Makomi
Alma 22


Mokapo 22

Alona ateyi tata ya Lamoni na ntina ya Bokeli, Bokwei ya Adama, mpe mwango ya bosikoli na nzela ya Klisto—Mokonzi mpe baoyo ya ndako na ye nyonso babongwani—Bokaboli ya mboka kati na Banefi mpe Balamani elimbolami. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa, lokola Amona azalaki boye koteyaka ntango nyonso bato ya Lamoni, tokozongela lisolo ya Alona mpe bandeko na ye; mpo esilaki ye kolongwa uta na mboka ya Midoni akambamaki na Molimo na mboka ya Nefi, kutu na ndako ya mokonzi oyo azalaki likolo ya mokili mobimba longola se mboka ya Yisamaele; mpe azalaki tata ya Lamoni.

2 Mpe esalemaki ete akotaki epayi na ye kati na ndako monene ya mokonzi, elongo na bandeko na ye, mpe amigumbamaki liboso ya mokonzi, mpe alobaki epayi na ye: Tala, O mokonzi, tozali bandeko ya Amona, baoyo okangolaki uta na boloko.

3 Mpe sikawa, O mokonzi, soki olingi kobatela bomoi na biso, tokozala basali na yo. Mpe mokonzi alobaki epayi na bango: Botelema, mpo nakotikela bino bomoi na bino, mpe nakolinga ete bozala basali na ngai te; kasi ngai nakokangama kaka ete bosalisa ngai; mpo nazalaki mwa moke na mobulu na mayele na ngai na ntina ya motema ya bokabi monene ya maloba ya ndeko na bino Amona; mpe nazali na mposa ya koyeba ntina nini ayei te uta na Midoni elongo na bino.

4 Mpe Alona alobaki epayi ya mokonzi: Tala, Molimo ya Nkolo abiangi ye na nzela mosusu; akendaki na mboka ya Yisamaele, koteya bato ya Lamoni.

5 Sikawa mokonzi alobaki epayi na bango: Nini ezali oyo bolobi etali Molimo ya Nkolo? Tala, oyo ezali likambo oyo epesi ngai mobulu.

6 Mpe lisusu, nini ezali oyo Amona alobaki—Soki oyamboli okobikisama, mpe soki oyamboli te, okobwakama mosika na mokolo ya nsuka?

7 Mpe Alona ayanolaki ye mpe alobaki epayi na ye: Ezali yo kondima ete ezali na Nzambe moko? Mpe mokonzi alobaki: Nayebi ete Baamaleki balobi ete ezali na Nzambe moko, mpe napesaki ndingisa epayi na bango ete batonga bandako esantu, ete bamisangisa elongo mpo na kokumbamela ye. Mpe soki sikawa olobi ezali na Nzambe moko, tala nakondima.

8 Mpe sikawa ntango Alona ayokaki oyo, motema na ye ebandaki kosepela, mpe alobaki: Tala, solo lokola ozali na bomoi, O mokonzi, ezali na Nzambe moko.

9 Mpe mokonzi alobaki: Ezali Nzambe yango Molimo Monene wana oyo abimisaki batata na biso uta na mboka ya Yelusaleme?

10 Mpe Alona alobaki epayi na ye: Iyo, azali Molimo Monene wana, mpe akelaki biloko nyonso na lola mpe na mabele. Ezali yo kondima oyo?

11 Mpe alobaki: Iyo, nandimi ete Molimo Monene akelaki biloko nyonso, mpe nazali na mposa ete olobela ngai oyo etali makambo oyo nyonso, mpe nakondima maloba na yo.

12 Mpe esalemaki ete emonaki Alona ete mokonzi alingaki kondima maloba na ye, abandaki uta na bokeli ya Adama, kotangaka makomi epayi ya mokonzi—lolenge kani Nzambe akelaki moto na elilingi ya ye moko, mpe ete Nzambe apesaki ye mitindo, mpe na ntina ya bobuki mobeko, moto akweyaki.

13 Mpe Alona alimbolaki epayi na ye makomi uta na bokeli ya Adama, kotalisaka mpe kolimbolaka bokwei ya moto liboso na ye, mpe ezaleli na bango ya mosuni mpe lisusu mwango ya bosikoli, oyo molengelamaki uta na bokeli ya mokili, na nzela ya Klisto, mpo na nyonso oyo akondima na nkombo na ye.

