Makomi
Alma 3


Mokapo 3

Baamalisi bamiti elembo engebene na maloba ya masakoli—Balamani balakelami mabe mpo na botomboki na bango—Bato nde bamemaka bolakeli mabe na bango moko likolo na bango moko—Banefi balongi limpinga mosusu ya Balamani. Penepene na mibu 87–86 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe esalemaki ete Banefi baoyo babomamaki te na bibundeli ya etumba, esilaki bango kokunda baoyo babomamaki—sikawa motango ya baye babomamaki motangamaki te, na ntina ya monene ya motango na bango—esilaki bango kokunda bakufi na bango bazongaki nyonso na mboka na bango, mpe na ndako na bango, mpe basi na bango, mpe bana na bango.

2 Sikawa basi mpe bana mingi babomamaki na mompanga, mpe lisusu mingi ya bibwele na bango mpe bitonga na bango; mpe lisusu mingi ya mbuma ya bilanga na bango ebebisamaki, mpo eniatamaki na mampinga ya bato.

3 Mpe sikawa mingi ya Balamani mpe Baamalisi baoyo babomamaki likolo ya libongo ya ebale Sidoni babwakamaka kati na mai ya Sidoni; mpe tala mikuwa na bango ezali kati na mozindo ya mbu, mpe bazali mingi.

4 Mpe Baamalisi bakesenisamaki na Banefi, mpo bamitiaki elembo ya motane na bilongi na bango na lolenge ya Balamani; nzokande bakokolaki nsuki ya mitu na bango te lokola Balamani.

5 Sikawamitu ya Balamani ezalaki kolokolo; mpe bazalaki bolumbu, longola se mpo na mposo oyo balataki ya kokanga na nketo na bango, mpe lisusu bibundeli na bango, oyo balataki ya kokangama na nzoto na bango, mpe matimbo na bango, mpe makula na bango, mpe mabanga na bango, mpe bilingongo na bango, mpe bongo na bongo.

6 Mpe mposo ya nzoto ya Balamani ezalaki mwindo, engebene na elembo oyo etiamaki likolo ya batata na bango, oyo ezalaki elakeli mabe likolo na bango na ntina ya bobuki mobeko na bango mpe botomboki na bango na bandeko na bango, baoyo bazalaki Nefi, Yakobo, mpe Yosefe, mpe Sami, baoyo bazalaki bato ya alima mpe basantu.

7 Mpe bandeko na bango balukaki kobebisa bango, yango wana balakelamaki mabe; mpe Nkolo Nzambe atiaki elembo likolo na bango, iyo, likolo ya Lamani mpe Lemuele, mpe lisusu bana mibali ya Yisamaele, mpe basi ya Bayisamaele.

8 Mpe oyo esalemaki ete nkona na bango ekoka kokesenisama na nkona ya bandeko na bango, ete na yango Nkolo Nzambe akoka kobatela bato na ye, ete bakoka kosangisama te mpe kondima mimesano mabe oyo ekokaki komema bobebisami na bango.

9 Mpe esalemaki ete moto nyonso oyo asangisaki nkona na ye na oyo ya Balamani amemaki mpe lokola bolakeli mabe likolo ya nkona na ye.

10 Boye, moto nyonso oyo apesaki nzela ye moko ya kokambama na Balamani babiangamaki na nse ya nkombo wana, mpe ezalaki na elembo moko etiami likolo na ye.

11 Mpe esalemaki ete moto nyonso oyo alingaki te kondima momeseno ya Balamani, kasi andimaki masolo ya makomi oyo bamemaki uta na mboka ya Yelusaleme, mpe lisusu momeseno ya batata na bango, oyo ezalaki solo, oyo andimaki mitindo ya Nzambe mpe abatelaki yango, babiangamaki Banefi, to bato ya Nefi, uta na ntango wana kokende liboso—

12 Mpe ezali bango oyo babombaki masolo ya makomi oyo ezali solo mpo na oyo etali bato na bango, mpe lisusu mpo na oyo etali bato ya Balamani.

