Makomi
Etele 13


Mokapo 13

Etele alobi mpo na oyo etali Yelusaleme ya Sika oyo ekotongama na Amerika na nkona ya Yosefe—Asakoli, abenganami, akomi mambi ya kala ya Bayelede, mpe alobeli bobebisami ya Bayelede yambo ete esalema—Etumba ekomi ndongo likolo ya mboka mobimba.

1 Mpe sikawa ngai, Moroni, nalingi kosilisa lisolo ya makomi na ngai mpo na oyo etali bobebisami ya bato na ntina ya baye wapi nakomi.

2 Mpo tala, babwakaki maloba nyonso ya Etele; mpo solo ayebisaki bango makambo nyonso, uta na ebandeli ya moto; mpe ayebisaki bango ete esilaki mai kokawuka uta na etando ya mboka oyo, mboka yango ekomaki mboka ya boponi koleka bamboka nyonso mosusu, mboka moko eponami na Nkolo; yango wana Nkolo alingi ete bato nyonso baoyo bakofanda likolo ya etando na yango basengeli kosalela ye;

3 Mpe ete ezalaki esika ya Yelusaleme ya Sika, oyo ekokita uta na lola, mpe ndako esantu ya Nkolo.

4 Tala, Etele amonaki mikolo ya Klisto, mpe alobaki mpo na oyo etali Yelusaleme moko ya Sika likolo ya mboka oyo.

5 Mpe alobaki lisusu mpo na oyo etali ndako ya Yisalaele, mpe Yelusaleme uta wapi Lehi akoya—ete ekosila yango kobebisama, ekotongama lisusu, engumba moko esantu mpo na Nkolo; yango wana, Yelusaleme ya sika ekokaki te kozala mpo ezalaki na ntango ya kala; kasi ekotongama lisusu, mpe ekokoma engumba moko esantu ya Nkolo; mpe ekotongama mpo na ndako ya Yisalaele—

6 Mpe ete Yelusaleme moko ya Sika ekotongama likolo ya mboka oyo, mpo na montika ya nkona ya Yosefe, makambo oyo wapi ezalaki se emekoleli.

7 Mpo kaka lokola Yosefe amemaki tata na ye na mboka ya Ejipito, kutu bongo akufaki kuna; yango wana, Nkolo amemaki montika ya nkona ya Yosefe uta na mboka ya Yelusaleme, ete akoka kotondisama na boboto epayi na nkona ya Yosefe, ete bawa te, kaka lokola atondisamaki na boboto epayi ya tata ya Yosefe ete awa te.

8 Yango wana, montika ya ndako ya Yosefe ekotongama likolo ya mboka oyo; mpe ekozala mboka ya bosangoli libula na bango; mpe bakotonga engumba moko esantu mpo na Nkolo, lokola Yelusaleme ya kala; mpe bakobulunganisama lisusu te, kino ekoya nsuka, ntango mabele makoleka.

9 Mpe ekozala na lola ya sika mpe mabele ya sika; mpe ekozala lokola oyo ya kala longola se oyo ya kala elekaki, mpe makambo nyonso makomi sika.

10 Mpe nsima nde ekoya Yelusaleme ya Sika; mpe baoyo bafandi kuna bapambolami, mpo ezali bango oyo kani bilamba ezali mpembe na nzela ya makila ya Mwana ya mpate; mpe ezali bango oyo batangami na kati ya montika ya nkona ya Yosefe, oyo bazalaki bato ya ndako ya Yisalaele.

11 Mpe na ntango wana lisusu Yelusaleme ya kala ekotiama; mpe bazali bato bapambolami, bafandi ya yango, mpo basukwami na makila ya Mwana ya mpate; mpe ezali bango oyo bapanzamaki mpe basanganaki uta na ntaka minei ya mabele, mpe uta na bikolo ya nordi, mpe bazali bakaboli ya mapamboli uta na bokokisi ya liyokani oyo Nzambe asalaki elongo na tata na bango, Abalayama.

12 Mpe ntango ekosalema makambo oyo, nde ekokisama makomi oyo malobi ete, ezali na baoyo wana bazalaki bato ya yambo, oyo bakozala bato ya nsuka, mpe ezali na baye wana bazali bato ya nsuka, baoyo bakozala bato ya yambo.

13 Mpe nazalaki penepene na kokoma makambo mingi, kasi napekisamaki; kasi masakoli ya Etele ezalaki minene mpe ya kokamwa; kasi bamonaki ye lokola mpamba, mpe babenganaki ye; mpe abombanaki ye moko kati na libulu ya libanga moko na moi, mpe na butu akendaki kotalaka makambo oyo ezalaki kosalema epayi ya bato.

