Makomi
4 Nefi 1


Nefi ya Minei

Buku ya Nefi
Oyo azali mwana mobali ya Nefi—Moko ya Bayekoli ya Yesu Klisto

Moko lisolo ya bato ya Nefi, engebene na lisolo ya makomi na ye.

Mokapo 1

Banefi mpe Balamani babongwani nyonso na Nkolo—Bazali na biloko nyonso na lisanga, basali makamwisi, mpe bafuluki na mboka—Nsima ya mibu nkama mibale, bokabwani, mabe, Baeklezia ya lokuta, mpe minyokoli ebimi—Nsima ya mibu nkama misato nyonso Banefi mpe Balamani bazali bato ya nkuna—Amaloni abombi masolo ya makomi ya bule. Penepene na mibu 35–321 ya Mobu ya Nkolo.

1 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku misato na minei elekaki, mpe lisusu ya ntuku misato na mitano, mpe tala bayekoli ya Yesu basalaki eklezia moko ya Klisto kati na bamboka nyonso nzinganzinga mpembeni. Mpe mingi lokola bayaki epayi na bango, mpe solo bayambolaki masumu na bango, babatisamaki na nkombo ya Yesu; mpe bazwaki Molimo Mosantu.

2 Mpe esalemaki ete na mobu ya ntuku misato na motoba, bato babongwanaki nyonso epayi ya Nkolo, likolo ya etando nyonso ya mboka, nyonso Banefi mpe Balamani mpe lokola, mpe boweli mpe boswani ezalaki te na kati na bango, mpe moto na moto asalaki na boyengebene moko na mosusu.

3 Mpe bazalaka na biloko nyonso na lisanga na kati na bango; boye ezalaki na mozwi mpe mobola te, moumbu mpe monsomi, kasi bakomisamaki nyonso nsomi, mpe bakaboli ya likabo ya lola.

4 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku misato na nsambo elekaki lisusu, mpe kimia ezalaki kaka na mboka.

5 Mpe misala minene mpe ya kokamwa ezalaki kosalema na bayekoli ya Yesu, na lolenge ete babikisaki bakoni, mpe basekwisaki bakufi, mpe basalaki ete batengoli batambola, mpe bakufi miso bazwa bomoni, mpe bakufi matoyi bayoka; mpe basalaki ndenge nyonso ya makamwisi na kati ya bana ya bato; mpe basalaki makamwisi yango na eloko moko te longola se na nkombo ya Yesu.

6 Mpe boye mobu ya ntuku misato na mwambe elekaki, mpe lisusu ya ntuku misato na libwa, mpe ntuku minei na moko, mpe ntuku minei na mibale, iyo, kutu kino mibu ntuku minei na libwa elekaki, mpe lisusu ya ntuku mitano na moko, mpe ya ntuku mitano na mibale; iyo, mpe kutu kino mibu ntuku mitano na libwa elekaki.

7 Mpe Nkolo afulusaki bango koleka na mboka; iyo, na lolenge ete batongaki bingumba lisusu epayi wapi bingumba bizikaki kala.

8 Iyo, kutu batongaki lisusu engumba monene wana ya Zalayemila.

9 Kasi ezalaki na bingumba mingi oyo ezindaki, mpe mai makomaki na esika na yango; boye bingumba oyo ekokaki te kotongama ya sika.

10 Mpe sikawa, tala, esalemaki ete bato ya Nefi bakomaki makasi, mpe babakisaki kokima mbangu noki koleka, mpe bakomaki bato ya kitoko mingi koleka na kotalaka na miso mpe bonzenga.

11 Mpe babalaki, mpe bapesamaki na libala, mpe bapambolamaki engebene na ebele ya bilaka oyo Nkolo asalaki epayi na bango.

12 Mpe batombokaki lisusu te na kolandaka makokisi mpe makuli ya mobeko ya Mose; kasi batambolaki na kolandaka mitindo oyo bazwaka uta na Nkolo na bango mpe Nzambe na bango, kokobaka na bokili mpe losambo, na kokutanaka esika moko mbala na mbala mpo na kosambela mpe mpo na koyoka liloba ya Nkolo.

13 Mpe esalemaki ete boswani ezalaki te na kati ya bato, kati na mboka mobimba; kasi makamwisi ya makasi masalemaki na kati ya bayekoli ya Yesu.

14 Mpe esalemaki ete mobu ya ntuku sambo na moko elekaki, mpe lisusu mobu ya ntuku sambo na mibale, iyo, mpe mpo na kosukisa, kino na mobu ya ntuku sambo na libwa; iyo, kutu nkama ya mibu elekaki, mpe bayekoli ya Yesu, oyo aponaki, nyonso bakendaki na paladiso ya Nzambe, longola se misato oyo basengelaki kotikala; mpe ezalaki na bayekoli basusu oyo bakulisamaki na esika na bango; mpe lisusu mingi ya nkola wana bakufaki.