13 Sikawa tokozonga lisusu na Baamalisi, mpo bango mpe lokola bazalaki na elembo yoko etiami likolo na bango; iyo, batiaki elembo yango likolo na bango moko, iyo, kutu elembo moko ya motane likolo ya bilongi na bango.

14 Boye liloba ya Nzambe ekokisamaki, mpo tala oyo ezali maloba oyo alobaki epayi na Nefi: Tala, Balamani nde nalakeli mabe, mpe nakotia elembo likolo na bango ete bango mpe nkona na bango bakoka kokabwana na yo mpe na nkona na yo, uta sikawa mpe libela, longola se soki bayamboli uta na nkuna na bango mpe babaluki epayi na ngai ete nakoka kolakisa boboto likolo na bango.

15 Mpe lisusu: Nakotia elembo moko likolo na ye oyo akosangisa nkona na ye na bandeko na yo, ete bango mpe bakoka kolakelama mabe lokola.

16 Mpe lisusu: Nakotia elembo yoko likolo na ye oyo akobunda na yo mpe nkona na yo.

17 Mpe lisusu, nalobi epayi na yo ete ye oyo akokabwana na yo akobiangama lisusu te nkona na yo; mpe nakopambola yo, mpe moto nyonso oyo akobiangama nkona na yo, uta sikawa mpe libela; mpe oyo ezalaki bilaka ya Nkolo epayi ya Nefi mpe na nkona na ye.

18 Sikawa Baamalisi bayebaki te ete bazalaki kokokisa maloba ya Nzambe ntango babandaki komitia elembo na bilongi na bango; nzokande bakomaki na botomboki ya polele na Nzambe; boye elongobanaki ete bolakeli mabe ekweya likolo na bango.

19 Sikawa nalingi bomona ete bamemaki bolakeli mabe yango likolo na bango moko; mpe kutu ezali bongo nde moto na moto oyo alakelami mabe amemaka ye moko bokweisami na ye moko.

20 Sikawa esalemaki ete mikolo mingi te nsima ya etumba oyo ebundamaki na mboka ya Zalayemila, na Balamani mpe Baamalisi, ete ezalaki na limpinga mosusu ya Balamani oyo eyaki kobundisa bato ya Nefi, na esika se moko wana wapi limpinga ya yambo ekutanaki na Baamalisi.

21 Mpe esalemaki ete ezalaki na limpinga moko oyo batindaki mpo na kobengana bango uta na mboka na bango.

22 Sikawa Alma ye moko lokola atungisamaki na mpota moko amataki te na etumba na ntango oyo kobunda na Balamani;

23 Kasi atindelaki bango limpinga moko monene; mpe bakendaki mpe babomaki Balamani mingi, mpe babenganaki baoyo batikalaki na bango libanda ya ndelo ya mboka na bango.

24 Mpe nde bazongaki lisusu mpe babandaki kofandisa kimia na mboka, wana etungisamaki bango lisusu te mpo na ntango yoko na banguna na bango.

25 Sikawa, makambo nyonso oyo masalemaki, iyo, bitumba mpe boweli boye nyonso ebandaki mpe esilaki na mobu ya mitano ya boyangeli ya basambisi.

26 Mpe na mobu moko, nkoto moko mpe zomi ya bankoto ya milimo mitindamaki na mokili ya seko, ete bakoka kobuka mbano na bango engebene na misala na bango, soki ezalaki malamu to soki ezalaki mabe, mpo na kobuka esengo ya seko to mpasi ya seko, engebene na molimo oyo balingaki kotosa, soki ezalaki molimo malamu to molimo mabe.

27 Mpo moto na moto azwaki lifuta na ye uta na ye oyo alingaki kotosa, mpe oyo engebene na maloba ya molimo ya masakoli; boye tika yango esalema engebene na bosolo. Mpe boye nde esili mobu ya mitano ya boyangeli ya basambisi.

Bimisa na lokasa