Makomi
Alma 40


Mokapo 40

Klisto asali ete bosekwi ya bato nyonso esalema—Basembo baoyo bakufa sembo bakokende na paladiso mpe bato ya nkuna na molili ya libanda mpo na kozela mokolo ya bosekwi na bango—Na Bosekwi biloko nyonso bikozongisama na lolenge na yango ya malamu mpe ya bobongi nie. Penepene na mobu 74 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Sikawa mwana mobali na ngai, awa ezali mwa moke lisusu nalingi koloba epayi na yo; mpo nasosoli ete mayele na yo ezali kotungisama mpo na oyo etali bosekwi ya bakufi.

2 Tala, nalobi epayi na yo, ete ezali na bosekwi te—to, nalingi koloba, na maloba mosusu, ete kufa oyo ekolata bozangi kufa te, bopoli boye ekolata bozangi kopola te—kino nsima ya boyei ya Klisto.

3 Tala, akosala ete bosekwi ya bakufi esalema. Kasi tala, mwana mobali na ngai bosekwi ezali naino te. Sikawa, nakobimisa epayi na yo mobombamo moko; nzokande, ezali na mibombamo mingi oyo ebombami, ete moko te ayebi yango longola se Nzambe ye moko. Kasi nazali kolakisa epayi na yo likambo moko oyo nalukaki na molende na Nzambe ete nakoka koyeba—elingi koloba mpo na oyo etali bosekwi.

4 Tala, ezali na ntango moko elakelama ete nyonso bakoya uta na bakufi. Sikawa ntango oyo ekoya moto moko te ayebi; kasi Nzambe ayebi ntango oyo elakelami.

5 Sikawa, soki ekozala ntango moko, to ntango ya mibale, to ntango ya misato, ete bato bakoya uta na bakufi, ezali na likambo te; mpo Nzambe ayebi makambo oyo nyonso; ekoki na ngai koyeba ete oyo ezali likambo—ete ezali na ntango oyo elakelama ete bato nyonso bakosekwa uta na bakufi.

6 Sikawa esengeli mpenza ezala na ntaka moko katikati ya ntango ya liwa mpe ntango ya bosekwi.

7 Mpe sikawa nalingi natuna nini ekokoma na milimo ya bato uta na ntango oyo ya liwa na ntango oyo elakelama mpo na bosekwi?

8 Sikawa soki ezali na ntango koleka moko oyo elakelama mpo na bato kosekwa ezali likambo te; mpo bato nyonso bakokufa te mbala moko, mpe oyo ezali likambo te; nyonso ezali lokola mokolo moko epayi ya Nzambe, mpe ntango emekami bobele mpo na bato.

9 Boye, ezali na ntango moko oyo elakelama mpo na bato ete bakosekwa uta na bakufi; mpe ezali na ntaka moko na kati ya ntango ya liwa mpe ntango ya bosekwi. Mpe sikawa, mpo na oyo etali ntaka ya ntango, nini ekokoma na milimo ya bato ezali likambo oyo natunaki na molende na Nkolo mpo na koyeba; mpe oyo ezali likambo oyo nayebi.

10 Mpe ekoya ntango nyonso bakosekwa, nde bango bakoyeba ete Nzambe ayebi ntango nyonso oyo alakaki mpo na moto.

11 Sikawa, mpo na oyo etali ezalela ya molimo na kati ya liwa mpe bosekwi—tala, eyebisamaki epayi na ngai na anjelu moko, ete milimo ya bato nyonso, sasaipi lokola milongwe uta na nzoto oyo ya kufa, iyo, milimo ya bato nyonso, soki bazalaki malamu soki te mabe, mizongisami epayi na yango na Nzambe oyo apesaki yango bomoi.

12 Mpe nde ekosalema ete, milimo na bango oyo bazali sembo mikoyambama na ezalela ya esengo, oyo ebiangami paladiso, ezalela moko ya bopemi, ezalela moko ya kimia, wapi bakopema uta na mikakatano nyonso na bango mpe uta na mitungisi nyonso, mpe mawa.

