Makomi
2 Nefi 28


Mokapo 28

Baeklezia mingi ya lokuta bikotongama na mikolo ya nsuka—Bakolakisa malongi ya lokuta, ya mpamba mpe ya liboma—Bopengwi ekozala beboo na ntina ya balakisi ya lokuta—Zabulu akongala na mitema ya bato—Akolakisa ndenge nyonso ya malongi ya lokuta. Penepene na mibu 559–545 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, tala, bandeko na ngai, nalobelaki bino, engebene na lolenge Molimo etindi ngai; yango wana, nayebi solo ete esengeli kosalema.

2 Mpe makambo oyo makokomama uta na buku yango ekozala na motuya mingi mpo na bana ya bato, mpe mingi mingi epayi na nkona na biso, oyo ezali montika ya ndako ya Yisalaele.

3 Mpo ekosalema na mokolo wana ete Baeklezia oyo ezali kotongama, mpe mpo na Nkolo te, bikoloba moko epayi na mosusu: Tala, ngai, nazali ya Nkolo; mpe basusu bakoloba: Ngai, nazali ya Nkolo; mpe boye nde ekoloba moko na moko oyo atongaki Baeklezia, mpe mpo na Nkolo te—

4 Mpe bakowela moko na mosusu; mpe banganganzambe na bango bakowela moko na mosusu, mpe bakoteya na boyekoli na bango moko, mpe bakoboya Molimo Mosantu, oyo apesaka maloba.

5 Mpe bawangani nguya ya Nzambe, Moko Mosantu ya Yisalaele; mpe balobi epayi ya bato: Boyokela biso, mpe botia litoyi na mosise na biso; mpo tala, lelo oyo Nzambe azali te, mpo Nkolo mpe Mosikoli asalaki mosala na ye, mpe apesaki nguya na ye epayi ya bato;

6 Tala, boyokela mosise na ngai; soki bakoloba ete ezali na likamwisi esalemi na loboko ya Nkolo, bondima yango te; mpo na mokolo oyo azali Nzambe ya makamwisi te; asilaki kosala mosala na ye.

7 Iyo, mpe ekozala na mingi baoyo bakoloba: Bolia, bomela, mpe bosepela, mpo lobi tokokufa; mpe ekozala malamu mpo na biso.

8 Mpe lisusu ekozala na mingi baoyo bakoloba: Bolia, bomela, mpe bosepela; nzokande, bobanga Nzambe—akolongisa bino na kosalaka lisumu moko ya moke; iyo, bokosa moke, bozwa litomba ya moto moko na ntina ya maloba na ye, botimola libulu mpo na moto ya penepene na yo; na oyo mabe ezali te; mpe bosala makambo nyonso oyo, mpo lobi tokokufa; mpe soki tozali na elindo, Nzambe akobete biso na bilembo ya fimbo moke, mpe na nsuka tokobikisama na bokonzi ya Nzambe.

9 Iyo, mpe ekozala na mingi baoyo bakoteya na lolenge oyo, malongi ma lokuta mpe ya mpamba mpe ya liboma, mpe bakovimbana na mitema na bango, mpe balukaka na mozindo kobombela Nkolo toli na bango; mpe misala na bango ekozala na molili.

10 Mpe makila ya basantu ekoganga uta na mabele kofundaka bango.

11 Iyo, bakei bango nyonso mosika libanda ya nzela; basili kobebisama.

12 Na ntina ya lolendo, mpe na ntina ya balakisi ya lokuta, mpe malongi ya lokuta, Baeklezia na bango bibebi, mpe Baeklezia na bango etombwani; mpe na ntina ya lolendo bavimbani.

13 Bazali koyiba babola mpo na ndako esantu na bango ya kitoko; bazali koyiba babola mpo na bilamba na bango ya kitoko; mpe banyokoli basokemi mpe babola na mitema, mpo na lolendo na bango bavimbani.

14 Balati matoyi matoyi mangongi mpemitu likolo, iyo, na ntina ya lolendo, mpe nkuna, mpe bonsomo, mpe pite, basili nyonso kobunga nzela longola se bato moke, baoyo bazali balandi na bomikitisi ya Klisto; nzokande, bakambami, ete mbala mingi babungi nzela mpo balakisami na misise ya bato.

15 O bato ya bwania, mpe bato bayekola, mpe bato na bozwi, baoyo bavimbani na lolendo ya mitema na bango, mpe nyonso oyo bazali koteya malongi ya lokuta, mpe nyonso oyo basalaka pite, mpe basantolaka nzela ya alima ya Nkolo, lisuma, lisuma, lisuma ezala epayi na bango, elobi Nkolo Nzambe ya Bokasi Nyonso, mpo bakosukumama na lifelo!

