Makomi
Alma 26


Mokapo 26

Amona akembeli Nkolo—Basembo balendisami na Nkolo mpe bapesami boyebi—Na bondimi bato bakoki komema nkoto na nkoto ya bato na boyamboli—Nzambe azali na nguya nyonso mpe asosolaka makambo nyonso. Penepene na mibu 90–77 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa, oyo ezali maloba ya Amona na bandeko na ye, oyo malobi boye: Bandeko mibali na ngai mpe bandeko na ngai bandimi, tala, nalobi epayi na bino ete, ntina monene boni tozali na yango mpo na kosepela; mpo ekokaki biso kobanza ntango tolongwaki uta na mboka ya Zalayemila ete Nzambe alingaki kopesa epayi na biso mapamboli monene boye?

2 Mpe sikawa, natuni, mapamboli monene kani apesi epayi na biso? Ekoki bino koyebisa?

3 Tala, nakoyanola mpo na bino; mpo bandeko na biso, Balamani, bazalaki na molili, iyo, kutu na lobwaku ya molili mingi koleka, kasi tala, lolenge nini mingi kati na bango bamemami mpo na komona pole ya kokamwa ya Nzambe! Mpe oyo ezali lipamboli oyo epesami epayi na biso, ete tokomisami bisalelo na maboko ya Nzambe mpo na kokokisa mosala monene oyo.

4 Tala, nkoto na nkoto na bango bazali kosepela, mpe bamemami kati na etonga ya Nzambe.

5 Tala, elanga ekomeli, mpe bopambolami, mpo bokataki na likwangola, mpe bobukaki na makasi na bino, iyo, bosalaki na bolayi ya mokolo mobimba; mpe tala motango ya maboke na bino! Mpe makosangisama na ebombelo, ete ebebisama te.

6 Iyo, makolalisama na nse te na ekumbaki na mokolo ya nsuka; iyo, mpe ekobakolama na mipepe ya kaina te; kasi ntango ekumbaki ekokoma makosangisama esika moko na esika na yango, ete ekumbaki ekoka kokotela yango te; iyo, mpe bakobenganama na mopepe makasi te na esika nyonso kani monguna akokana komema yango.

7 Kasi tala, bazali na maboko ya Nkolo ya bobuki mbuma, mpe bazali bato na ye; mpe akotelemisa bango na mokolo ya nsuka.

8 Nkombo ya Nzambe na biso epambolama; tika toyemba mpo na kosanzola ye, iyo, tika topesa matondi na nkombo na ye esantu, mpo asalaka bosembo libela.

9 Mpo, soki tobimaki uta na mboka ya Zalayemila te, bandeko balingami mingi na biso oyo, baoyo balingi biso mingi mpenza, balingaki bobele konyokwama na boyini na biso, iyo, mpe balingaki lisusu kozala bapaya na Nzambe.

10 Mpe esalemaki ete elobaki Amona maloba oyo, ndeko na ye Alona apamelaki ye, kolobaka: Amona, nazali kobanga ete bosepeli na yo emema yo mosika na bifundeli.

11 Kasi Amona alobaki epayi na ye: Nazali komikumisa na bokasi na ngai moko te, to na bwania na ngai moko te; kasi tala, bosepeli na ngai etondi, iyo, motema na ngai motondi na bosepeli, mpe nazali kosepela na Nzambe na ngai.

12 Iyo, nayebi ete nazali mpamba; na kotalaka bokasi na ngai nazali moto na bolembu; boye nakomikumisa ngai moko te, kasi nakomikumisa na Nzambe na ngai, mpo na bokasi na ye nakoki kosala makambo nyonso; iyo, tala, makamwisi mingi makasi tosali na mokili oyo, mpo na yango tokosanzola nkombo na ye libela.

13 Tala, nkoto boni ya bandeko na biso asili kokangola uta na bolozi ya lifelo; mpe bamemami mpo na koyemba bolingo oyo esikolaka, mpe oyo mpo na nguya ya liloba na ye oyo ezali na biso, boye ezali biso te na ntina monene ya kosepela te?

14 Iyo, tozali na ntina ya kosanzola ye libela, mpo azali Nzambe Aleki Likolo, mpe akangolaki bandeko na biso uta na miniololo ya lifelo.

