Makomi
Abalayama 3


Mokapo 3

Abalayama ayekoli oyo etali moi, sanza, mpe minzoto na nzela ya Ulima mpe Tumima—Nkolo abimisi epayi na ye lolenge ya seko ya milimo—Ayekoli mpo na oyo etali bomoi yambo ya bokeli ya mabele, bokulisi yambo na mbotama, Bokeli, boponami ya Mosikoli, mpe ezalela ya mibale ya moto.

1 Mpe ngai Abalayama, nazalaki na Ulima mpe Tumima, oyo Nkolo Nzambe na ngai apesaki epayi na ngai, na Ulu ya Bakaladi;

2 Mpe namonaki minzoto, ete mizalaki minene mpenza, mpe ete moko kati na yango ezalaki penepene na kiti ya bokonzi ya Nzambe koleka nyonso; mpe ezalaki na mingi minene oyo ezalaki penepene na yango;

3 Mpe Nkolo alobaki na ngai: Oyo ezali moko minzoto eyangelaka; mpe nkombo ya monzoto monene koleka ezali Kolobi, mpamba te ezali penepene na ngai, mpo nazali Nkolo Nzambe na yo: Natiaki monzoto moko oyo mpo na koyangela nyonsowana ezali ya molongo se moko likolo ya oyo wapi otelemi.

4 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai, na nzela ya Ulima mpe Tumima, ete Kolobi ezalaki na lolenge ya Nkolo, engebene na ntango mpe bileko na yango na mozolongano na yango; ete mozolongano moko ezalaki mokolo moko na miso ya Nkolo, na lolenge ya etangeli na ye ntango, mpe ezali mibu nkoto moko engebene na ntango oyo epesami na monzoto likolo ya oyo wapi otelemi. Oyo ezali etangeli ya ntango ya Nkolo, engebene na etangeli ya Kolobi.

5 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Monzoto monene oyo ezali mwinda moke, moke koleka oyo etiami mpo na kokonza na moi, kutu oyo eyangeli na butu, ezali likolo to monene koleka oyo wapi otelemi likolo na kotalaka etangeli na yango ya ntango, mpo etambolaka na molongo ya malembe koleka; oyo ezali kati na molongo mpo ezali likolo ya mabele oyo wapi otelemeli, boye etangeli na yango ya ntango ezali mingi te na kotalaka motango ya yango ya mikolo, mpe basanza, mpe mibu.

6 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Sikawa, Abalayama, bikela mibale ezali, tala miso na yo ezali komona yango; etangeli ya koyeba bantango epesami epayi na yo, mpe ntango oyo etiami, iyo, ntango oyo etiami mpo na mabele likolo ya oyo otelemi, mpe ntango oyo etiami mpo na mwinda monene oyo etiami mpo na kokonza na moi, mpe ntango oyo etiami mpo na mwinda moke oyo etiami mpo na kokonza na butu.

7 Sikawa ntango oyo etiami mpo na mwinda moke ezali ntango moko molai na kotalaka etangeli na yango koleka etangeli ya ntango ya mabele likolo ya oyo otelemi.

8 Mpe epayi wapi bikela mibale oyo ezali, ekela mosusu likolo na yango esengeli kozala, elingi koloba, ezali na monzoto monene mosusu oyo kani etangeli ya ntango ekotikala kozala se molai;

9 Mpe boye ekozala se na etangeli ya ntango ya monzoto monene moko koleka mosusu, kino okomi penepene na Kolobi, oyo Kolobi ezali etangeli ya ntango na lolenge ya ntango ya Nkolo; oyo Kolobi ezali penepene na kiti ya bokonzi ya Nzambe, mpo na koyangela minzoto nyonso ya minene oyo ezali ya molongo se moko lokola oyo wapi otelemi likolo.

10 Mpe epesami epayi na yo koyeba ntango oyo etiami mpo na minzoto nyonso oyo etiami mpo na kopesa pole, kino okokoma penepene ya kiti ya bokonzi ya Nzambe.

11 Boye ngai, Abalayama, nasololaki na Nkolo, miso na miso, lokola moto moko asololaka na mosusu; mpe ayebisaki ngai misala oyo maboko na ye esalaki;

12 Mpe alobaki na ngai: Mwana mobali na ngai, mwana mobali na ngai (mpe loboko na ye ezalaki ya kosembola), tala nakolakisa yo nyonso oyo. Mpe atiaki loboko na ye likolo ya miso na ngai, mpe namonaki biloko bina maboko na ye masalaki, oyo ezalaki mingi; mpe bikomaki beboo liboso ya miso na ngai, mpe nakokaki komona nsuka na yango te.