13 Mpe bongo ekosalema, ete milimo ya bato ya nkuna, iyo, baoyo bazali mabe—mpo tala, bazali na likabo te mpe ndambo moko te ya Molimo ya Nkolo; mpo tala, bango baponaki misala mabe na esika ya misala malamu; boye molimo ya zabulu ekotelaki bango, mpe ezwi ndako na bango—mpe baoyo bakobenganama na molili ya libanda; kuna ekozala boleli, mpe bilela-lela, mpe boliani mino, mpe oyo na ntina ya mabe na bango moko, mpo bakambamaki bakangemi na bolingi ya zabulu.

14 Sikawa oyo ezali ezalela ya milimo ya bato ya nkuna, iyo, na molili, mpe ezalela moko ya nsomo, ya kotalaka na bobangi mpo na bosiliki makasi ya nkele ya Nzambe likolo na bango; boye batikali na ezalela oyo, basembo lokola mpe na paladiso, kino na ntango ya bosekwi na bango.

15 Sikawa, ezali na boko bato oyo basosoli ete ezalela oyo ya esengo mpe ezalela oyo ya mpasi ya molimo, yambo na bosekwi, ezalaki bosekwi ya yambo. Iyo, nandimi ekoki kobiangama bosekwi, bosekwi ya molimo mpe botindami na yango na esengo to na mawa, engebene na maloba oyo elobamaki.

16 Mpe tala, lisusu elobamaki, ete ezali na bosekwi moko ya yambo, bosekwi ya bato nyonso oyo bazalaki, to oyo bazali, to oyo bakozala, kino na bosekwi ya Klisto uta na bakufi.

17 Sikawa, tobanzi te ete bosekwi boye ya yambo, boye bolobami na lolenge oyo, ekoki kozala bosekwi ya milimo mpe botindami na yango na esengo to na mpasi. Okoki te kobanza ete oyo ezali nini yango elingi koloba.

18 Tala, nalobi epayi na yo, Te; kasi elingi koloba bosangani lisusu ya molimo na nzoto, ya bango oyo bazalaki uta na mikolo ya Adama kino na bosekwi ya Klisto.

19 Sikawa, soki milimo mpe nzoto na bango oyo balobami ekosangana na mbala moko, bato ya nkuna lokola mpe basembo, nalobi te; tika ekoka, ete nalobi ete nyonso bakobima; soki te na maloba mosusu, bosekwi na bango ekosalema yambo ya bosekwi na bango oyo bakufi nsima ya bosekwi ya Klisto.

20 Sikawa, mwana mobali na ngai, nalobi te ete bosekwi na bango ekoya na bosekwi ya Klisto; kasi tala, napesi yango lokola likanisi ya ngai, ete milimo mpe nzoto ekosangana, oyo ya basembo, na bosekwi ya Klisto, mpe na bobuti na ye na lola.

21 Kasi soki ekozala na bosekwi na ye to nsima, nalobi te; kasi oyo nabeti sete mpenza, ete ezali na ntaka moko ya ntango kati na liwa mpe bosekwi ya nzoto, mpe ezalela ya molimo kati na esengo to na mpasi kino na ntango oyo elakelami na Nzambe ete bakufi bakobima, mpe bakosangisama, nyonso mibale molimo mpe nzoto, mpe komemama mpo na kotelema liboso ya Nzambe, mpe basambisama engebene na misala na bango.

22 Iyo, oyo esali ete bozongisi ya biloko wana oyo bilobamaki na minoko ya baprofeta esalema.

23 Molimo ekozongisama na nzoto, mpe nzoto na molimo; iyo, mpe enama na enama mpe ekangisele na ekangisele ekozongisama na nzoto na yango; iyo, kutu nsuki moko ya moto ekobunga te; kasi biloko nyonso bikozongisama na nzoto na yango ya malamu mpe ya kobonga nie.

24 Mpe sikawa, mwana mobali na ngai, oyo ezali bozongisi oyo elobamaki na minoko ya baprofeta—

25 Mpe na ntango wana basembo bakongenge na bokonzi ya Nzambe.

26 Kasi tala, liwa ya nsomo ekoya epayi ya bato ya nkuna; mpo bakufaka na kotalaka makambo matali makambo ya bosembo; mpo bazali na mbindo, mpe eloko moko te ya mbindo ekoki kosangola libula ya bokonzi ya Nzambe; kasi babenganami libanda, mpe batindami mpo na kolia mbuma ya mikumba na bango to misala na bango, oyo ezalaki mabe; mpe bakomela mbondo ya nkeni moko ya bololo.

Bimisa na lokasa