15 Iyo, bazingamaki mpembeni na molili ya libela mpe bobebisami; kasi tala, amemaki bango kati na pole na ye ya libela, iyo, kati na lobiko ya libela; mpe bazingami mpembeni na boike ya bolingo na ye boye ekoki kokokisama te; iyo, mpe tozali bisaleli na maboko na ye na kosalaka mosala oyo monene mpe ya kokamwa.

16 Yango wana, tika tokembela, iyo, tokokembela na Nkolo; iyo, tokosepela, mpo bosepeli na biso botondi; iyo, tokosanzola Nzambe na biso libela. Tala, nani akoki kokembela mingi mpenza na Nzambe? Iyo, nani akoki kolobela mingi mpenza nguya monene na ye, mpe boboto na ye, mpe motema molai na ye epayi na bana ya bato? Tala, nalobi epayi na bino, nakoki te kolobela ata mwa ndambo moke koleka ya oyo nazali koyoka.

17 Nani akokaki kobanza ete Nzambe na biso alingaki kotondisama na boboto mpenza na lolenge ya kolongola biso uta na ezalela na biso ya nsomo, ya masumu, mpe bosantoli?

18 Tala, tokendaki kutu na nkele, na bokaneli bonene mpo na kobebisa eklezia na ye.

19 O bongo nde sikawa, ntina nini atindaki biso te kozala mpo na bobebisami ya nsomo, iyo, ntina nini atindaki te mompanga ya boyengebene mokweya likolo na biso, mpe atikaki biso na bozangi elikya ya seko?

20 O, molimo na ngai, lokola soki ezalaki, ekimaki na likanisi yango. Tala, asalelaki boyengebene na ye likolo na biso te, kasi na boboto monene na ye amemi biso na kokatisaka libulu wana ya liwa ya libela mpe ya mpasi, kutu mpo na lobiko ya milimo na biso.

21 Mpe sikawa tala, bandeko na ngai, nani moto ya mokili oyo ayebi makambo oyo? Nalobi epayi na bino ete, ezali na moko te oyo ayebi makambo oyo, longola se soki azali moyamboli.

22 Iyo, ye oyo ayamboli, mpe azali kosalela bondimi, mpe azali kobimisa misala malamu, mpe azali kosambela ntango nyonso na kotikaka te—epayi na ye epesami koyeba mibombamo ya Nzambe; iyo, epayi na ye ekopesama kobimisa makambo oyo ebimiebimisama nano te; iyo, mpe ekopesama epayi na ye komema nkoto na nkoto ya milimo na boyamboli, kutu lokola epesamaki epayi na biso komema bandeko na biso baye na boyamboli.

23 Sikawa bomikundola, bandeko na ngai, ete tolobaki epayi ya bandeko na biso na mboka ya Zalayemila, tokeyi na mboka ya Nefi, mpo na koteya epayi ya bandeko na biso, Balamani, mpe basekaki biso na lolenge ya kotiola?

24 Mpo balobaki epayi na biso: Ezali bino kobanza ete bokoki komema Balamani na boyebi ya bosolo? Ezali bino kobanza ete bokoki kondimisa Balamani na mabe ya mimesano ya batata na bango, bato ya matoyi mangongi lokola bazali; baoyo kani mitema esepelaka na bosopi makila; baoyo kani mikolo balekisi na mabe eleki mingi; baoyo kani banzela ezali se ya bobuki mobeko uta na ebandeli? Sikawa bandeko na ngai, bomikundoli ete oyo ezalaki elobeli na bango.

25 Mpe lisusu balobaki: tokamata manduki mpo na kobunda na bango, ete tobebisa bango mpe mabe na bango uta na mboka, mbele bamatela biso mpe babebisa biso.

26 Kasi tala, bandeko balingami na ngai, toyaki kati na esobe te na mokano ya kobebisa bandeko na biso, kasi na mokano ete mbele tokoka kobikisa mwa ndambo ya milimo na bango.

27 Sikawa ntango mitema na biso milembaki, mpe ezalaki biso penepene na kozonga nsima, tala, Nkolo abondisaki biso, mpe alobaki: Bokende na kati ya bandeko na bino, Balamani, mpe bomema mitungisi na bino na bompikiliki, mpe nakopesa epayi na bino elonga.

