Losambo ya 2024
Koyika Mpiko na Mikakatano


Koyika Mpiko na Mikakatano

Losambo ya Mokili Mobimba mpo na Bilenge Bakola

Mokolo ya Eyenga 18, Sanza ya mibale 2024

Mpaka Ulisses Soares: Malamu mpenza. Melesi. Tika biso sikawa totala mituna etali “koyika mpiko na mikakatano.”

GHANA—MOTUNA ya 7

Mpaka Soares, nalingi nayeba mpo na nini ezalaka ntango nyonso mpasi ntango ekomaka mpo na kosalela bondimi na ntango ya mpasi.

CHILI CONCEPCIÓN—MOTUNA ya 8

Mbote, Mpaka Soares. Motuna na ngai ezali oyo elandi: Lolenge nini okoki kosalisa bato oyo baniokuamaki mingi na bomoi na bango oyo emonani lokola bango batikala ata mokolo moko te koyamba mapamboli ya nsango malamu ya Yesu Klisto?

ESPAGNE BILBAO—MOTUYA ya 2

Mpaka Soares, na Eklezia tozali na bilenge balongobani oyo bazwaki makoki ya kosala misio mpe baye bakobi kosala na nyonso mibale kati na Eklezia mpe kati na lingomba. Kasi atako mosala na bango, bazali na makoki te ya kozwa mapamboli elakamaki. Eloko nini okoki koloba na bilenge oyo baye mobembo na bango awa na mabele epambolami te lolenge balakamaki yango ekoki kozala?

Mpaka Soares: Natondi mingi mpo na mituna minene oyo. Solo, bozangi bososoli monene ekokani kati ya mingi na biso ezali ete soki tobundi na nguya na biso nyonso mpo na kolanda bolingi ya Nkolo, kobikaka bomoi ya bosembo, eloko moko te ya mabe ekokomela biso. Ntango tondimaki moango ya Tata na biso ya Lola yambo ya bokufi, toyebaki ete tokokutana na esengo lokola mpe mimekano mpe mikakatano na mobembo na biso na bomoi ya kufa mobimba. Kolekaka na mabaku ntango ya mpasi ezali eteni ya lolenge ya boyekoli na ntina ya koponama mpo na kozonga liboso ya Tata na biso ya Lola. Boye solo ezali ete tokokutana na minyoko na bomoi na biso kolandaka te lolenge nini tozali sembo. Na ngambo mosusu, bambano ya misala malamu ekoya mpenza kasi ntango mosusu na mbala moko te. Mapamboli yango ekoki koya na ngonga ekeseni na oyo ya biso mpe engebene na bolingi ya Tata oyo, na bwanya npe na boyebi na ye, ayebi nini tosengeli na yango mpe nini ezali malamu mpo na biso na bomoi oyo.

Moko ya makambo ya ntina mingi koleka tokoki kosala ntango tozali kokutana na minyoko na bomoi ya kufa ezali kopesa mitema mpe elikya na biso epayi na Mobikisi. Soki tosali boye, tokozwa kaka te libondisi tozali koluka kasi lisusu bondimi ya kokola mpe litatoli ya bosolo ya Mobikisi mpe Bomikabi na Ye. Klisto anyokwamaki na ba mpasi, minyoko, komekama ya lolenge nyonso boye Ye akokaki kotondisama na mawa mpe koyeba lolenge nini kosunga biso engebene na bolema na biso. Mobikisi akoki kobikisa koleka mingi moto nyonso, bilembo ya mabaku nyonso ya bitumba ya bokufi. Na mabaku misusu, tokoki kobikisama mbala moko na nzoto te uta na mpasi to na maladi na biso, kasi tokoki kobikisama na molimo ntango tozwaka bolendisi, bososoli, mpe motema molai mpo na komema mikumba etyami likolo na biso. Boye ntango topesi mitema na biso epayi ya Mobikisi, Ye akosala misala ya kokamwa na bomoi na biso.

Likambo mosusu ya komona ezali ete tokoki kotala mikakatano mpe mimekano lokola mabaku ya kokola na esika ya komipesa nzela bisomei ya koyoka tokweyisami na yango. Nalaki bino ete kosalaka na lolenge oyo ekoki kopesa biso mabaku ya kolakisa Nkolo mpe bisomei ete tokoki mpe tokosala makambo nyonso oyo Nkolo apesaki biso mitindo tosala—mpe kokola pembeni ya makambo ya ntina ya boseko ata soki tozali na mikakatano. Ayebi ete tokioki kosala makambo ya mpasi! Apesaka biso nguya mingi.

Lokola eteyamaki na Mpaka Orson F. Whitney, moko ya Bapostolo ya Bozongisi : “Mpasi moko te tonyokwami, mokakatano moko te tokutani na yango ezali mpamba. Esalaka na mayele na biso, na botombwami ya mabongi lokola bompikiliki, bondimi mpe bomikitisi, … [mpe] ntango tozali koyika mpiko na yango na motema molai, etongaka bizaleli na biso, epetolaka mitema na biso, epanzaka milimo na biso, mpe esalaka biso tozala na mawa mpe bolingo, tolongobana makasi mpo na kobengama bana ya Nzambe. … Ezali na nzela ya mawa, mpasi mpe mikakatano, nde tolongaka mayele ete toyaka kozwa awa.”

Baninga na ngai, kokolisaka motema molai ekoki kosalisa biso tomona bomoi uta na makanisi ya seko, mpe yango ekomaka botindiki ya lobiko na molimo na biso. Nakoyekolaka na nzela ya mayele na biso moko, tozali kozwa boboto mpe motema ya mawa mpo na basusu mpe tokoki kosalisa na kotombolaka bango na bantango na bango ya mikakatano.

Molingami, olingi koloba na ntina ya likambo oyo ya motuya?

Ndeko mwasi Rosana Soares: Iyo, molingami. Ezali na bato oyo basalaka lolenge ekeseni na mimekano to minyoko ya ntango nyonso ya ndenge moko.

Ndambo kati na bango bakanisaka ete bazali kopetolama na maboko ya Mozalisi na biso ya Monene, oyo azali Nzambe na biso. Basusu bakanisi ete Nzambe abosani ntina na bango mpe ntango nyonso batunaka “mpo na nini?” liboso ya makambu yango. Basusu basalaka na motema molai mpe bondimi na Yesu Klisto mpe bazali kotala mpe kondima bolingi ya Nkolo na ntina ya lobiko ya molimo na bango. Tozali awa na mabele mpo na koyekola mpe kokola. Moke moke, tokomona mbuma ya makasi na biso; tosengeli bobele kokoba mpe kozala motema molai. Yango ekozala pete ata mokolo moko te, mpe yango ezali mpo na nini tozali na Mobikisi na biso, Yesu Klisto!

Mpaka Soares: Melesi, molingami. Maloba ya makasi mpenza.

Mwa mikakatano na biso ezali bambano ya bizalela ya bokufi, mpe yango ekokoba te na bomoi elandi. Lelo oyo tokoki ntango mosusu te kososola malamu mpenza bantina nyonso mpo na mikakatano to mabaku oyo ekopesa biso kokola. Ntango tozali koyika mpiko na motema molai, Nkolo akoki kolakisa biso bososoli monene na ntina ya mikakatano mpe ntina na yango na bomoi na biso.

Matangi

  1. Tala Alma 7:11–12.

  2. As quoted by Spencer W. Kimball in Faith Precedes the Miracle (1972), 98. Also Brigham Young taught, “Every trial and experience you have passed through is necessary for your salvation” (Teachings of Presidents of the Church: Brigham Young [1997], 262).

Bimisa na lokasa