13 Mpe alobaki epayi na ngai: Oyo ezali Sineya, oyo ezali moi. Mpe alobaki epayi na ngai: Kokob, elingi koloba monzoto. Mpe alobaki epayi na ngai: Olea, elingi koloba sanza. Mpe alobaki epayi na ngai: Kokawubima, elingi koloba minzoto, to minda nyonso minene, oyo ezalaki na bofungwami ya lola.

14 Mpe ezalaki na butu ntango Nkolo alobaki maloba oyo epayi na ngai: Nakokomisa yo mingi, mpe nkona na yo nsima na yo, lokola minzoto oyo; mpe soki okoki te kotanga motango ya zelo, bongo nde ekozala motango ya nkona na yo.

15 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Abalayama, nalakisi biloko oyo epayi na yo liboso ete okende na Ejipito, ete okoka kosakola maloba nyonso oyo.

16 Soki biloko ezali mibale, mpe ezali na moko eleki mosusu, ekozala na biloko minene misusu koleka yango; boye Kolobi ezali monene koleka nyonso ya Kokawubima oyo osili komona, mpamba te ezali penepene mingi na ngai.

17 Sikawa, soki biloko mibale ezali, moko koleka mosusu, mpe sanza koleka mabele, bongo ekoki kozala ete monzoto monene to monzoto moko ekoki koleka yango; mpe ezali na eloko oyo Nkolo Nzambe na yo akokokisa te soki atii na motema na ye ya kosala bobele akosala yango.

18 Ata ezali bongo asalaki monzoto ya monene; na lolenge yoko mpe, soki ezali na milimo mibale, mpe moko mokozala mayele koleka mosusu, nzokande milimo mibale oyo ezali na ebandeli te, ata soki moko ezali mayele koleka mosusu; mizalaki liboso, mikozala na nsuka te, mikozala nsima, mpo ezali nolawumi, to seko.

19 Mpe Nkolo alobaki epayi na ngai: Bikela mibale oyo ezali, ete ezali na milimo mibale, moko kozalaka mayele koleka mosusu; ekozala na mosusu mayele koleka bango; nazali Nkolo Nzambe na yo, nazali mayele mingi koleka bango nyonso.

20 Nkolo Nzambe na yo atindaki anjelu na ye kokangola yo uta na maboko ya nganganzambe ya Elekena.

21 Nafandaki na kati ya bango nyonso; boye, sikawa, nasili kokita epayi na yo koyebisa epayi na yo misala oyo maboko na ngai esalaki, na oyo wapi bwania na ngai eleki bango nyonso malamu, mpo nazali kokonza na lola likolo, mpe na mabele na nse, na bwania mpe bokebi bonso, likolo ya bikelamo nyonso ya mayele oyo miso na yo masili komona uta na ebandeli; nakitaki na ebandeli na kati kati ya bikelamo nyonso ya mayele oyo osili komona.

22 Sikawa Nkolo alakisaki epayi na ngai, Abalayama, bikelamu ya molimo oyo ebongisamaki liboso ete mokili mozala; mpe na kati na bango nyonso oyo ezalaki na mingi kati na baye bayengebene mpe minene;

23 Mpe Nzambe amonaki milimo oyo ete ezalaki malamu, mpe atelemaki na kati kati na bango, mpe alobaki: Oyo nakokomisa bayangeli na ngai; mpo atelemaki na kati ya baye bazalaki milimo, mpe amonaki ete bazalaki malamu; mpe alobaki epayi na ngai: Abalayama, ozali moko na bango; oponamaki liboso ete obotama.

24 Mpe etelemaki moko kati na bango oyo azalaki lokola Nzambe, mpe alobaki epayi na baye bazalaki elongo na ye: Tokokita na nse, mpo esika ezali kuna, mpe tokokamata kati ya biloko oyo, mpe tokosala mabele moko likolo ya wapi baoyo bakoki kofanda;

25 Mpe tokomeka bango na nzela oyo, mpo na kotala soki bakosala makambo nyonso Nkolo Nzambe na bango akotinda bango;

26 Mpe baye bakobatela ezalela na bango ya yambo bakobakiselama likolo; mpe baye bakobatela ezalela na bango ya yambo te bakozala na nkembo kati na bokonzi moko elongo na baye babateli ezalela na bango ya yambo te; mpe baye bakobatela ezalela na bango ya mibale bakozala na nkembo ebakisami likolo ya mitu na bango libela na libela.

27 Mpe Nkolo alobaki: Nakotinda nani? Mpe moko lokola Mwana ya Moto azongisaki maloba: Ngai oyo, tinda ngai. Mpe mosusu azongisi maloba mpe alobaki: Ngai oyo, tinda ngai. Mpe Nkolo alobaki: Nakotinda ya yambo.

28 Mpe ya mibale azalaki na nkanda, mpe abatelaki te bozali na ye ya yambo; mpe, uta mokolo wana, mingi balandaki ye.

Bimisa na lokasa