Losambo ya 2024
Boyingisi


Boyingisi

Losambo ya Mokili Mobimba mpo na Bilenge Bakola

Mokolo ya Eyenga 18, Sanza ya mibale 2024

Bandeko na ngai bilenge bakola uta na mokili mobimba, ezali lipamboli monene mpe libaku malamu mpo na biso banso ya kozala na bino na losambo oyo ya bilenge bakola ya CES ya mokili mobimba. Tozali lisusu na esengo ya kozala na mpokwa ya lelo na Ndeko mobali Chad Webb, oyo azali elongo na mwasi na ye ya bolingo, Kristi. Ndeko mwasi mpe Ndeko mwasi Webb bazali bayekoli ya sembo ya Klisto mpe bazali bandakisa malamu ya komipesa mpe bolingo na makambo nyonso ya bomoi na bango.

Tosepeli mingi mpo na bozali na bino lelo na losambo oyo. Koyangana na bino elakisi mingi etali bondimi na bino epayi ya Nzambe mpe Yesu Klisto mpe mposa na bino ya koyoka bolingo na bango mpe kolanda Bango. Soki bozwi ekateli ya kolanda mpe kokumbamela Bango, bomoi na bino ekoki kotondisama na nguya mingi mpe koyika mpiko na molimo oyo esengeli mingi na mobembo na biso lokola bayekoli na Ye na mikolo na biso. Tolingi bino banso!

Namemeli bino banso mbote ya esengo mpe bolingo uta na profeta na biso ya bolingo, Mokambi Russell M. Nelson, bapesi toli na ye na Bokambi ya Yambo mpe Lisanga Likoki ya Bapostolo Zomi na Mibale. Balingi bino mpenza mpe batyelaka bino likebi mpe basambelaka mpo na bolamu na bino ntango nyonso. Nalikii ete bokoyoka bolingo na bango mpe mingimingi bolingo ya Nzambe mpe ya Klisto na losambo na biso lelo.

Nasepelaki mpenza na loyembo efulami oyo eyembami kala te. Maloba efulami ya loyembo kitoko oyo epesi mpenza nzela mpo na losambo na biso ya mpokwa oyo mpe epesi eyano na moko ya mituna oyo esimbaka makasi motema na biso: “Nakoki kobaluka wapi mpo na kimya?”

Wapi nakenda na mposa na ngai ya koyeba, wapi nakoki kokimela?

Loboko ya kimya ezali wapi mpo na kolembisa mpasi na ngai?

Nani oyo akoki kososola?

Bobele Ye moko.

“Azali ntango nyonso sembo mpe boboto,

“Bolingo ezanga nsuka.”

Na Esika bayambelaka bato na Ndako ya Eklezia na Salt Lake City, ezali na liyemi moko kitoko ya Yesu Klisto na maboko na Ye etandami kati na bayekoli na Ye. Mobikisi alekisaki bomoi na Ye na mabele kobiangaka bato baya epayi na Ye, mpe andimisi bango na bolingo ete soki bayaki mbala moko nde bakokaki “kozwa kimya mpo na [ya bango] mitema.”

Yesu Klisto atelemi na bikuke ya bomoi na biso ya mokolo na mokolo na maboko ya kofungwama, mpe Azali kobenga biso, kolobaka, “Nakozinga bino na maboko ya bolingo na ngai.” Atako tozali kobeta libaku to kotengatenga, tokoki kokweya na maboko na Ye efungwama, koyoka bolingo na Ye ebonga nie, mpe koyeba ete esika oyo ezali na kati ya maboko na ye ebulisami na nzela ya libonza na Ye ya bolingo, ya bomikabi lokola esika mpo na biso. Oyo nde nzela kitoko ya kozwa kimya na mokili oyo ya mpasi mingi.

Na molimo ya kozwa kimya na nzela ya Mobikisi, tobiangaki bayekoli ya insititi uta na mokili mobimba mpo na bakabola mitungisi minene mpe mituna na bango elongo na biso. Bakomaki mituna na bango na bavideo ya mikuse mpe batindaki yango epayi na biso. Tosepelaki mingi mpe tosimbamaki na motema kotala bolamu ya solosolo oyo elobami na nzela ya mituna oyo. Tokokaki na mozindo koyoka mposa na bino ya kopusana penepene na Mobikisi mpe kokoma bayekoli ya molende koleka.

Toponaki bavideo ya mikuse yango na biteni ndenge elandi: (1) Kolendisaka litatoli na bino, (2) koyikaka mpiko na mimekano, (3) kolandaka mwango ya Nzambe mpo na biso, (4) komilengelaka mpo na kokota mpe kokumbamela na tempelo, mpe (5) kotyaka bomoi na biso likolo ya Yesu Klisto.

Tokolakisa bino bavideo eponami ya mituna na bino mpo na kopesa bino mwa likanisi mpe lokola boyingisi na moto ya likambo moko na moko ya lisolo na biso ya mpokwa ya lelo. Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Webb bakosangana na biso lokola tozali kolobela mwa ndambo ya makambo oyo, kokaboloka bwanya mpe litatoli na bango monene ya nsango malamu ya Yesu Klisto.

Botondi mingi. Tolingi bino banso, mpe mituna oyo botindaki eyebisi biso ndenge bolingaka Mobikisi na biso Yesu Klisto mingi.

Bimisa na lokasa