Makomi
Mose 8


Mokapo 8

(Sanza ya mibale 1831)

Metusela asakoli—Noa mpe bana mibali na ye bateyi nsango malamu—Nkuna monene eyingeli—Bato bati bokebi te na libiangi mpo na boyamboli—Nzambe abimisi mokano ya kobebisa mosuni nyonso na Mpela.

1 Mpe mikolo nyonso ya Enoka mizalaki mibu nkama minei mpe ntuku misato.

2 Mpe esalemaki ete Metusela, mwana mobali ya Enoka, akamatamaki te, ete mayokani ya Nkolo makoka kokokisama, oyo asalaki na Enoka; mpo solo asalaki liyokani na Enoka ete Noa akozala mbuma ya nketo na ye.

3 Mpe esalamaki ete Metusela asakolaki ete uta na nketo na ye bokonzi ebele nyonso ya mabele bikobotama (na nzela ya Noa), mpe amipesaki ye moko nkembo.

4 Mpe nzala moko ya monene ekotaki na mabele, mpe Nkolo alakelaki mboka mabe na bolakeli mabe ya nsomo, mpe bafandi mingi ya yango bakufaki.

5 Mpe esalemaki ete Metusela awumelaki mibu monkama moko mpe ntuku mwambe na nsambo, mpe abotaki Lemeke;

6 Mpe Metusela awumelaki na bomoi, nsima ya kobota Lemeke, mibu nkama sambo mpe ntuku mwambe na mibale, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi;

7 Mpe mikolo nyonso ya Metusela mizalaki mibu nkama libwa mpe ntuku motoba na libwa, mpe akufaki.

8 Mpe Lemeke awumelaki na bomoi mibu monkama moko mpe ntuku mwambe na mibale, mpe abotaki mwana mobali,

9 Mpe abiangaki ye na nkombo ya Noa, kolobaka: Mwana mobali oyo akolendisa biso mpo na oyo etali mosala mpe mpasi ya maboko na biso, likolo ya mabele oyo Nkolo alakelaki mabe.

10 Mpe Lemeke awumelaki na bomoi, nsima ya kobota Noa, mibu nkama mitano mpe ntuku libwa na mitano, mpe abotaki bana mibali mpe bana basi;

11 Mpe mikolo nyonso ya Lemeke mizalaki mibu nkama sambo mpe ntuku sambo na nsambo, mpe akufaki.

12 Mpe Noa awumelaki na bomoi mibu nkama minei mpe ntuku mitano, mpe abotaki Yefete; mpe mibu ntuku minei na mibale nsima abotaki Semi na ye oyo azalaki mama na Yefete, mpe ntango azalaki na mibu nkama mitano abotaki Hama.

13 Mpe Noa mpe bana mibali na ye bayokelaki Nkolo, mpe batiaki bokebi, mpe babiangamaki bana mibali ya Nzambe.

14 Mpe ntango bato oyo babandaki kokoma mingi na etando ya mabele, mpe babotelaki bango bana basi, bana mibali ya bato bamonaki ete bana basi wana bazalaki kitoko, mpe bakamati ya bango basi, kutu lokola baponaki.

15 Mpe Nkolo alobaki epayi na Noa: Bana basi ya bana mibali na yo bamitekaki bango moko; mpo tala nkanda na ngai ezali kopela na bana mibali ya bato, mpo balingi koyoka mongongo na ngai te.

16 Mpe esalemaki ete Noa asakolaki, mpe ateyaki makambo ya Nzambe, kutu lokola ezalaki na ebandeli.

17 Mpe Nkolo alobaki epayi ya Noa: Molimo na ngai mokobunda na moto ntango nyonso te, mpo asengeli koyeba ete mosuni nyonso ekokufa; nzokande mikolo na ye mikozala mibu monkama mpe ntuku mibale; mpe soki bato bayamboli te, nakotinda mpela likolo na bango.

18 Mpe na mikolo wana bibuku ya bato ya makasi bazalaki likolo ya mabele, mpe balukaki Noa mpo na kolongola bomoi na ye; kasi Nkolo azalaki elongo na Noa, mpe nguya ya Nkolo ezalaki likolo na ye.

19 Mpe Nkolo akulisaki Noa nsima ya molongo na ye moko, mpe atindaki ye ete asengeli kokende mpe kosakola Nsango malamu na ye epayi ya bana ya bato, kutu lokola epesamaki epayi ya Enoka.

20 Mpe esalemaki ete Noa abiangaki bana ya bato ete basengeli koyambola; kasi bayokaki maloba na ye te;

21 Mpe lisusu, esilaki bango koyoka ye, bayaki liboso na ye, kolobaka: Tala, tozali bana ya Nzambe; ebali biso te biso moko bana basi ya bato? Mpe ezali biso kolia mpe komela te, mpe kobala mpe kobalisa te? Mpe basi na biso bazali kobotela biso bana, mpe se bango oyo bato ya makasi, oyo bazali lokola bato ya kala, bato ya lokumu monene. Mpe bayokaki maloba ya Noa te.

22 Mpe Nzambe amonaki ete nkuna ya bato esili kokoma monene likolo ya mabele; mpe moto na moto atombwamaki na makanisi ya mabanzo ya motema na ye, oyo ezalaki ntango nyonso mabe.

23 Mpe esalemaki ete Noa akobabi na ye se koteya bato, kolobaka: Boyoka, mpe botia bokebi na maloba na ngai;

24 Bondima mpe boyambola mpo na masumu na bino mpe bobatisama na nkombo ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe, kutu lokola batata na biso, mpe bokozwa Molimo Mosantu, ete makambo nyonso emonisama epayi na bino; mpe soki bosali oyo te, mpela ekoya likolo na bino; kasi bayokaki te.

25 Mpe esalaki Noa mawa, mpe motema na ye moyokaki mpasi ete Nkolo asalaki moto likolo ya mabele, mpe esalaki ye mawa na motema.

26 Mpe Nkolo alobaki: Nakobebisa moto oyo nakelaki, uta na likolo ya etando ya mabele, ezala moto mpe nyama, mpe biloko oyo ezali kolandana na nse, mpe bandeke ya likolo; mpo esalaki Noa mawa ete nakelaki bango, mpe ete nasalaki bango; mpe abelelaki ngai; mpo balukaki kolongola bomoi na ye.

27 Mpe boye Noa azwaki ngolu na miso ya Nkolo; mpo Noa azalaki moto moko moyengebene, mpe moto ya kobonga nie kati na nkola na ye; mpe atambolaki elongo na Nzambe, lokola esalaki lisusu bana mibali na ye misato, Semi, Hama, mpe Yefete.

28 Mabele ebebaki liboso ya Nzambe, mpe matondaki na yauli.

29 Mpe Nzambe atalaki likolo ya mabele, mpe, tala, mazalaki ya kobeba, mpo mosuni nyonso ebebisaki nzela na ye likolo ya mabele.

30 Mpe Nzambe alobaki na Noa: Nsuka ya mosuni nyonso ekomi liboso na ngai, mpo mabele matondi na yauli, mpe tala nakobebisa mosuni nyonso uta na mabele.

Bimisa na lokasa