15 Mpe esalemaki ete boswani ezalaki te na mboka, na ntina ya bolingo ya Nzambe boye efandaki na mitema ya bato.

16 Mpe boluli ezalaki te, soki mpe songisongi, to mbilinga-mbilinga, to pite, to lokuta, to bobomi, soki mpe lolenge moko ya bonsoni te; mpe ekokaki kozala na bato ya esengo mingi te koleka na kati ya bato nyonso oyo bakelamaki na loboko ya Nzambe.

17 Ezalaki na bayongoli te, soki babomi te, mpe Balamani bazalaki te, soki mpe lolenge moko ya ba-songolo te; kasi bazalaki nyonso kati na bomoko, bana ya Klisto, mpe basangoli libula na bokonzi ya Nzambe.

18 Mpe lolenge boni epambolamaki bango! Mpo Nkolo apambolaki bango na misala na bango nyonso; iyo, kutu bapambolamaki mpe bafulukaki kino mibu nkama moko na zomi elekaki; mpe nkola ya yambo uta na Klisto ekufaki, mpe boswani ezalaki te na mboka mobimba.

19 Mpe esalemaki ete Nefi, oyo abombaki lisolo ya makomi oyo ya nsuka, (mpe abombaki yango likolo ya bapalaki ya Nefi) akufaki, mpe mwana mobali na ye Amosa abombaki yango na esika na ye; mpe abombaki yango mpe lokola likolo ya bapalaki ya Nefi.

20 Mpe abombaki yango mibu ntuku mwambe na minei, mpe kimia ezalaki kaka na mboka, longola se mwa ndambo moke ya bato batombokaki uta na eklezia mpe bakamataki likolo na bango nkombo ya Balamani; boye ebandaki kozala na Balamani lisusu na mboka.

21 Mpe esalemaki ete Amosa mpe lokola akufaki, (mpe ezalaki mibu nkama moko na ntuku libwa na minei uta na boyei ya Klisto) mpe mwana mobali na ye Amosa abombaki lisolo ya makomi na esika na ye; mpe abombaki yango mpe lokola likolo ya bapalaki ya Nefi; mpe ekomamaki lisusu na buku ya Nefi, oyo ezali buku oyo.

22 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale elekaki; mpe nkola ya mibale ekufaki nyonso longola se mwa ndambo moke.

23 Mpe sikawa ngai, Mormon, nalingi boyeba ete bato bakomaki mingi, na lolenge ete bapanzanaki likolo ya etando mobimba ya mboka, mpe ete bakomaki na bozwi mingi koleka, na ntina ya bofuluki na bango na Klisto.

24 Mpe sikawa, na mobu oyo ya nkama mibale na moko ebandaki kozala na bango oyo batombwamaki na lolendo, ndakisa kolataka monzele ya ntalo, mpe ndenge nyonso ya mayaka ya motuya, mpe biloko ya motuya ya mokili.

25 Mpe uta na ntango wana misolo na bango mpe biloko na bango ezalaki lisusu te kotiama na lisanga na kati na bango.

26 Mpe babandaki kokabwana kati na nkondo; mpe babandaki kotonga Baeklezia mpo na bango moko mpo na kozwa matabisi, mpe babandaki kowangana eklezia ya solo ya Klisto.

27 Mpe esalemaki ete ntango mibu nkama mibale na zomi elekaki Baeklezia ezalaki mingi kati na mboka; iyo, Baeklezia ezalaki mingi oyo bilakisaki koyeba Klisto, kasi bawangani biteni mingi koleka ya nsango malamu na ye, na lolenge ete bayambaki ndenge nyonso ya nkuna, mpe bapesaki oyo wana ezalaki bule epayi na ye oyo epekisamaki mpo alongobanaki te.

28 Mpe eklezia oyo ekomaki na bato mingi koleka na ntina ya mabe, mpe na ntina ya nguya ya Satana oyo atiaki nkanga na mitema na bango.

29 Mpe lisusu, ezalaki na eklezia mosusu oyo ewanganaki Klisto; mpe banyokolaki eklezia ya solo ya Klisto, na ntina ya bomikitisi na bango mpe boyambi na bango na Klisto; mpe batiolaki bango na ntina ya makamwisi mingi oyo masalemaki na kati na bango.

30 Boye basalelaki nguya mpe likoki likolo ya bayekoli ya Yesu baoyo batikalaki elongo na bango, mpe babwakaki bango kati na boloko; kasi na nguya ya liloba ya Nzambe, oyo ezalaki na bango, ndako ya boloko epasukaki na biteni mibale, mpe bakendaki kosalaka makamwisi makasi na kati na bango.

31 Nzokande, mpe ata makamwisi oyo nyonso, bato bayeisaki mitema na bango makasi, mpe balukaki koboma bango, kutu lokola Bayuda balukaki koboma Yesu na Yelusaleme, engebene na liloba na ye.