14 Mpe lokola afandaki kati na libulu ya libanga moko asalaki ndambo etikalaki ya lisolo ya makomi oyo, kotalaka bobebisami boye eyaki likolo ya bato, na butu.

15 Mpe esalemaki ete na mobu se moko wana wapi babenganaki ye uta na kati ya bato etumba ebandaki kokoma monene na kati ya bato, mpo ezalaki na mingi baoyo babimaki, oyo bazalaki bato ya makasi, mpe balukaki kobebisa Koliantumili na miango na bango ya nkuku ya nkuna, oyo milobamaki.

16 Mpe sikawa Koliantumili, lokola ayekolaki, ye moko, ntoki ya etumba mpe mayele nyonso ya mokili, yango wana abundisaki bango oyo balukaki kobebisa ye.

17 Kasi ayambolaki te, bana mibali mpe bana basi kitoko na ye mpe te; bana mibali mpe bana basi kitoko ya Kowolo mpe te; bana mibali mpe bana basi kitoko ya Koliyolo mpe te; mpe mpo na kosukisa, ezalaki na moko te kati na bana mibali mpe bana basi kitoko likolo ya etando ya mabele mobimba baoyo bayambolaki uta na masumu na bango.

18 Yango wana, esalemaki ete na mobu ya yambo oyo Etele afandaki kati na libulu ya libanga, ezalaki na mingi ya bato oyo babomamaki na mompanga mwa makelemba wana ya nkuku, kobundaka na Koliantumili ete bakoka kozwa bokonzi.

19 Mpe esalemaki ete bana mibali ya Koliantumili babundaki mingi mpe basopaki makila mingi.

20 Mpe na mobu ya mibale maloba ya Nkolo eyaki epayi ya Etele, ete akende kosakola epayi ya Koliantumili ete, soki akoyambola, mpe bato nyonso oyo ya ndako na ye, Nkolo akopesa epayi na ye bokonzi na ye mpe akobatela bato—

21 Soki te bakobebisama, mpe baye ndako na ye mobimba longola se ye moko. Mpe akozala na bomoi bobele mpo na komona bokokisi ya masakoli oyo elobamaki mpo na oyo etali bato basusu bakozwa mboka mpo na bosangoli libula na bango; mpe Koliantumili akokundama na bango; mpe moto nyonso akobomama longola se Koliantumili.

22 Mpe esalemaki ete Koliantumili ayambolaki te, baoyo ya ndako na ye mpe te, mpe bato ya mboka mpe te; mpe bitumba bisilaki te; mpe balukaki koboma Etele, kasi akimaki uta na liboso na bango mpe abombanaki lisusu na libulu ya libanga.

23 Mpe esalemaki ete Saledi abimaki, mpe abundisaki Koliantumili; mpe alongaki ye, na lolenge ete na mobu ya misato, amemaki ye kati na bokangemi.

24 Mpe bana mibali ya Koliantumili, na mobu ya minei, balongaki Saledi, mpe bazwaki bokonzi lisusu mpo na tata na bango.

25 Sikawa etumba moko ebandaki na etando mobimba ya mboka, moto na moto elongo na lingomba na ye kobundaka mpo na oyo azalaki na yango mposa.

26 Mpe ezalaki na bayongoli, mpe mpo na kosukisa, ndenge nyonso ya nkuna likolo ya etando mobimba ya mboka.

27 Mpe esalemaki ete Koliantumili asilikaki mingi koleka na Saledi, mpe akendaki kobunda na ye elongo na mampinga na ye; mpe bakutanaki kati na nkanda monene, mpe bakutanaki na lobwaku ya Giligali; mpe etumba ekomaki ya nsomo mingi koleka.

28 Mpe esalemaki ete Saledi abundaki na ye mpo na ntaka ya mikolo misato. Mpe esalemaki ete Koliantumili alongaki ye, mpe alandaki ye kino ayaki na mabele ya polele ya Esiloni.

29 Mpe esalemaki ete Saledi abundisaki ye lisusu na mabele ya polele; mpe tala, alongaki Koliantumili, mpe abenganaki ye nsima lisusu na lobwaku ya Giligali.

30 Mpe Koliantumili abundisaki lisusu Saledi na lobwaku ya Giligali, wapi alongaki Saledi mpe abomaki ye.

31 Mpe Saledi azokisaki Koliantumili na ebelo, ete akendaki lisusu te kobunda mpo na ntaka ya mibu mibale, na ntango oyo wapi bato nyonso likolo ya etando ya mboka bazalaki kosopaka makila, mpe ezalaki na moto te mpo na kokanga bango.

Bimisa na lokasa