Sanza ya Mibale 10–16: ‘Ete Okoka Kobima Molongi’: Malongi mpe Mayokani 10–11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)
“Malongi mpe Mayokani 10–11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025
Malongi mpe Mayokani 10–16: “Ete Okoka Kobima Molongi”
Malongi mpe Mayokani 10–11
Lokola bobongoli ya Buku ya Mormon ekobaki, motuna etunamaki: nini Joseph Smith mpe Oliver Cowdery basengelaki kosala na nkasa ya kobongola oyo ebungaki? Ekoki kozala na ndimbola kobongola lisusu eteni wana, kasi Nkolo amonaki ete ezalaki eloko oyo bakokaki kosala te: banguna bazalaki kosala miango ya kobongola maloba na nkasa wana mpo na kotia ntembe na mosala efulama ya Joseph. Nzambe azalaki na moango ya koboya likambo wana mpe kobatela mosala ekende liboso. Mibu mokama liboso, nzambe afulaki nefi akoma likundoli ya mibale oyo elobelaki ngonga se moko ya eleko yango “mpo na ntina ya bwanya na Ye” (1 Nefi 9:5).
“Bwanya na ngai,” Nkolo alobaki epai ya Joseph, “ezali monene koleka mayele mabe ya satana” (Malongi mpe Mayokani 10:43). Oyo ezali nsango ya kopesa elikya na mikolo lokola ya biso, ntango monguna azali kolendisa makasi na ye mpo na kolembisa bondimi. Lokola Joseph, tokoki kotikala “sembo mpe kokende liboso” na mosala oyo Nzambe abiangelaki biso tosala (molongo 3). Nsima tokomona ete Asilaki kolengela nzela mpo ete “bikuke ya lifelo ekoka kolonga” biso te (molongo 69).
Tala Basantu, 1:51–61.
Makanisi mpo na Koyekola na Ndako mpe na Eklezia
Nzambe “akotika te ete Satana akokisa makanisi na ye ya mabe.”
Satana asepelaka biso tobosana ete azalaka—to ete tobosana koyeba masenginya na ye mpo na kozwa nguya likolo na biso (botala 2 Nefi 28:22–23. Kasi maloba ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 10 elobi ete Satana azali solo—mpe azali kotelemela na makasi mosala ya Nkolo. Na milongo 1–33, botala maye Nzambe ayebaki etali makasi ya Satana (botala lisusu milongo 62–63). Bokoki lisusu kosenga Nkolo asalisa bino bomona lolenge nini Satana akoki komeka bino. Ntango bozali kotanga eteni 10, bomanyola lolenge nini Mobikisi akoki kosalisa bino botelemela makasi ya Satana.
Ya Nkolo “bwanya ezali monene koleka mayele mabe ya satana.”
Nefi ayebaki te mpo na nini afulamaki mpo na kokoma maboke ya makundoli mibale ya bato na ye. Mpe Mormon ayebaki te mpo na nini afulamaki mpo na kosangisa liboke ya mibale na bapalaki ya wolo. Kasi baprofeta nyonso mibale batyaki motema ete Nzambe azalaki na “ntina moko ya bwanya” (1 Nefi 9:5; Maloba ya Molomoni 1:7). Lelo toyebi ete eteni ya ntina wana: kosombitina nkasa 116 ebunga ya Buku ya Mormon. Bokanisi nini Nkolo alingi bino boyekola uta na nyonso oyo? Bomanyola motuna wana ntango bozali kotanga Malongi mpe Mayokani 10:34–52. Bokoki lisusu kosala molongo ya bosolo boyekoli etali Nkolo uta na milongo oyo. Lolenge nini bosolo oyo esimbi mokangano na bino na Ye? Nini etuti bino na oyo etali bwanya mpe bomoni liboso ya nzambe na kolengelaka mpo na bobungisi ya nkasa 116”?
Bokoki lisusu komiyoka ya kofulama mpo na koluka elembo ya komonana na miso ya bwanya mpe bomoni liboso na bomoi na bino. Botanga masolo na nsango ya Mpaka Ronald A. Rasband “Na Mwango ya Bonzambe”—ekoki komema bandakisa na makanisi na bino (Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 55–57). Bokanisa kokoma yango ntango ezali koyela bino. Lolenge nini Nkolo azalaki kosala na bomoi na bino? Ndakisa, “mabaku malamu ” nini Ye alengeli? Miboko nini Ye atie mpo na mapamboli na bino? Ntango nini Ye akambi bino mpo na kosalisa moto moko na bosenga?
Botala lisusu Baloma 8:28; Malongi mpe Mayokani 90:24; Makambo mpe Mituna, “Mwango ya Lobiko,” Biblioteke ya Nsango Malamu.
“Tia motema na Molimo ya [Nkolo].”