16 Lisuma epayi na bango oyo babwakaka moyengebene mpembeni mpo na eloko ya mpamba mpe batiolaka oyo ezali malamu, mpe bakoloba ete ezali na motuya te! Mpo na mokolo ekoya wapi Nkolo Nzambe akoya na lombangu kotala bafandi ya mabele; mpe na mokolo wana ntango ekozala bakomeli mobimba kati na mabe bakowa.

17 Kasi tala, soki bafandi ya mabele bakoyambola uta na nkuna mpe bonsomo na bango, bakobebisama te, elobi Nkolo na Bibele.

18 Kasi tala, eklezia wana ya monene mpe ya nsomo, mwasi ya pite ya mabele nyonso, esengeli kobambama na mabele, mpe bokwei na yango esengeli kozala monene.

19 Mpo bokonzi ya zabulu esengeli koningana, soki te baoyo bazali bato na yango basengeli mpenza kolamusama mpo na boyamboli, to zabulu akokanga bango na miniololo na ye ya libela, mpe bakosenginiama na nkanda, mpe bakowa;

20 Mpo tala, na mokolo wana akongala na mitema ya bana ya bato, mpe akotombokisa bango na nkanda mpo na kotelemela oyo ezali malamu.

21 Mpe basusu nde akopesa bango kimia, mpe akobondela bango na bokengi ya mosuni, na lolenge ete bakoloba: nyonso ezali malamu na Siona; iyo, Siona afuluki, nyonso ezali malamu—mpe boye zabulu akosaka milimo ya bato, mpe akokamba bango na bokebi mosika na nse na lifelo.

22 Mpe tala, basusu nde baye akomema bango mosika na malete, mpe akoyebisa bango ete lifelo ezali te; mpe akoloba epayi na bango: Nazali zabulu te, mpo azalaka te—mpe boye ayimisani na matoyi na bango, kino akokanga bango na miniololo na ye ya nsomo, uta wapi bokangoli ezali te.

23 Iyo, bakangemi na liwa, mpe lifelo; mpe liwa, mpe lifelo, mpe zabulu, mpe nyonso oyo basimbamaki na bango bakotelema liboso ya kiti ya bokonzi ya Nzambe, mpe bakosambisama engebene na misala na bango, uta wapi basengeli kokende kati na esika elengelami mpo na bango, kutu liziba ya moto mpe libanga ya fofolo, oyo ezali monioko mozanga nsuka.

24 Boye, lisuma ezala epayi na ye oyo azali malamu na Siona!

25 Lisuma ezala epayi na ye oyo akobelela: nyonso ezali malamu.

26 Iyo, lisuma epayi na ye oyo akotia bokebi na misise ya bato, mpe akoboya nguya ya Nzambe, mpe likabo ya Molimo Mosantu!

27 Iyo, lisuma epayi na ye oyo akoloba: Tozwaki, mpe tozali na ntina ya mosusu te!

28 Mpe na kosukisa, lisuma epayi na bango oyo nyonso bazali kolenge, mpe basiliki na ntina ya bosolo ya Nzambe! Mpo tala, oyo atongami likolo ya libanga akozwa yango na nsai; mpe oyo atongami likolo ya moboko ya zelo, akolenge na kobangaka ete akweya.

29 Lisuma epayi na ye oyo akoloba: Tozwi liloba ya Nzambe, mpe tozali lisusu te na ntina ya liloba ya Nzambe, mpo tozwi oyo ekoki!

30 Mpo tala, boye elobi Nkolo Nzambe: Nakopesa epayi ya bana ya bato monkoloto likolo ya monkoloto, mosise likolo ya mosise, awa moke mpe kuna moke; mpe bapambolami bango oyo bakoyoka misise na ngai, mpe bakotia litoyi na toli na ngai, mpo bakoyekola bwania; mpo epayi na ye oyo akozwa nakopesa mingi koleka; mpe na bango oyo bakoloba, Tozwi oyo ekoki, na bango ekolongolama kutu oyo bazwi.

31 Alakelami mabe ye oyo atiaka motema na ye na moto, soki te akomisi mosuni loboko na ye, to oyo akoyokela misise ya bato, longola se soki misise na bango ekopesama na nguya ya Molimo Mosantu.

32 Lisuma epayi ya Bayuda-te, elobi Nkolo Nzambe ya Bibele! Mpo ata nakotandola loboko na ngai epayi na bango uta mokolo na mokolo, bakowangana ngai; nzokande, nakotondisama na boboto mpo na bango, elobi Nkolo Nzambe, soki bakoyambola mpe bakoya epayi na ngai; mpo loboko na ngai etandolami mokolo nyonso mobimba, elobi Nkolo Nzambe ya Bibele.

Bimisa na lokasa