14 Mpe uta moto akweyaka akokaki kozala na litomba ya eloko moko te na ye moko; kasi mpasi mpe liwa ya Klisto ezalaki bomikabi mpo na masumu na bango, na nzela ya bondimi mpe boyamboli, mpe bongo na bongo; mpe ete akati singa ya liwa, ete lilita ezala na elonga te, mpe ete esweli ya liwa emelama mpenza na elikya ya nkembo; mpe Alona alimbolaki makambo oyo epayi ya mokonzi.

15 Mpe esalemaki ete esilaki Alona kolimbola makambo oyo epayi na ye, mokonzi alobaki: Nini nakosala mpo ete nakoka kozala na bomoi ya seko boye olobeli? Iyo, nini nakosala mpo ete nakoka kobotama na Nzambe, ete molimo oyo ya nkuna epikolama uta na motema na ngai, mpe kozwa Molimo na ye, ete nakoka kotondisama na bosepeli, ete nakoka kobwakama te mosika na mokolo ya nsuka? Tala, elobaki ye, nakotika nyonso nazali na yango, iyo, nakotika bokonzi na ngai, ete nakoka kozwa bosepeli monene boye.

16 Kasi Alona alobaki epayi na ye: Soki ozali na mposa ya likambo oyo, soki okogumbama liboso ya Nzambe, iyo, soki okoyambola masumu na yo nyonso, mpe okogumbama liboso ya Nzambe, mpe okobelela na nkombo na ye na bondimi, kondimaka ete okozwa, nde okozwa elikya oyo ozali na yango mposa.

17 Mpe esalemaki ete elobaki Alona maloba oyo, mokonzi agumbamaki na nse liboso ya Nkolo, likolo ya mabolongo na ye; iyo, amilalisaki likolo ya mabele, mpe alelaki makasi, kolobaka:

18 O Nzambe, Alona ayebisi ngai ete Nzambe ezali; mpe soki Nzambe azali, mpe soki ozali Nzambe, ndima oyebama epayi na ngai, mpe nakotika masumu na ngai nyonso mpo na koyeba yo, mpe ete nakoka kotelemisama na bakufi, mpe nabikisama na mokolo ya nsuka. Mpe sikawa elobaki mokonzi maloba oyo, abetamaki lokola soki akufaki.

19 Mpe esalemaki ete basali na ye bakimaki mpe balobelaki mwasi mokonzi nyonso oyo makomaki epayi ya mokonzi. Mpe ayaki epayi ya mokonzi; mpe ntango amonaki ye alalaki lokola soki akufaki, mpe lisusu Alona mpe bandeko na ye batelemi mpembeni lokola soki bazalaki ntina ya bokwei na ye, asilikaki na bango, mpe atindaki ete basali na ye, soki te basali ya mokonzi, bakamata bango mpe baboma bango.

20 Sikawa basali bamonaki ntina ya bokwei ya mokonzi, boye bamekaki te kotia maboko na bango likolo ya Alona mpe bandeko na ye; mpe basambaki elongo na mwasi mokonzi kolobaka: Ntina nini etindi yo ete toboma bato oyo, ntango tala moko kati na bango azali makasi mingi koleka biso Nyonso? Boye tokokweya liboso na bango.

21 Sikawa emonaki mwasi mokonzi bobangi ya basali abandaki mpe lokola kobanga mpenza, mbele mabe makweyela ye. Mpe atindaki basali na ye bakende kobianga bato, ete bakoka koboma Alona mpe bandeko na ye.

22 Sikawa ntango Alona amonaki mokano ya mwasi mokonzi, ye, koyebaka lisusu ete mitema ya bato ezali makasi, abangaki mbele ebele ya bato basangana elongo, mpe ezala boweli mpe mbilinga-mbilinga na kati na bango; boye asembolaki loboko na ye mpe atelemisaki mokonzi uta na mabele, mpe alobaki epayi na ye: Telema. Mpe ye atelemaki na makolo na ye, kozwaka bokasi na ye.

23 Sikawa oyo esalemaki na miso ya mwasi mokonzi mpe mingi ya basali. Mpe ntango bamonaki yango bakamwaki mingi, mpe babandaki kobanga. Mpe mokonzi atelemaki liboso, mpe abandaki kosalela bango. Mpe asalelaki Nzambe mpo na bango, na lolenge ete baoyo ya ndako na ye mobimba babongwanaki mpo na Nkolo.

24 Sikawa ebele ya bato basanganaki esika moko na ntina ya motindo ya mwasi mokonzi, mpe koyima-yima monene ebandaki na kati na bango na ntina ya Alona mpe bandeko na ye.

25 Kasi mokonzi atelemaki liboso na kati na bango mpe ateyaki bango. Mpe bazwaki kimia epayi ya Alona mpe bango oyo bazalaki elongo na ye.

