Losambo ya 2024
Komilengela mpo na Kokota mpe Kokumbamela na Tempelo


Komilengela mpo na Kokota mpe Kokumbamela na Tempelo

Losambo ya Mokili Mobimba mpo na Bilenge Bakola

Mokolo ya Eyenga 18, Sanza ya mibale 2024

Mpaka Ulisses Soares: Tozwi mituna ebele ya malamu etali moko ya bansango elingama ya Mokambi Russell M. Nelson: “komilengela mpo na kokota mpe kokumbamela na tempelo.”

Ndeko mobali mpe ndeko mwasi Webb, bolingi kokabola makanisi etali lisikulu oyo nsima ya koyoka mituna oyo ekomama?

CANADA EDMONTON—MOTUNA 1

Mpaka Soares, motuna na ngai ezali, Lolenge nini nakoki komilengela mpo na kokende na tempelo mbala liboso mpe nazwa dotasio na ngai?

CANADA EDMONTON—MOTUNA 2

Mpaka Soares, lolenge nini nakoyeba ntango nazali pene ya kozwa dotasio na ngai?

CHILI CONCEPCIÓN—MOTUNA 2

Mbote, Mpaka Soares. Nazali na motuna. Lolenge nini nakoki kosala ete kokende na tempelo ezala ntina mingi mpe eteni ya motuya na bomoi na ngai?

Ndeko mobali Chad H Webb: Wana ezali motuna moko ya kitoko mpe motuya mpenza.

Eloko ya yambo nakolinga kopesa likanisi ezali komilengela na molimo. Boyekola koyoka mongongo ya Nkolo mpe koyanola na banungunungu ya molimo. Boluka kozala na bomoto ya peto mpe koboya makambo oyo ekotia ndelo na Molimo na bomoi na bino. Soki bosalaki mabunga, boyambola mpe bokoma balongobani mpo na kokota na ndako ya Nkolo. Botala te esika nini bozalaki na bomoi na bino, Bomikabi ya Yesu Klisto ezali mpo na bino. Mpo na Ye, bokoki kolongobana. Ye akosunga bino.

Ndeko mwasi Kristi Webb: Likanisi mosusu ezali ya kosolola na ntina ya tempelo na bandeko ya libota, bakambi, to baninga oyo totyelaka motema. Tempelo ezali bule, kasi eloko nyonso te etali yango ezali ya nkuku, mpe tokoki kolobela mingi etali tempelo koleka ndenge tosalaka. Mpe nakanisi ete ekoki kozala malamu kosala yango yambo mpe nsima ya kokende mpo na mbala ya liboso. Ezali malamu kozala na mituna; yango ezali lolenge toyekolaka, na yango botuna mituna na bino na bato oyo bondimelaka, oyo balingaka tempelo mpe babatelaka yango bule. Mingi na nyonso, botuna mituna na bino epai ya Nkolo. Kozala na mituna ezali lolenge malamu koleka mpo ete Nkolo ateya biso na nzela ya emoniseli. Mpe ntango bozali kokende mbala mingi na tempelo, ezali lolenge Ye akoteya bino.

Ndeko mobali Webb: Likanisi ya nsuka ezali kotanga. Boyekola nyonso oyo bokoki etali tempelo. Esika moko ya monene ya kosala yango ezali na ChurchofJesusChrist.org/temples, esika wapi bokoki koyekola mingi etali dotasio, garma ya tempelo, mpe mingimingi koyekola maye matali moko na moko ya mayokani oyo bokosala na kati ya tempelo. Siti wana esungaka mpenza.

Lokola eteni ya boyekoli na bino, boyekola nyonso oyo bokoki etali elembo ya tempelo. Mpo na ngai, moko ya lolenge malamu koleka ya komilengela mpo na kososola tempelo ezalaka koyekola maye matali tabelenakele ya kala oyo elimbolami na kati ya Boyokani na Kala. Bilembo na batempelo ya sikawa ezali ya kokesena na ya mikolo ya kala, kasi mabongisi mpe bantina ezali kaka lolenge moko mpe ekoki kosalisa biso tomilengela mpo na boyebi na biso moko ya tempelo.

Baye bazalaki kokota na tabelenakele liboso bazalaki kopusana pene ya lotale, esika bazalaki kopesa mabonza ekokana na libonza ya bomikabi ya Mobikisi. Bazalaki kosokolama na mai mpe kopakolama na mafuta mpe kopesama bilamba ya bule. Lisusu na kati ya tabelenakele ezalaki na ema na nkombo ya Esika Esantu epai bazalaki kosala melola, oyo elimbolaki kobika na Molimo to pole ya Nzambe. Mesa ya mampa mpe vino, bilembo ya lolenge moko na elambo. Ezalaki lisusu na lotale ya malasi, kolimbolaka losambo. Eteni ya nsuka ya tabelenakele ezalaki Santu ya Basantu, oyo ezalaki na Sanduku ya Liyokani mpe Kiti ya Ngolu. Kaka nganganzambe monene azalaki koleka na elamba mpe kokota na Santu ya Basantu, mpe yango ezalaki bobele mokolo moko na mobu, na mokolo ya Bomikabi. Libanda na yango elimbolaki bokonzi ya telesitiale; Esika Esantu, bokonzi ya teresitiale; mpe Santu ya Basantu, bokonzi ya selesitiale. Bokobi oyo na nzela ya tabelenakele eteyaki Yisalaele ya kala oyo etali mobembo na bango na nzela ya bomoi ya nkufa, na ntina ya nsuka ya kokota liboso ya Nzambe.

