Masalisi mpo na Makomi
BJS, Esode 34


BJS, Esode 34:1–2, 14. Meka na Esode 34:1–2, 14; Mal&May 84:21–26

Nzambe akomi lisusu motindo likolo ya bitanda ya libanga ebongisamaki na Mose kasi alongoli Bonganganzambe ya Melikisedeki mpe makuli na yango mosika na bana ya Yisalaele. Na esika na yango Apesi bango mobeko ya mibeko ya mosuni.

1 Mpe Nkolo alobaki epayi na Mose, Kata bitanda misusu mibale ya mabanga, lokola ya yambo, mpe nakokoma maloba ya mobeko likolo na yango lisusu, engebene na lolenge ekomamaki yambo likolo ya bitanda oyo obukaki; kasi ekozala te na lolenge ya oyo ya yambo, mpo nakolongola bonganganzambe katikati na bango; boye molongo mosantu na ngai, mpe makuli na yango, makokende liboso na bango te; mpo nkembo na ngai ekoki te komata kati na bango, mbele naboma bango.

2 Kasi nakopesa epayi na bango mobeko lokola na ebandeli, kasi ekozala na lolenge ya mobeko oyo ezali na motindo etali mosuni; mpo nalapaki ndai na nkele na ngai, ete bakokota kati na nkembo na ngai te, kati na epemelo na ngai, na mikolo ya botamboli ya bomoi na bango. Boye sala lokola natindaki yo, mpe omilengela na ntongo, mpe mata likolo na ntongo na ngomba ya Sinai, mpe mimonisa yo moko kuna na ngai, na nsonge ya ngomba.

Yehova ezali nkombo oyo wapi bato ya Boyokani ya Kala bayebi Nkolo Yesu Klisto.

14 Mpo osengeli kogumbamela nzambe mosusu te; mpo Nkolo, oyo nkombo ezali Yehova, azali Nzambe ya zuwa.

Bimisa na lokasa