26 Mpe esalemaki ete ntango mokonzi amonaki ete bato bazwaki kimia, asalaki ete Alona mpe bandeko na ye batelema liboso na katikati ya ebele ya bato, mpe ete bateya bango liloba.

27 Mpe esalemaki ete mokonzi atindaki bosakoli epayi nyonso na mboka mobimba, na kati ya bato na ye nyonso oyo bazalaki na mboka na ye, oyo bazalaki na bituka nyonso nzinganzinga mpembeni, oyo ezalaki na ndelo kutu ya mbu, na esti mpe na westi, mpe oyo bikabwanaki uta na mboka ya Zalayemila penepene na esobe ya moke mpe ya molai, oyo ebendanaki uta na mbu ya esti kutu kino na mbu ya westi, mpe nzinganzinga mpembeni na ndelo ya libongo ya mbu, mpe na ndelo ya esobe oyo ezalaki na nordi ya mboka ya Zalayemila, na nzela ya ndelo ya Mati, penepene na moto ya ebale ya Sidoni, kobendanaka uta na esti kino na westi—na boye nde Balamani mpe Banefi bakabwanaki.

28 Sikawa, ndambo eleki goigoi ya Balamani bazalaki na esobe, mpe bafandaki na biema; mpe bapanzanaki kati na esobe na westi, na mboka ya Nefi; iyo, mpe na westi ya mboka ya Zalayemila, na ndelo penepene na libongo ya mbu, mpe na westi ya mboka ya Nefi, na esika ya bosangoli libula ya yambo ya batata na bango, mpe boye kolandaka ndelo ya libongo ya mbu.

29 Mpe lisusu ezalaki na Balamani mingi na esti ya libongo ya mbu, wapi Banefi babenganaki bango. Mpe boye Banefi bazalaki penepene na kozingama na Balamani; nzokande Banefi bakamataki ndambo nyonso ya nordi ya mboka oyo ezalaki na ndelo ya esobe, na moto ya ebale Sidoni, uta na esti kino na westi, nzinganzinga mpembeni na mopanzi ya esobe; na nordi, kutu kino bakomaki na mboka babiangaki Beboo.

30 Mpe ezalaki na ndelo likolo ya mboka oyo babiangaki Libebi, mpo nango ezalaki mosika mpenza epayi na nordi ete eyaki kati na mboka oyo ezalaka na bato mpe babebisamaki, baoyo kani mikuwa tolobelaki, oyo ebombolamaki na bato ya Zalayemila, mpo ezalaki esika ya bokomi na bango ya yambo na mboka.

31 Mpe bayaki uta kuna likolo kati na sudi ya esobe. Boye mboka epayi na nordi ebiangamaki Libebi, mpe mboka epayi na sudi ebiangamaki Beboo, mpo ezalaki esobe oyo etondi na banyama ya zamba ya ndenge na ndenge, ndambo moko na yango eyaki uta na mboka ya epayi na nordi mpo na bilei.

32 Mpe sikawa, mpo na Monefi ezalaki bobele mobembo ya ntaka ya mokolo moko na ndambo, na nzela alima mpo na kokatisa uta Beboo mpe na mboka Libebi, uta na esti kino na mbu ya westi; mpe boye mboka ya Nefi mpe mboka ya Zalayemila ezalaki penepene na kozingama na mai, mpe ezalaki na mwa nkingo ya mabele kati na mboka oyo ezalaki epayi na nordi mpe mboka oyo ezalaki epayi na sudi.

33 Mpe esalemaki ete Banefi bafandaki na mboka Beboo, kutu uta na esti kino na mbu ya westi, mpe boye Banefi na bwania na bango, na bakengeli na bango mpe mampinga na bango, bazingaki Balamani na sudi, ete na yango bazala lisusu te na bozwi na nordi, ete bakoka te koyangela mboka uta na nordi.

34 Boye Balamani bakokaki kozala lisusu te na bozwi bobele na mboka ya Nefi, mpe na esobe nzinganzinga mpembeni. Sikawa oyo ezalaki bwania epayi ya Banefi—lokola Balamani bazalaki banguna na bango, balingaki te koyoka mpasi ya mitungisi uta epayi na epayi, mpe lisusu ete bazala na mboka epayi wapi bakokaki kokima, engebene na mposa na bango.

35 Mpe sikawa ngai, esili ngai koloba oyo, nazongi lisusu na lisolo ya Amona mpe Alona, Omina mpe Imini, mpe bandeko na bango bandimi.

Bimisa na lokasa