Masalisi mpo na Makomi
BJS, Esode 33


BJS, Esode 33:20, 23. Meka na Esode 33:20, 23

Moto moko te ya masumu akoki komona elongi ya Nzambe mpe kotikala na bomoi.

20 Mpe ye alobaki na Mose, Okoki te komona elongi na ngai na ntango oyo, na kobangaka ete nkanda na ngai epela na yo lisusu, mpe naboma yo, mpe bato na yo; mpo moto moko te na kati ya bango akoki kotala ngai na ntango oyo, mpe kotikala na bomoi, mpo bazali basumuki koluta mpenza. Mpe moto moko te ya masumu asila na ntango moko, ekozala na moto moko mpe te na ntango moko, oyo akomona elongi na ngai mpe kotikala na bomoi.

23 Mpe nakolongola loboko na ngai, mpe okomona mokongo na ngai, kasi elongi na ngai ekoki komonana te, lokola na bantango mosusu; mpo nazali na nkanda na bato na ngai Yisalaele.

Bimisa na lokasa