32 Mpe babwakaki bango kati na litumu ya moto, kasi babimaki kozwaka mpasi te.

33 Mpe babwakaki lisusu bango kati na mabulu ya banyama ya zamba, mpe basakanaki elongo na banyama ya zamba kutu lokola mwana moke elongo na mwana ya mpate; mpe babimaki uta na kati na bango, kozwaka mpasi te.

34 Nzokande, bato bayeisaki mitema na bango makasi, mpo bakambamaki na banganganzambe mpe baprofeta mingi ya lokuta mpo na kotonga Baeklezia mingi, mpe mpo na kosala ndenge nyonso ya mabe. Mpe babetaki bato ya Yesu; kasi bato ya Yesu bazongisaki mabe te. Mpe boye babebisamaki moke moke kati na bozangi boyambi mpe nkuna, uta mobu na mobu, kutu kino mibu nkama mibale na ntuku misato elekaki.

35 Mpe sikawa esalemaki ete na mobu oyo, iyo, na mobu ya nkama mibale na ntuku misato na moko, ete bokabwani monene ezalaki na kati ya bato.

36 Mpe esalemaki ete na mobu oyo ete boko bato oyo babiangamaki Banefi babimaki, mpe bazalaki bandimi ya solo na Klisto; mpe na kati na bango ezalaki na bango oyo babiangamaki na Balamani—Bayakobi, mpe Bayosefe, mpe Bazolami;

37 Boye bandimi ya solo ya Klisto, mpe bakumbameli ya solo ya Klisto, (na kati ya baye wapi ezalaki na bayekoli Misato ya Yesu baye basengelaki kotikala) babiangamaki Banefi, mpe Bayakobi, mpe Bayosefe, mpe Bazolami.

38 Mpe esalemaki ete bango oyo babwakaki nsango malamu babiangamaki Balamani, mpe Balemuele, mpe Bayisamaele; mpe babebaki moke moke kati na bozangi boyambi, kasi na motema moko batombokaki na nsango malamu ya Klisto; mpe bateyaki bana na bango ete bandima te, kutu lokola batata na bango, babebaki moke moke, uta na ebandeli.

39 Mpe ezalaki na ntina ya nkuna mpe bonsomo ya batata na bango, kutu lokola ezalaki na ebandeli. Mpe bateyamaki koyina bana ya Nzambe, kutu lokola Balamani bateyamaki koyina bana ya nefi uta na ebandeli.

40 Mpe esalemaki ete mibu nkama mibale na ntuku minei na minei elekaki, mpe boye nde etambolaka makambo ya bato. Mpe eteni eleki nkuna mingi ya bato bakomaki makasi, mpe bakomaki na motango mingi koleka bato ya Nzambe.

41 Mpe bakobaki kaka kotonga Baeklezia mpo na bango moko, mpe bakembisaki yango na ndenge nyonso ya biloko ya motuya. Mpe boye mibu nkama mibale na ntuku mitano elekaki, mpe mibu nkama mibale na ntuku motoba lokola.

42 Mpe esalemaki ete eteni eleki ya bato ya nkuna ebandaki lisusu kotonga ndai mpe makelemba ya nkuku ya Gadiatoni.

43 Mpe lisusu bato oyo babiangamaki bato ya Nefi babandaki kozala na lolendo kati na mitema na bango, na ntina ya bozwi mingi koleka na bango, mpe babandaki kokoma bato mpamba lokola bandeko na bango, Balamani.

44 Mpe uta na ntango oyo bayekoli ya Yesu babandaki koyoka mawa mpo na masumu ya mokili.

45 Mpe esalemaki ete ntango mibu nkama misato elekaki, bato ya Nefi mpe Balamani mpe lokola bakomaki nkuna mingi koleka bamoko na basusu.

46 Mpe esalemaki ete bayongoli ya Gadiatoni bapanzanaki likolo ya etando mobimba ya mboka; mpe ezalaki na moko te oyo azalaki sembo longola se bayekoli ya Yesu. Mpe batiaki wolo mpe mpauni ya kotondanana bibombelo, mpe basalaki mombongo ya ndenge na ndenge.

47 Mpe esalemaki ete esilaki mibu nkama misato na mitano koleka, (mpe bato batikalaki kaka na nkuna) Amosa akufaki; mpe ndeko na ye ya mobali, Amaloni, abombaki lisolo ya makomi na esika na ye.

48 Mpe esalemaki ete ntango mibu nkama misato na ntuku mibale elekaki, Amaloni, lokola atindamaki na Molimo Mosantu, abombaki masolo ya makomi oyo ezalaki ya bule—iyo, kutu masolo ya makomi ya bule nyonso oyo ekitanisamaki uta nkola na nkola, oyo ezalaki ya bule—kutu kino na mobu ya nkama misato na ntuku mibale banda boyei ya Klisto.

49 Mpe abombaki yango mpo na Nkolo, ete makoka koya lisusu epayi ya montika ya ndako ya Yakobo, engebene na masakoli mpe bilaka ya Nkolo. Mpe boye ezali nsuka ya lisolo ya makomi ya Amaloni.

Bimisa na lokasa