Makomi
Mosiya 15


Mokapo 15

Lolenge kani Klisto azali nyonso mibale Tata mpe Mwana—Akosala libondeli mpe akokumba bobuki mobeko ya bato na Ye—Bango mpe baprofeta basantu nyonso bazali nkona na Ye—Akokokisa Bosekwi—Bana mike bazali na bomoi ya seko. Penepene na mobu 148 Liboso na mbotama ya Klisto.

1 Mpe sikawa Abinadi alobaki epayi na bango: Nalingi bososola ete Nzambe ye moko akokita na kati ya bana ya bato, mpe akosikola bato na ye.

2 Mpe mpo akofanda kati na mosuni akobiangama Mwana ya Nzambe, mpe lokola ayangeli nzoto na bolingi ya Tata, azali Tata mpe Mwana—

3 Tata, mpo ayingelamaki na zemi na nguya ya Nzambe; mpe Mwana, mpo na mosuni; boye kokomaka Tata mpe Mwana—

4 Mpe bazali Nzambe moko, iyo, Tata mpenza ya Seko ya lola mpe ya mabele.

5 Mpe boye lokola mosuni ekomaki ya koyangelama na Molimo, soki te Mwana na Tata, kozalaka Nzambe moko, ayoki mpasi ya masenginia, mpe amitiki te na masenginia, kasi apesi nzela ye moko ete atiolama, mpe abetama fimbo, mpe abenganama, mpe asundolama na bato na ye.

6 Mpe nsima ya nyonso oyo, nsima ya kosalaka makamwisi ya nguya mingi na kati ya bana ya bato, akokambama, iyo, kutu lokola Yisaya alobaki, lokola mpate azalaka baba liboso ya mokati nsuki na ye, bongo afungolaki monoko na ye te.

7 Iyo, ata bongo akomemama, akobakama na ekulusu, mpe akobomama, mosuni kokomaka ya koyangelama kutu kino na liwa, bolingi ya Mwana ekomelama na bolingi ya Tata.

8 Mpe boye Nzambe akati singa ya liwa, mpo azwaki elonga likolo ya liwa; mpe apesi Mwana nguya mpo na kosala mabondeli mpo na bana ya bato—

9 Emati ye kati na lola, komonisaka nsopo ya boboto; lokola atondisami na mawa epayi na bana ya bato; lokola atelemi na katikati na bango mpe boyengebene; lokola akati singa ya liwa, akamati likolo ya ye moko mabe mpe bobuki mobeko na bango, lokola asikoli bango, mpe asepelisi masengami ya boyengebene.

10 Mpe sikawa nakoloba epayi na bino, nani akolobela nkola na ye? Tala, nalobi epayi na bino, ete ntango molimo na ye mopesamaki lokola libonza mpo na masumu akomona nkona na ye. Mpe sikawa bolobi nini? Mpe nani akozala nkona na ye?

11 Tala nalobi epayi na bino, ete oyo nyonso ayokaki maloba ya baprofeta, iyo, baprofeta basantu nyonso oyo basakolaki mpo na oyo etali boyei ya Nkolo—Nalobi epayi na bino, ete bango nyonso oyo bayokaki maloba na bango, mpe bandimaki ete Nkolo akosikola bato na ye, mpe bazelaki mokolo wana mpo na bolimbisi ya masumu na bango, nakoloba epayi na bino, ete bango oyo bazali bato ya nkona na ye, soki te bazali basangoli libula ya bokonzi ya Nzambe.

12 Mpo bango bazali baoyo kani masumu ye amemaki; bango bazali baoyo kani akufelaki, mpo na kosikola bango uta na bobuki mobeko na bango. Mpe sikawa, ezali bango te nkona na ye?

13 Iyo, mpe ezali te baprofeta, moko na moko oyo afungolaki monoko na ye mpo na kosakola, oyo akweyaki te kati na bobuki mobeko; nalingi koloba baprofeta basantu nyonso kala uta mokili ebanda? Nalobi epayi na bino ete bazali nkona na ye.

14 Mpe bango bazali baoyo basakolaki kimia, baoyo bamemaki nsango ya nsai ya bolamu, baoyo basakolaki lobiko; mpe balobaki epayi ya Siona: Nzambe na yo azali koyangela!

