Makomi
2 Nefi 12


Mokapo 12

Yisaya amoni tempelo ya mikolo ya nsuka, bosangani ya Yisalaele, mpe bosambisi mpe kimia ya nkoto moko ya mibu—Bato ya lolendo mpe bato ya nkuna bakokitisama na nse na Boyei ya Mibale—Meka na Yisaya 2. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Liloba oyo Yisaya, mwana ya Amosa, amonaki, mpo na oyo etali Yuda mpe Yelusaleme:

2 Mpe ekosalema na mikolo ya nsuka, ntango ngomba ya ndako ya Nkolo ekotiama na nsonge ya bangomba, mpe ekonetolama likolo ya ngomba ya mike, mpe bikolo nyonso bikosopana epayi na yango.

3 Mpe bato mingi bakokende mpe bakoloba, boya mpe tomata na ngomba ya Nkolo, na ndako ya Nzambe ya Yakobo; mpe akolakisa biso oyo etali banzela na ye, mpe tokotambola na banzela na ye; mpo uta na Siona ekobima mobeko, mpe liloba ya Nkolo uta na Yelusaleme.

4 Mpe akosambisa na kati ya bikolo, mpe akopamela bato mingi: mpe bakotula mipanga na bango mikoma nkongo, mpe makula na bango makoma mbeli ya kokata bilanga—ekolo moko te ekotelemisa mompanga likolo ya ekolo mosusu, mpe bakoyekola etumba lisusu te.

5 O ndako ya Yakobo, boya mpe tika ete totambola na pole ya Nkolo; iyo, boya, mpo bino nyonso bobungi nzela, moto na moto akeyi na nzela na ye ya nkuna.

6 Na boye, O Nkolo, otiki bato na yo, ndako ya Yakobo, mpo bamitondisi na oyo uta na esti, mpe bazali koyokela banganga nkisi lokola Bafilisitia, mpe bazali komisepelisa na bana ya bapaya.

7 Mboka na bango lisusu etondi na mpauni mpe wolo, mpe bomengo na bango ezali na nsuka te; mboka na bango etondi lisusu na bampunda, mpe makalo na bango ezali na nsukate.

8 Mboka na bango etondi lisusu na banzambe ya bikeko; bakokumbamela mosala ya maboko na bango moko, oyo misapi na bango moko esalaki.

9 Mpe bato ya mpamba bagumbamimitu na nse te, mpe bato minene bamikitisi te, boye okolimbisa bango te.

10 O bino bato ya nkuna, bokota kati na libanga, mpe bomibomba na mputulu, mpo bobangi ya Nkolo mpe nkembo ya lokumu na ye ekobeta bino.

11 Mpe ekosalema ete botali ya lofundo ya moto ekokitisama mpe efundeli ya bato ekogumbama na nse, mpe Nkolo ye moko kaka akonetolama na mokolo wana.

12 Mpo mokolo ya Nkolo na Bibele ezali koya kala mingi te likolo ya bikolo nyonso, iyo, likolo ya moko na moko; iyo, likolo ya moto ya lolendo mpe moto ya lofundo, mpe likolo ya moko na moko oyo atombolami, mpe akokitisama.

13 Iyo, mpe mokolo ya Nkolo ekoya likolo ya nzete nyonso ya eleze ya Lebanona, mpo ezali milai mpe etombwama likolo; mpe ezali likolo ya nzete nyonso ya ela ya Basana;

14 Mpe likolo ya bangomba nyonso ya milai, mpe likolo ya ngomba nyonso ya mike mike, mpe likolo ya bikolo nyonso oyo bitombwama, mpe likolo ya bato nyonso;

15 Mpe likolo ya linongi nyonso ya molai, mpe likolo ya efelo nyonso etiami makasi;

16 Mpe likolo ya masuwa nyonso ya mbu, mpe likolo ya masuwa nyonso ya Talasisi, mpe likolo ya bilili nyonso ya kitoko.

17 Mpe lofundo ya moto ekogumbama na nse mpe efundeli ya bato ekokitisama; mpe Nkolo ye moko kaka akonetolama na mokolo wana.

18 Mpe banzambe ya bikeko bakolimwa nie.

19 Mpe bakokende kati na madusu ya mabanga, mpe kati na mabulu ya mabele, mpo bobangi ya Nkolo bokoya likolo na bango mpe nkembo mpe lokumu na ye ekobeta bango, ntango akotelema mpo na kolengisa mabele na nsomo.

20 Na mokolo wana moto akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya mpauni, mpe banzambe na ye ya bikeko ya wolo, oyo asalaki ye moko mpo na kokumbamela, epayi ya mitomba mpe epayi ya ngembo;

21 Mpo na kokende kati na minkaka ya mabanga, mpe kati na nsonge ya mabanga ya kilikili, mpo bobangi ya Nkolo ekoya likolo na bango mpe lokumu ya nkembo na ye ekobete bango, ntango akotelema mpo na koningisa mabele na nsomo.

22 Botika kotalela moto, oyo kani mpema ezali na zolo na ye; mpo na motuya nini ekotalela bino ye?

Bimisa na lokasa