Makomi
Ndimbola ekuse etali Buku ya Molomoni


Ndimbola ekuse etali
Buku ya Molomoni

Buku ya Molomoni ezali nsango ya bule ya bato ba Amerika ya kala, mpe ekomama likolo lya nkasa ya ebende. Ndenge inei ya palaki ya ebende ilobelami o buku eye:

  1. Palaki ya Nefi, iye izalaki ndenge ibale: Palaki Ike mpe Palaki Inene. Ya yambo itali mpenza makambo ma molimo mpe misala mpe mateya ma baprofeta, nzokande ya nsuka izalaki mpenza na mambi ma mokili ma bato balobelami (1 Nefi 9:2–4). Uta ntango ya Moziya, nzokande, Palaki Inene izalaki mpe na biteni bya motuya monene bya molimo.

  2. Palaki ya Molomoni, iye ikwi bokuse bokomama na Molomoni uta o Palaki Inene ya Nefi, na ndimbola mingi. Palaki iye izalaki lisusu na elandeli ya mambi makomama na Molomoni mpe mabakisi ma mwana mobali wa ye Moloni.

  3. Palaki ya Etele, iye ilakisi mambi ma Bayelede. Likundoli liye likomamaki na bokuse na Moloni, oyo akotisaki ndimbola ya yemei mpe asangisaki likundoli liye na bonkoko mobimba na nse ya nkombo ya “Buku ya Etele.”

  4. Palaki ya Motako imememe na bato ba Lehi uta o Yelusaleme o mobu 600 Yambo ya Klisto. Izalaki na “buku itano iye ya Mose,…Mpe lisusu likundoli lyoko lya Bayuda uta o ebandeli,…kina o ebandeli ya bokonzi bwa Sidikiya, mokonzi wa Yuda; Mpe lisusu mabikuli ma baprofeta basantu” (1 Nefi 5:11–13). Matangi mingi uta o palaki iye, matangi Yisaya mpe baprofeta basusu ba Biblia mpe baye ba Biblia te, mamononi o Buku ya Molomoni.

Buku ya Molomoni ikwi biteni zomi na bitano to makabwani, biyebani, na bolongoli boko, lokola buku , buku enso ebiangemi na nkombo ya mokomi mwa yango monene. Ndambo ya yambo (buku motoba ya yambo, nsuka o Omini) ezali bobongoli boko uta o Palaki Ike ya Nefi. O kati ya buku ya Omini mpe Moziya ekotisami eteni yoko ebiangema Maloba ma Molomoni. Likotisi liye likangisi likundoli likomama o Palaki Ike na bokuse ya Molomoni ya Palaki Inene.

Ndambo eleki elai, uta Moziya kina Molomoni, mokapo 7, eye na kati lokola, ezali bobongoli bwa bokuse bwa Molomoni bwa Palaki Inene ya Nefi. Ndambo ya kosukisa, uta Molomoni, mokapo 8, kina nsuka ya liboke, ekomamaki na Moloni mwana wa Molomoni, oyo, esilisaki ye nsango ya bomoi bwa tata wa ye, asalaki bokuse boko bwa Bayelede (lokola Buku ya Etele) mpe nsima mingi abakisaki biteni biyebana lokola Buku ya Moloni.

Na to penepene na mobu 421 Mobu mwa Mokonzi, Moloni, profeta-mokomi-bonkoko wa nsuka ya Banefi, akangaki likundoli liye lya bule mpe abombaki lyango epai ya Nkolo, mpo ebimisama lisusu o mikolo mya nsuka, lokola elobamaki yambo esalema o mongongo mwa Nzambe na lisalisi lya baprofeta ba ye ba kala. O 1823 Mobu mwa Mokonzi, Moloni oyo kaka, nde moto asekwa, abimelaki Profeta Joseph Smith mpe o bolandi apesaki palaki ekomama epai ya ye.

Bimisa na lokasa