28 Mpe sikawa tala, toyei, mpe tozali na kati na bango; mpe tozali na bompikiliki na mpasi na biso, mpe toyokaki mpasi ya bozangi nyonso; iyo, totambolaki mobembo uta ndako na ndako, kotalelaka boboto ya mokili—bobele boboto ya mokili kaka te, kasi boboto ya Nzambe.

29 Mpe tokotaki na bandako na bango mpe toteyaki bango, mpe toteyaki bango na balabala na bango; iyo, mpe toteyaki bango likolo ya bangomba na bango ya mike mike; mpe tokotaki lisusu na batempelo na bango mpe na basinagoga na bango mpe toteyaki bango; mpe babwakaki biso libanda, mpe batiolaki biso, mpe babwakaki biso nsoi, mpe babetaki biso likolo ya matama na biso; mpe babwakelaki biso mabanga, mpe bakangaki biso singa makasi, mpe babwakaki biso na boloko; mpe na nzela ya nguya mpe bwania ya Nzambe tobikisamaki lisusu.

30 Mpe toyokaki mpasi ya ndenge nyonso ya mitungisi, mpe oyo nyonso, ete mbele tokoka kozala nzela ya kobikisa boko molimo; mpe tobanzaki ete bosepeli na biso ekozala ya kotonda soki mbele tokoki kozala nzela ya kobikisa ndambo.

31 Sikawa tala, tokoki kotala mpe komona mbuma ya misala na biso; mpe ezali yango misala mike? Nalobi epayi na bino, Te, ezali misala mingi; iyo, mpe tokoki kotatola bosolo ya myango, na ntina ya bolingo na bango epayi na bandeko na bango mpe lisusu epayi na biso.

32 Mpo tala, bakokaki malamu kobonza kutu bomoi na bango lokola mbeka na esika ya kokamata bomoi ya banguna na bango; mpe bakundaki bibundeli na bango ya bitumba kati na mozindo ya mabele, na ntina ya bolingo na bango epayi ya bandeko na bango.

33 Mpe sikawa tala nalobi epayi na bino, ezalaki na bolingo monene boye na mboka mobimba? Tala, nalobi epayi na bino, Te, ezali te, kutu na kati ya Banefi.

34 Mpo tala, bakokaki kokamata manduki mpo na kobunda na bandeko na bango; bakokaki kopesa nzela ete babomama te. Kasi tala motango boni mingi ya baoyo bakitisi bomoi na bango; na nse mpe toyebi ete bakei na Nzambe na bango, na ntina ya bolingo na bango mpe na ntina ya boyini na bango na kotalaka masumu.

35 Sikawa, ezali biso na ntina ya kosepela te? Iyo, nalobi epayi na bino, ezalaki na bato soki moke oyo bazalaki na ntina ya kosepela lokola biso te, uta mokili ebanda, iyo, mpe bosepeli na ngai bomemami mosika, kutu kino na bifundeli na Nzambe na ngai; mpo azali na nguya nyonso, bwania nyonso, mpe bososoli nyonso, asosolaka makambo nyonso; mpe azali Mozali moko oyo atonda na boboto, kutu kino na lobiko, na bango oyo bayambolaka mpe bandimaka na nkombo na ye.

36 Sikawa soki oyo ezali bifundeli, kutu bongo nde nakobeta ntolo; mpo oyo ezali bomoi na ngai mpe pole na ngai, bosepeli na ngai mpe lobiko na ngai, mpe bosikoli na ngai uta na lisuma ya libela. Iyo, nkombo ya Nzambe na ngai epambolama, oyo azwi likanisi mpo na bato oyo, oyo bazali etape moko ya nzete ya Yisalaele, mpe oyo ebungaki uta na mobimba na yango na mboka mopaya; iyo, nalobi, nkombo ya Nzambe na ngai epambolama, oyo azwi likanisi mpo na biso, mitelengano na mboka mopaya.

37 Sikawa bandeko na ngai, tomoni ete Nzambe azwi likanisi mpo na bato nyonso, ezala na mboka nyonso kani bakoki kozala; iyo, atangaka bato na ye, mpe nsopo na ye ya boboto ezali likolo ya mabele nyonso. Sikawa oyo ezali bosepeli na ngai, mpe bopesi matondi monene na ngai; iyo, mpe nakopesa matondi epayi ya Nzambe na ngai libela. Amene.

Bimisa na lokasa