Na kati ya oyo nakanisi moko ya bilembo monene koleka na kati ya lisolo ya mokili, ntango Yesu abakamaki na ekulusu, ezalaki na boningani ya mabele mpe elamba ya tempelo ya Elode epasukaki na katikati, kolimbolaka ete sikawa Bomikabi ekokisamaki, banso azali na makoki ya kokota na bokonzi ya selesitiale, to liboso ya Nzambe.

Atako balangi na kati ya tabelenake—ble, viole, motane, mpe mpembe—ekoki kozala na ndimbola ya elembo. Ble mbala mingi elimbolaka lola, viole elimbolaka elembo ya kala ya bokonzi, motane ekundolisaka biso makila ya Yesu Klisto, mpe mpembe elimbolaka mbala mingi elembo ya bopeto. Esangisama nyonso na barido ya tabelenakele mpe balobe ya banganganzambe, ekoki kotinda makanisi na biso na likanisi ete ezali nde na nzela ya makila ya bokonzi ya lola tokopetolama.

Yango nde ntina tokendaka na tempelo—mpo na koyekola lolenge nini kozwa nguya ya bomikabi ya Yesu Klisto kati na bomoi na biso. Toyekolaka ete na nzela ya mayokani mpe makuli ya tempelo, mpe na nzela ya Mobikisi, tokoki komilengela mpo na kozonga liboso ya Nzambe, pembe mpe peto. Na tempelo toyekolaka oyo etali Adama mpe Eva mpe lolenge nini babwakamaki libanda ya liboso ya Nzambe mpe lolenge nini bamilengelaki mpo na kozonga epai na Ye. Na nzela ya lisolo na bango toyekolaka lolenge nini tokoki komilengela mpo na mokolo kitoko wana. Mokambi David O. McKay alobaki tempelo “ezali litambe ya bobuti lokolo moko na moko kino na Esika ya seko. Kasi soki bilenge na biso bakoki kososola yango, ekozala nguya moko makasi ya molimo mpo na bomoi na bango.”

Na yango ntango bozali kokende na tempelo, boluka Yesu Klisto mpe boluka oyo bozali koyekola etali komilengela mpo na kozala liboso ya Tata na Lola, mpe bokozala na boyebi kitoko.

Ndeko mwasi Webb: Nakoki koyanola na motuna “Lolenge nini nakoyeba ntango nazali pene ya kozwa dotasio na ngai?”

Mpo na bantina mingi, motuna oyo etindi ngai nakanisa profeta Abalayama. Ekomaki ntango moko na bomoi ya Abalayama ntango ayokaki mposa efulama mpo na pole mingi ya molimo mpe boyebi. Alingaki kozala na bozalani ya penepene na Nzambe mpe likoki monene mpo na kosalela Ye. Na kati ya Abalayama 1:2 alobi: “Mpe, mpo namonaki esengo monene mpe kimia mpe bopemi mpo na ngai, nalukaki kozwa mapamboli ya batata.” Abalayama amilimboli yemoko awa lokola “molandi ya boyengebene, kolingaka lisusu kozala moko oyo azalaki na boyebi monene, mpe kozala molandi monene ya boyengebene, mpe kozala na boyebi monene … mpe kolingaka kozwa mateya, mpe kobomba mitindo ya Nzambe.”

Yango ezali lolenge nayokaki ntango nabandaki kokanisa na oyo etali kokendaka na tempelo mpo na kozwa dotasio na ngai. Nazalakiya komipesa mobimba na kobika nsango malamu. Nazalaki koyekola mingi uta na boyekoli na ngai ya makomi; mpe nazalaki kokola mpe kosalisaka na esengo na palwasi na ngai. Kasi nayokaki nzala ya mozindo makasi ya koyekola kutu mingi oyo etali Tata na Lola mpe moango na Ye mpo na ngai. Yango ezalaki mingi koleka mposa yaa koyeba, nayokaki mposa makasi ya koyekola lolenge nini ya kopusana pene ya Nzambe mpe kokoma mingi moyekoli alenda ya Yesu Klisto. Nalingaki solo kotika Nzambe alonga mingi koleka kati na bomoi na gai. Baninga na ngai ya motema mpe episikopo bayebaki ete nazalaki pene ya kosala mayokani ya tempelo mpe basungaki ngai namilengela mpo na kozwa dotasio na ngai moko.

Mpaka Soares: Malamu mpenza. Matondo mingi mpo na maloba na bino kitoko Ndeko mobali mpe Ndeko mwasi Webb. Baninga balingami na ngai, lokola Mokambi Nelson ateyaki, “Bolongobani ya moto mpo na kokota na Ndako ya Nkolo esengaka mingi bolengeli ya molimo ya moto ye moko. … Bolongobani ya moto esengaka mbongwana mobimba ya makanisi mpe motema kozala mingi lokola Nkolo, … kozala ndakisa malamu koleka, mpe kozala mosantu.” Bongo, soki toyekami sembo na bolengeli na biso mpo na kokota na tempelo, tokobongola boyebi na biso kati na tempelo, oyo ekobongola bomoi na biso libanda ya tempelo.

Matangi

  1. Tala Esode 29:4–9.

  2. Truman G. Madsen, “House of Glory” (Brigham Young University ten-stake fireside address, Mar, 5, 1972), 7.

  3. Russell M. Nelson, “Closing Remarks,” Ensign to Liahona, Nov. 2019, 121–22.

Bimisa na lokasa