Makomi
Mose 3


Mokapo 3

(Sanza ya motoba–Sanza ya zomi 1830)

Nzambe akelaki biloko nyonso na molimo liboso ete bimonana na miso likolo ya mabele—Akelaki moto, mosuni ya yambo, likolo ya mabele—Mwasi azali mosungi ya kokoka mpo na mobali.

1 Boye lola mpe mabele esilaki kosalema, mpe ebele nyonso oyo ezali na yango.

2 Mpe na mokolo ya sambo ngai, Nzambe, nasilisaki mosala na ngai, mpe biloko nyonso oyo nasalaki; mpe napemaki na mokolo ya sambo uta na mosala na ngai nyonso, mpe biloko nyonso oyo nasalaki esalemaki, mpe ngai, Nzambe, namonaki ete ezalaki malamu;

3 Mpe ngai, Nzambe, napambolaki mokolo ya sambo, mpe nasantisaki yango; mpo ete na yango napemaki uta na mosala na ngai nyonso oyo ngai, Nzambe, nakelaki mpe nasalaki.

4 Mpe sikawa, tala, nalobi epayi na bino, ete oyo ezali nkola ya lola mpe ya mabele, ntango ekelamaki, na mokolo oyo ngai, Nkolo Nzambe, nasalaki lola mpe mabele,

5 Mpe nzete nyonso ya zamba liboso ete ezala na mabele, mpe ndunda nyonso ya zamba liboso ete ekola. Mpo ngai, Nkolo Nzambe, nakelaki biloko nyonso, oyo nasili kolobela, na molimo, liboso ete bimonana na miso likolo ya etando ya mabele. Mpo ngai, Nkolo Nzambe, nabetisaki mvula likolo ya etando ya mabele te. Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nakelaki bana ya bato nyonso; mpe moto azalaki naino te mpo na kosala bilanga; mpo na lola nde ekelaki ngai bango; mpe mosuni moko te ezalaki naino likolo ya mabele, soki na mai mpe te, na likolo mpe te;

6 Kasi ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki, mpe londende ebimaki uta na mabele, mpe emwangisaki mai na etando mobimba ya mabele.

7 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nasalaki moto uta na putulu ya mabele, mpe nafulaki mpema ya bomoi na zolo na ye; mpe moto akomaki molimo na bomoi, mosuni ya yambo likolo ya mabele, moto ya yambo lisusu; nzokande, biloko nyonso ekelamaki liboso; kasi ekelamaki na molimo mpe esalemaki engebene na liloba ya ngai.

8 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalonaki elanga epayi na esti ya Edene, mpe kuna natiaki moto oyo nasalaki.

9 Mpe uta na mabele ngai, Nkolo Nzambe, nakolisaki nzete nyonso, na lolenge na yango, oyo ezali kitoko mpo ete moto atala; mpe moto akoki kotala yango. Mpe ekomaki lisusu molimo na bomoi. Mpo ezalaki na molimo na mokolo oyo nakelaki yango; mpo etikalaka na molongo wapi ngai, Nzambe, nakelaki yango, iyo, kutu biloko nyonso oyo nalengelaki mpo ete moto asalela; mpe moto amonaki ete ezali malamu mpo na kolia. Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalonaki lisusu nzete ya bomoi kati na elanga, mpe lisusu nzete ya boyebi ya bolamu mpe mabe.

10 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nabimisaki ebale uta na Edene komwangisa mai na elanga; mpe uta na esika wana ekabwanaki, mpe ekomaki na mingala minei.

11 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nabiangaki nkombo ya yambo Pisoni, mpe ezingaki mboka ya Hawila, wapi ngai, Nkolo Nzambe, nakelaki wolo mingi;

12 Mpe wolo ya mboka wana ezalaki kitoko, mpe kuna ezalaki na bedeliumi mpe mabanga ya soama.

13 Mpe nkombo ya mongala ya mibale ebiangamaki Gihona; se moko oyo ezingaki mboka mobimba ya Etiopia.

14 Mpe nkombo ya mongala ya misato Hidekele; oyo ezalaki kokende epayi na esti ya Asulia. Mpe mongala ya minei ezalaki Pelata.

15 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nakamataki moto, mpe natiaki ye na Elanga ya Edene, mpo na kolona yango, mpe kobatela yango.

16 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, natindaki moto, kolobaka: Ya nzete nyonso ya elanga okoki kolia lokola elingi motema,

17 Kasi ya nzete ya boyebi ya bolamu mpe mabe, osengeli kolia te, nzokande, okoki kopona mpo na yo moko, mpo epesami epayi na yo kopona; kasi, omikundola ete napekisi yango, mpo ete mokolo okolia mbuma na yango solo okokufa.

18 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalobaki epayi ya Mobotami se Moko na ngai, ete ezalaki malamu te ete mobali azala ye moko; yango wana, nakosalela ye mosungi oyo abongi na ye.

19 Mpe uta na mabele ngai, Nkolo Nzambe, nasalaki nyama nyonso ya zamba, mpe ndeke nyonso ya likolo; mpe napesaki motindo ete basengeli koya epayi ya Adama, kotala soki akobianga bango na nkombo nini; mpe lisusu bazalaki milimo na bomoi; mpo ngai, Nzambe, nafulaki mpema ya bomoi kati na bango, mpe napesaki motindo ete nkombo nyonso oyo Adama akobianga ekelamo na bomoi moko moko, oyo wana esengeli kozala nkombo na yango.

20 Mpe Adama apesaki nkombo na bibwele nyonso, mpe na ndeke ya likolo, mpe na nyama nyonso ya zamba; kasi mpo na Adama, mosungi oyo abongi na ye azalaki te.

21 Mpe ngai, Nkolo Nzambe, nalalisaki Adama mpongi makasi, mpe alalaki, mpe nazwaki moko ya mikuwa ya mopanzi na ye mpe nakangaki mosuni na esika yango;

22 Mpe uta na mokuwa uta na mopanzi oyo ngai, Nkolo Nzambe, nazwaki uta na mobali, nasalaki mwasi, mpe namemaki ye epayi ya mobali.

23 Mpe Adama alobaki: Oyo nayebi sikawa azali mokuwa ya mikuwa na ngai, mpe mosuni ya misuni na ngai; akobiangama Mwasi, mpo ete azwamaki uta na mobali.

24 Boye moto akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akokangama na mwasi na ye; mpe bakozala mosuni moko.

25 Mpe bazalaki banso mibale bolumbu, mobali na mwasi na ye, mpe bazalaki na nsoni te.

Bimisa na lokasa