bazwaki makasi na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto:

Tala lisusu Gospel Topics, “Ngolu,” Gospel Library; “Nkolo Azali Pole na Ngai,” Banzembo, no. 89.

Etele 13:13–22; 14–15

Koboya baprofeta ya Nkolo ememaka ngai na likama ya molimo.

Kozala mokonzi ya Bayelede ezalaki, uta kala, esika moko ya likama. Yango ezalaki mingimingi solo mpo na Koliantumi, lokola bato mingi ya “nguya … balukaki koboma ye” (Etele 13:15–16). Na Etele 13:15–22, banza oyo Koliantumi asalaki mpo na komibatela ye moko mpe oyo profeta Etele ateyaki ye mpo na kosala. Ntango ozali kotanga buku oyo etikali ya Etele, manyola makama ya kobwakisa baprofeta. Nini ekomelaka bato ntango “Molimo ya Nkolo [etikaka] kobunda na bango”? (Etele 15:19). Nini Mobikisi akoki kolinga yo oyekola uta na masolo oyo? Kanisa nini okosala mpo na kolanda baprofeta na Ye.

Mpo na makanisi mosusu, tala banimero ya sanza oyo ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge magazine.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Etele 12:6–22

Bondimi ezali kondima biloko nakoki te komona.

  • Kanisa kosalisa bana na yo kozongela elongo na yo “Kondima ezali makambo oyo elikiami mpe emonanaka te” uta Etele 12:6. Bakoki kosepela kotala bililingi oyo ezali kolakisa bandakisa ya kondima na Etele 12:13–15, 19–21 (tala Gospel Art Book, nos. 78, 85, mpe lokasa ya misala ya poso oyo). Tika bana na yo balimbola maye bayebi na lisolo moko na moko. Tala mwa mituna oyo ekosalisa yo olobela bandakisa oyo ya bondimi:

    • Bato yango bazalaki kolikya nini?

    • Lolenge nini bondimi na bango emekamaki?

    • Nini esalamaki mpo na bondimi na bango?

    Okoki mpe koyebisa makambo oyo yo moko okutanaki na yango ntango ozali komonisa bondimi.

Etele 12:4, 32

Elikya ezali lokola longo mpo na molimo na ngai.

  • Mpo na kososola nini Etele 12:4 eteyi na ntina ya elikya, yo na bana na yo bokokaki kotala elilingi ya masuwa mpe longo. Mpo nini bamasuwa ezali na mposa ya balongo? Nini ekokomela masuwa oyo ezali na longo te? Ntango bozali kotanga Etele 12:4 elongo, bolobela lolenge nini elikya esalisaka biso lolenge longo esalisaka masuwa. Bengisa bana na yo bayema bililingi ya masuwa mpe longo mpo ete bakoka koteya basusu na ntina ya elikya.

  • Soki bana na yo bazali na mposa ya ndimbola ya elikya, salisa bango bazwa moko kati na Guide to the Scriptures, “Elikya” (Gospel Library). Engebene na ndimbola oyo mpe Etele 12:4, 32, tosengeli kolikya nini? (tala lisusu Moroni 7:40–42). Salisa bana na yo bakanisa maloba mosusu ya elikya, elongo na maloba mosusu ya bokeseni na elikya. Okokaki mpe kokabola moko na mosusu mwa bosolo ya nsango malamu oyo epesaka yo elikya.

Etele 12:23–29

Yesu Klisto akoki kosalisa ngai nakoma makasi na molimo.

  • Bana ntango mosusu bakutanaka na makambo oyo bayokaka ete bazali na bolembu, kaka lokola Moroni asalaki. Salisa bana na yo bayeba mpo na nini Moroni ayokaki boye na kati Etele 12:23–25, mpe tuna bango soki bakoma naino t na mayoki ya ndenge wana. Nsima bengisa bango kotanga milongo 26–27 mpo na koyeba lolenge nini Nkolo asalisaki Moroni.

  • Mbala mosusu bana na yo bakoki koyema elilingi ya eloko moko ya bolembu mpe ya eloko moko ya makasi. Na nsima bakokaki kobakisa na mayemi na bango mwa maloba mpe bafraze oyo euti na Etele 12:23–29 oyo eteyaka bango na ntina ya lolenge nini Mobikisi akoki kobongola botau na biso na makasi. Lendisa bana na yo bakanisa na ntina ya botau oyo bazali na yango mpe nsima baluka lisalisi ya Mobikisi mpo na kokoma makasi. Okoki mpe kokabola likambo moko ntango Mobikisi asalisaki yo okoma makasi mpo na kosala likambo moko ya makasi.

Mpo na makanisi mosusu, tala nimero ya sanza oyo ya Moninga magazine.

Elilingi
Etele afukami liboso ya bofungwami ya libulu kati na mabanga

Masakoli ya Etele Mazalaki Kitoko,, na Walter Rane

Bimisa na lokasa