15 Mpe O lolenge boni ezalaki makolo na bango kitoko likolo ya ngomba!

16 Mpe lisusu, lolenge boni ezali kitoko likolo ya ngomba makolo na bango oyo bazali naino kosakolaka kimia!

17 Mpe lisusu, lolenge boni ezali kitoko likolo ya ngomba makolo na bango oyo bakosakola banda nsima awa kimia, iyo, uta na ntango oyo kokende liboso mpe libela!

18 Mpe tala, nalobi epayi na bino, oyo ezali nyonso te. Mpo O lolenge boni ezali kitoko likolo ya ngomba makolo na ye oyo amemaka nsango ya nsai, oyo azali mobandisi ya kimia, iyo, kutu Nkolo, oyo asikolaki bato na ye; iyo, ye oyo apesaki lobiko epayi ya bato na ye;

19 Mpo soki ezalaki te mpo na bosikoli boye asalaki mpo na bato na ye, boye bolengelamaki uta na bokelami ya mokili, nalobi epayi na bino, soki ezalaka mpo na oyo te, bato nyonso basengelaki kowa.

20 Kasi tala, singa ya liwa ekokatama, mpe Mwana azali koyangela, mpe akozala na nguya likolo ya bakufi; boye, akokisi bosekwi ya bakufi.

21 Mpe ekoya bosekwi, kutu bosekwi ya yambo; iyo, kutu bosekwi ya baoyo bazalaki, mpe baoyo bazali, mpe baoyo bakozala, kutu kino na bosekwi ya Klisto—mpo akobiangama bongo.

22 Mpe sikawa, bosekwi ya baprofeta nyonso, mpe bango nyonso oyo bandimaki na maloba na bango, to bango nyonso oyo babombaki mitindo ya Nzambe, bakobima na bosekwi ya yambo; boye, bazali bosekwi ya yambo.

23 Basekwisami mpo na kofanda elongo na Nzambe oyo asikolaki bango; boye bazali na bomoi ya seko na nzela ya Klisto, oyo akataki singa ya liwa.

24 Mpe baoyo bazali bango oyo bazali na likabo na bosekwi ya yambo; mpe baoyo bazali baoyo bakufaki liboso ete Klisto aya, kati na kozanga boyebi na bango, wana esakolamaki naino te lobiko epayi na bango. Mpe boye Nkolo akokisi bozongisi na bango; mpe bazali na likabo na bosekwi ya yambo, soki te bazwi bomoi ya seko, mpo basikolami na Nkolo.

25 Mpe bana mike mpe lokola bakozwa bomoi ya seko.

26 Kasi botala, mpe bobanga, mpe bolenga liboso ya Nzambe, mpo bosengeli kolenga; mpo Nkolo asikolaka moko te ya lolenge oyo ya baoyo batombokaka na ye mpe bakufaka kati na masumu na bango; iyo, kutu bango nyonso oyo bawaki kati na masumu na bango naino uta mokili ebandaki, baye na motema moko batombokaki na Nzambe, baoyo bayebaki mitindo ya Nzambe, mpe babombaki yango te; baoyo ezali bango oyo bazali na likabo te na bosekwi ya yambo.

27 Boye esengeli bino kolenga te? Mpo lobiko eyaka na moko te ya lolenge oyo; mpo Nkolo asikoli moko te ya lolenge oyo; iyo, mpe Nkolo akoki kosikola moko te ya lolenge oyo; mpo akoki te kowangana ye moko; mpo akoki te kowangana boyengebene ntango ezali na bosenga na yango.

28 Mpe sikawa nalobi epayi na bino ete ntango ekoya wapi lobiko ya Nkolo ekosakolama epayi na ekolo na ekolo, libota na libota, monoko na monoko, mpe bato na bato.

29 Iyo, Nkolo, bakengeli na yo, bakotombola mongongo na bango; na mongongo yango esika moko bakoyemba; mpo bakomona miso na miso, ntango Nkolo akomema lisusu Siona.

30 Bobukana na bosepeli, boyemba elongo, bino bisika ya mpamba ya Yelusaleme; mpo Nkolo abondisi bato na ye, asikoli Yelusaleme.

31 Nkolo azipolaki ya loboko na ye mpamba esantu na miso ya bikolo nyonso; mpe nsuka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Nzambe na biso.

Bimisa na lokasa