Ndeko mobali ya Joseph ya nkulutu Hyrum azalaki motema moto moto mpo na koyeba bolingi ya Nkolo mpo na ye, yango wana asengaki Joseph aluka emoniseli na nkombo na ye. Profeta azalaki na esengo mpo na kosala yango, kasi pene nsango moko na emoniseli wana (Malongi mpe Mayokani 11) ezali ete Hyrum akokaki lisusu koluka emoniseli mpo na ye moko. Mpe bongo ekoki “bato banso oyo bazali na mposa ya malamu, mpe baoyo babwaki likwangola na bango mpo na kobuka mbuma” (molongo 27 Ntango bozali kotanga eteni 11, boyoki nini Nkolo azali koteya bino na ntina ya emoniseli ya moto ye moko? Lolenge nini oyo elobeli maye Ye ateyaki Oliver Cowdery na biteni 6–9? Bansango mosusu nini Azali na yango mpo na bino?
Botala lisusu “Let the Holy Spirit Guide,” Hymns, no. 143.
Ntango nazali koluka “kozwa liloba ya [Nzambe],” nakozwa Molimo mpe nguya na Ye.
Ata liboso Buku ya Mormon ebongolamaka, Hyrum Smith azalaki na mposa ya kosunga na mosala ya Bozongisi. Ntango bozali kotanga eyano ya Nkolo na bamposa na ye, bokanisa nini yango elingi kolobela bino “kozwa liloba ya [Nzambe]” (molongo 21). Lolenge nini kozwa liloba ya Nzambe esungaka bino bosalela Ye na nguya?
Makanisi mpo na Koteya Bana
Lokola nasambelaka ntango nyonso, nazwaka bokasi uta na Nzambe.
-
Mpo na koyingisa molongo oyo epayi ya bana na bino, bokoki kotuna bango na oyo etali makambo basalaka “ntango nyonso”. Nini Nkolo alobi tosengeli ntango nyonso kosala na Malongi mpe Mayokani 10:5? Mpo na nini Ye alingi biso tosala yango?
-
Lolenge nini bokoki kosalisa bana na bino bamikundola kosambela ntango nyonso? Ntango mosusu bakoki kosangisa mwa mabanga mike, ya kitoko mpe kopakola langi likolo na yango “Malongi mpe Mayokani 10:5” to “Kosambela Ntango Nyonso.” Bakoki kotia mabanga na bango ba bisika ya ndenge na ndenge wapi balingi komikundolisa kosambela, lokola pembeni ya mbeto na bango, elongo na babuku na bango ya eteyelo, to wapi balielaka biloko. Engebene na Malongi mpe Mayokani 10:5, lolenge nini Nzambe apambolaka biso ntango tosambelaka? Bana na bino bakoki kozwa biyano misusu na loyembo lokola “A Child’s Prayer” (Children’s Songbook, 13).
Malongi mpe Mayokani 11:12–13.
Molimo Mosantu akambaka ngai nasala bolamu.
-
Bana bakoki koyekola koyeba ntango nini Molimo azali kolobela bango. Mpo na kosunga bango, bokoki kobomba ampule ya pole to tolosi mpe elilingi ya elongi ya esengo esika moko na kisuku, nsima bosenga bana na bino bamona biloko oyo. Botanga Malongi mpe Mayokani 11:13, mpe bosalisa bana na bino bamona maloba oyo elobeli biloko bamoni. Maloba oyo eteyi nini etali lolenge nini Molimo Mosantu esalisaka biso?
-
Kokabola mayebi ya molimo ya bino moko ekoki kosalisa bana bayeba nguya ya Molimo Mosantu na bomoi na bango. Ntango bozali kokabola, bosenga bango bakabola mayebi na bango mpe. Ntango bozali kotanga elongo Malongi mpe Mayokani 11:12–13, kolukaka lolenge nini tokoki koyeba ntango Molimo Mosantu azali kokamba biso. Botatola ete Tata na Lola alingi kokamba biso na nzela ya Molimo Mosantu.
Malongi mpe Mayokani 11:21, 26.
Nasengeli koyeba nsango malamu mpo ete nakoka kosalisa basusu bamona bosolo.
-
Kaka lokola Hyrum Smith, bana na bino bakozala mbala mosusu na mabaku mingi mpo na kokabola nsango malamu na basusu. Bokoki kotanga elongo Malongi mpe Mayokani 11:21, 26 mpe kosenga bana na bino bazwa maye Nkolo alobaki na Hyrum asengelaki kosala mpo akoka koteya nsango malamu. Nini elingi koloba “kozwa” liloba ya Nzambe? Lolenge nini tokoki kosala yango? Lolenge nini biso “tobombaka” liloba ya Nzambe na mitema na biso? Ntango mosusu bana na bino bakoki kosala lisano kokabolaka eloko moko etali Yesu Klisto to Buku ya Mormon na basusu.